< Bafilipi 1 >

1 Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona:
Paul and Timothy, the servants of Jesus Christ, to all the saints who are at Philippi, with the bishops and deacons.
2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
Grace and peace unto you from God our Father and the Lord Jesus Christ.
3 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino;
I thank my God for every mention of you,
4 nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo,
always in all my prayer with joy making supplication,
5 mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo.
for your fellowship in the gospel from the first clay until now;
6 Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
having confidence as to this same thing, that the one having begun a good work in you will perfect it unto the day of Jesus Christ:
7 Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.
as it is righteous for me to think in behalf of you all, because I have you in my heart, both in my bonds and in the defence and confirmation of the gospel, that you are all my fellow-partakers of the grace.
8 Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.
For God is my witness, how I long after you in the affections of Jesus Christ.
9 Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,
And I pray this, that your divine love may yet more and more abound in perfect knowledge and all understanding;
10 mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto,
in order that you may distinguish those things which differ; that you may be pure and without offence in the day of Christ;
11 bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.
being filled with the fruit of righteousness, through Jesus Christ, unto the glory and praise of God.
12 Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso.
But I wish you, brethren, to know that the affairs appertaining to me have turned out rather unto the promotion of the gospel.
13 Boye, bakengeli nyonso ya ndako ya mokonzi mpe bato nyonso oyo bazali awa bayebi ete nazali kati na boloko mpo na Klisto.
So that my bonds in Christ are manifest in all the pretorian army, and to all the rest;
14 Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.
and many of the brethren in the Lord, being confident through my bonds, are bold to speak the word of God more fluently without fear.
15 Ezali solo ete bamoko bazali kosakola Klisto mpo na zuwa mpe kowelana na ngai, kasi bamosusu bazali kosala yango na makanisi ya malamu:
Some indeed through envy and strife, and some through good will, are preaching Christ:
16 bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa.
the latter from divine love, knowing that I am set for the defence of the gospel:
17 Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te: bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko.
the former from self-seeking are proclaiming Christ insincerely, thinking that they will add affliction to my bonds.
18 Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango.
For what is it? moreover that in every place, whether in pretext or in truth, Christ is proclaimed; and I rejoice in this, yes, and I will rejoice.
19 Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai.
For I know that this will turn out to me unto salvation, through your prayer and the supply of the Spirit of Jesus Christ,
20 Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
according to my earnest expectation and hope, that I shall be ashamed in nothing, but with all boldness, as always, even now Christ will be magnified in my body, whether by life, or by death.
21 Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai; mpe kokufa ezali litomba.
For Christ is my life, and death is my gain.
22 Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona.
But if to live in the flesh, this shall be to me the fruit of the work, indeed I know not what I shall ask.
23 Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo: na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu;
But I am in a strait between two, having a desire to depart and to be with Christ; for this is far better:
24 na ngambo mosusu, kowumela kati na nzoto, pamba te yango nde eleki na tina likolo na bino.
but to remain in the flesh is safer on account of you.
25 Lokola nandimisami na yango, nayebi malamu ete nakowumela mpe nakokoba kozala kati na bino nyonso, mpo na kosunga ete bokola mpe bosepela kati na kondima.
And having confidence in this, I know that I shall abide with you all, unto your promotion and the joy of your faith;
26 Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai.
in order that your rejoicing in Christ Jesus may abound in me through my coming again unto you.
27 Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,
Only live worthily of the gospel of Christ: in order that, whether coming and seeing you or being absent, I hear those things concerning you, that you are standing in one spirit, with one soul contending for the faith of the gospel;
28 na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe.
and not being intimidated in anything by the adversaries: which is to them the manifestation of destruction, but of your salvation, and this is from God;
29 Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,
because the blessing is conferred on you in behalf of Christ, not only to believe on him, but indeed to suffer for him:
30 pamba te bozali nde kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki ngai kobunda mpe oyo bozali koyoka ete nazali lisusu kobunda sik’oyo.
having the same conflict as you saw in me, and now hearing me.

< Bafilipi 1 >