< Masese 12 >
1 Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.
Ко љуби наставу, љуби знање; а ко мрзи на укор, остаје луд.
2 Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.
Добар човек добија љубав од Господа, а човека зликовца осуђује.
3 Motema mabe elendisaka moto te; mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te.
Неће се човек утврдити безбожношћу, а корен праведних неће се помаћи.
4 Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
Вредна је жена венац мужу свом; а која га срамоти, она му је као трулеж у костима.
5 Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.
Мисли су праведних праве, а савети безбожних превара.
6 Maloba ya bato mabe ezali mitambo mpo na kosopa makila, kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango.
Речи безбожних вребају крв, а праведне избављају уста њихова.
7 Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
Обарају се безбожни да их нема, а дом праведних остаје.
8 Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.
Према разуму свом хвали се човек; а ко је опака срца, презреће се.
9 Eleki malamu kozala moto pamba mpe kozala na mosali, na esika ya komimona moto monene mpe kozanga bilei.
Ко се снебива, а има слугу, бољи је од оног који се велича а хлеба нема.
10 Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.
Праведник се брине за живот свог живинчета, а у безбожника је срце немилостиво.
11 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
Ко ради своју земљу, биће сит хлеба; а ко иде за беспослицама, безуман је.
12 Moto mabe alingaka misuni ya bato mabe, kasi mosisa ya bayengebene ebotaka mingi.
Безбожник жели обрану ода зла, али корен праведних даје је.
13 Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
Зломе је замка у греху усана његових, а праведник излази из тескобе.
14 Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
Од плода уста својих сити се човек добра, и плату за дела своја прима човек.
15 Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.
Безумнику се чини прав пут његов; али ко слуша савет, мудар је.
16 Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.
Гнев безумников одмах се позна, али паметни покрива срамоту.
17 Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo, kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.
Ко говори истину, јавља шта је право, а лажни сведок превару.
18 Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
Има ко говори као да мач пробада, а језик је мудрих лек.
19 Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
Истинита уста стоје тврдо довека, а језик лажљиви за час.
20 Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia.
Који зло мисле, превара им је у срцу, а радост је онима који саветују на мир.
21 Mabe moko te ekokomela bayengebene, kasi bato mabe bakotondisama na pasi.
Никаква несрећа неће задесити праведника, а безбожници ће се напунити зла.
22 Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.
Мрске су Господу лажљиве усне; а који раде верно, мили су Му.
23 Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.
Паметан човек покрива знање, а срце безумних разглашује безумље.
24 Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.
Рука радљива господариће, а лена ће давати данак.
25 Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
Брига у срцу човечијем обара; а добра реч развесељава.
26 Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.
Праведнику је боље него ближњему његовом; а безбожнике заводи пут њихов.
27 Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
Лењивац неће пећи лов свој, а у вредног је човека добро драгоцено.
28 Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.
На путу правде живот је, и куда иде стаза њена нема смрти.