< Bafilipi 4 >
1 Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.
ωστε αδελφοι μου αγαπητοι και επιποθητοι χαρα και στεφανος μου ουτως στηκετε εν κυριω αγαπητοι
2 Nasengi na Evodi mpe na Sentishe ete bazala na makanisi moko kati na Nkolo.
ευωδιαν παρακαλω και συντυχην παρακαλω το αυτο φρονειν εν κυριω
3 Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala: sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.
και ερωτω και σε συζυγε γνησιε συλλαμβανου αυταις αιτινες εν τω ευαγγελιω συνηθλησαν μοι μετα και κλημεντος και των λοιπων συνεργων μου ων τα ονοματα εν βιβλω ζωης
4 Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo; nazongeli yango lisusu: bosepelaka!
χαιρετε εν κυριω παντοτε παλιν ερω χαιρετε
5 Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.
το επιεικες υμων γνωσθητω πασιν ανθρωποις ο κυριος εγγυς
6 Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
μηδεν μεριμνατε αλλ εν παντι τη προσευχη και τη δεησει μετα ευχαριστιας τα αιτηματα υμων γνωριζεσθω προς τον θεον
7 Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
και η ειρηνη του θεου η υπερεχουσα παντα νουν φρουρησει τας καρδιας υμων και τα νοηματα υμων εν χριστω ιησου
8 Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
το λοιπον αδελφοι οσα εστιν αληθη οσα σεμνα οσα δικαια οσα αγνα οσα προσφιλη οσα ευφημα ει τις αρετη και ει τις επαινος ταυτα λογιζεσθε
9 Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.
α και εμαθετε και παρελαβετε και ηκουσατε και ειδετε εν εμοι ταυτα πρασσετε και ο θεος της ειρηνης εσται μεθ υμων
10 Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.
εχαρην δε εν κυριω μεγαλως οτι ηδη ποτε ανεθαλετε το υπερ εμου φρονειν εφ ω και εφρονειτε ηκαιρεισθε δε
11 Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.
ουχ οτι καθ υστερησιν λεγω εγω γαρ εμαθον εν οις ειμι αυταρκης ειναι
12 Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo: ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.
οιδα δε ταπεινουσθαι οιδα και περισσευειν εν παντι και εν πασιν μεμυημαι και χορταζεσθαι και πειναν και περισσευειν και υστερεισθαι
13 Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
παντα ισχυω εν τω ενδυναμουντι με χριστω
14 Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai.
πλην καλως εποιησατε συγκοινωνησαντες μου τη θλιψει
15 Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino.
οιδατε δε και υμεις φιλιππησιοι οτι εν αρχη του ευαγγελιου οτε εξηλθον απο μακεδονιας ουδεμια μοι εκκλησια εκοινωνησεν εις λογον δοσεως και ληψεως ει μη υμεις μονοι
16 Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
οτι και εν θεσσαλονικη και απαξ και δις εις την χρειαν μοι επεμψατε
17 Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.
ουχ οτι επιζητω το δομα αλλ επιζητω τον καρπον τον πλεοναζοντα εις λογον υμων
18 Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.
απεχω δε παντα και περισσευω πεπληρωμαι δεξαμενος παρα επαφροδιτου τα παρ υμων οσμην ευωδιας θυσιαν δεκτην ευαρεστον τω θεω
19 Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
ο δε θεος μου πληρωσει πασαν χρειαν υμων κατα τον πλουτον αυτου εν δοξη εν χριστω ιησου
20 Tika ete nkembo ezonga mpo na libela na libela epai na Nzambe oyo azali Tata na biso! Amen. (aiōn )
τω δε θεω και πατρι ημων η δοξα εις τους αιωνας των αιωνων αμην (aiōn )
21 Bopesa mbote epai ya basantu nyonso kati na Yesu-Klisto. Bandeko oyo bazali awa elongo na ngai batindeli bino mbote.
ασπασασθε παντα αγιον εν χριστω ιησου ασπαζονται υμας οι συν εμοι αδελφοι
22 Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare.
ασπαζονται υμας παντες οι αγιοι μαλιστα δε οι εκ της καισαρος οικιας
23 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino!
η χαρις του κυριου ημων ιησου χριστου μετα παντων υμων αμην [ προς φιλιππησιους εγραφη απο ρωμης δι επαφροδιτου]