< Bafilipi 3 >

1 Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.
Τὸ λοιπόν, ἀδελφοί μου, χαίρετε ἐν Κυρίῳ. τὰ αὐτὰ γράφειν ὑμῖν ἐμοὶ μὲν οὐκ ὀκνηρόν, ὑμῖν δὲ ἀσφαλές.
2 Bosala keba na bambwa, na bato mabe mpe na bato oyo batindikaka bino na kokatisa ngenga!
Βλέπετε τοὺς κύνας, βλέπετε τοὺς κακοὺς ἐργάτας, βλέπετε τὴν κατατομήν·
3 Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,
ἡμεῖς γάρ ἐσμεν ἡ περιτομή, οἱ Πνεύματι Θεοῦ λατρεύοντες καὶ καυχώμενοι ἐν Χριστῷ Ἰησοῦ καὶ οὐκ ἐν σαρκὶ πεποιθότες,
4 atako ngai mpe nakoki na ngai kotia elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, asengeli koyeba ete ngai nakoki kutu kotia elikya yango koleka ye;
καίπερ ἐγὼ ἔχων πεποίθησιν καὶ ἐν σαρκί. εἴ τις δοκεῖ ἄλλος πεποιθέναι ἐν σαρκί, ἐγὼ μᾶλλον·
5 pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo;
περιτομῇ ὀκταήμερος, ἐκ γένους Ἰσραήλ, φυλῆς Βενιαμίν, Ἑβραῖος ἐξ Ἑβραίων, κατὰ νόμον Φαρισαῖος,
6 mpo na oyo etali molende, nanyokolaki Lingomba; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki moto azanga pamela.
κατὰ ζῆλον διώκων τὴν ἐκκλησίαν, κατὰ δικαιοσύνην τὴν ἐν νόμῳ γενόμενος ἄμεμπτος.
7 Kasi makambo oyo nazalaki komona ete ezali na tina mpo na ngai, nakomi sik’oyo komona yango pamba mpo na Klisto.
ἀλλ᾽ ἅτινα ἦν μοι κέρδη, ταῦτα ἥγημαι διὰ τὸν Χριστὸν ζημίαν.
8 Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene: koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto
ἀλλὰ μενοῦνγε καὶ ἡγοῦμαι πάντα ζημίαν εἶναι διὰ τὸ ὑπερέχον τῆς γνώσεως Χριστοῦ Ἰησοῦ τοῦ Κυρίου μου, δι᾽ ὃν τὰ πάντα ἐζημιώθην, καὶ ἡγοῦμαι σκύβαλα εἶναι ἵνα Χριστὸν κερδήσω
9 mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto: Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.
καὶ εὑρεθῶ ἐν αὐτῷ μὴ ἔχων ἐμὴν δικαιοσύνην τὴν ἐκ νόμου, ἀλλὰ τὴν διὰ πίστεως Χριστοῦ, τὴν ἐκ Θεοῦ δικαιοσύνην ἐπὶ τῇ πίστει,
10 Posa monene ya motema na ngai ezali: koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye
τοῦ γνῶναι αὐτὸν καὶ τὴν δύναμιν τῆς ἀναστάσεως αὐτοῦ καὶ τὴν κοινωνίαν τῶν παθημάτων αὐτοῦ, συμμορφούμενος τῷ θανάτῳ αὐτοῦ,
11 na elikya ete ngai mpe nakosekwa kati na bakufi.
εἴ πως καταντήσω εἰς τὴν ἐξανάστασιν τῶν νεκρῶν.
12 Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.
οὐχ ὅτι ἤδη ἔλαβον ἢ ἤδη τετελείωμαι, διώκω δὲ εἰ καὶ καταλάβω, ἐφ ᾧ καὶ κατελήφθην ὑπὸ τοῦ Χριστοῦ Ἰησοῦ.
13 Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango; kasi nasalaka likambo moko: nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso.
ἀδελφοί, ἐγὼ ἐμαυτὸν οὔπω λογίζομαι κατειληφέναι·
14 Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.
ἓν δέ, τὰ μὲν ὀπίσω ἐπιλανθανόμενος τοῖς δὲ ἔμπροσθεν ἐπεκτεινόμενος κατὰ σκοπὸν διώκω ἐπὶ τὸ βραβεῖον τῆς ἄνω κλήσεως τοῦ Θεοῦ ἐν Χριστῷ Ἰησοῦ.
15 Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.
ὅσοι οὖν τέλειοι, τοῦτο φρονῶμεν· καὶ εἴ τι ἑτέρως φρονεῖτε, καὶ τοῦτο ὁ Θεὸς ὑμῖν ἀποκαλύψει.
16 Nzokande, na esika oyo tosili kokoma, totambola nzela moko.
πλὴν εἰς ὃ ἐφθάσαμεν, τῷ αὐτῷ στοιχεῖν κανόνι, τὸ αὐτὸ φρονεῖν.
17 Bandeko, bino nyonso bolanda ndakisa na ngai mpe bomekola ezaleli ya bato oyo bazali kotambola lokola biso.
Συμμιμηταί μου γίνεσθε, ἀδελφοί, καὶ σκοπεῖτε τοὺς οὕτω περιπατοῦντας, καθὼς ἔχετε τύπον ἡμᾶς.
18 Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto.
πολλοὶ γὰρ περιπατοῦσιν, — οὓς πολλάκις ἔλεγον ὑμῖν, νῦν δὲ καὶ κλαίων λέγω, τοὺς ἐχθροὺς τοῦ σταυροῦ τοῦ Χριστοῦ,
19 Suka na bango ezali libebi; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
ὧν τὸ τέλος ἀπώλεια, ὧν ὁ θεὸς ἡ κοιλία καὶ ἡ δόξα ἐν τῇ αἰσχύνῃ αὐτῶν, οἱ τὰ ἐπίγεια φρονοῦντες!
20 Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.
ἡμῶν γὰρ τὸ πολίτευμα ἐν οὐρανοῖς ὑπάρχει, ἐξ οὗ καὶ σωτῆρα ἀπεκδεχόμεθα Κύριον Ἰησοῦν Χριστόν,
21 Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
ὃς μετασχηματίσει τὸ σῶμα τῆς ταπεινώσεως ἡμῶν εἰς τὸ γενέσθαι αὐτὸ σύμμορφον τῷ σώματι τῆς δόξης αὐτοῦ κατὰ τὴν ἐνέργειαν τοῦ δύνασθαι αὐτὸν καὶ ὑποτάξαι αὐτῷ τὰ πάντα.

< Bafilipi 3 >