< Masese 10 >

1 Masese ya Salomo: Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
The proverbs of Solomon. A wise son makes a glad father; but a foolish son brings grief to his mother.
2 Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
Treasures of wickedness profit nothing, but righteousness delivers from death.
3 Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.
The LORD will not allow the soul of the righteous to go hungry, but he thrusts away the desire of the wicked.
4 Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.
He becomes poor who works with a lazy hand, but the hand of the diligent brings wealth.
5 Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.
He who gathers in summer is a wise son, but he who sleeps during the harvest is a son who causes shame.
6 Mapamboli ezali na likolo ya moto ya moto ya sembo lokola motole, kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba.
Blessings are on the head of the righteous, but violence covers the mouth of the wicked.
7 Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.
The memory of the righteous is blessed, but the name of the wicked will rot.
8 Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.
The wise in heart accept commandments, but a chattering fool will fall.
9 Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.
He who walks blamelessly walks surely, but he who perverts his ways will be found out.
10 Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
One who winks with the eye causes sorrow, but a chattering fool will fall.
11 Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
The mouth of the righteous is a spring of life, but violence covers the mouth of the wicked.
12 Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
Hatred stirs up strife, but love covers all wrongs.
13 Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.
Wisdom is found on the lips of him who has discernment, but a rod is for the back of him who is void of understanding.
14 Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
Wise men lay up knowledge, but the mouth of the foolish is near ruin.
15 Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
The rich man’s wealth is his strong city. The destruction of the poor is their poverty.
16 Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi, kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.
The labor of the righteous leads to life. The increase of the wicked leads to sin.
17 Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu.
He is in the way of life who heeds correction, but he who forsakes reproof leads others astray.
18 Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye azali na bibebu ya lokuta, mpe moto oyo atongaka bato azali zoba.
He who hides hatred has lying lips. He who utters a slander is a fool.
19 Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
In the multitude of words there is no lack of disobedience, but he who restrains his lips does wisely.
20 Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.
The tongue of the righteous is like choice silver. The heart of the wicked is of little worth.
21 Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye.
The lips of the righteous feed many, but the foolish die for lack of understanding.
22 Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.
The LORD’s blessing brings wealth, and he adds no trouble to it.
23 Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele.
It is a fool’s pleasure to do wickedness, but wisdom is a man of understanding’s pleasure.
24 Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
What the wicked fear will overtake them, but the desire of the righteous will be granted.
25 Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.
When the whirlwind passes, the wicked is no more; but the righteous stand firm forever.
26 Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi.
As vinegar to the teeth, and as smoke to the eyes, so is the sluggard to those who send him.
27 Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
The fear of the LORD prolongs days, but the years of the wicked shall be shortened.
28 Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
The prospect of the righteous is joy, but the hope of the wicked will perish.
29 Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
The way of the LORD is a stronghold to the upright, but it is a destruction to the workers of iniquity.
30 Moto ya sembo akotikala kokweya te, kasi bato mabe bakovanda na mokili te.
The righteous will never be removed, but the wicked will not dwell in the land.
31 Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama.
The mouth of the righteous produces wisdom, but the perverse tongue will be cut off.
32 Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.
The lips of the righteous know what is acceptable, but the mouth of the wicked is perverse.

< Masese 10 >