< Bafilipi 2 >

1 Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,
Si qua ergo consolatio in Christo, si quod solatium caritatis, si qua societas spiritus, si qua viscera miserationis:
2 botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko.
implete gaudium meum ut idem sapiatis, eamdem caritatem habentes, unanimes, idipsum sentientes,
3 Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.
nihil per contentionem, neque per inanem gloriam: sed in humilitate superiores sibi invicem arbitrantes,
4 Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.
non quæ sua sunt singuli considerantes, sed ea quæ aliorum.
5 Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.
Hoc enim sentite in vobis, quod et in Christo Jesu:
6 Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,
qui cum in forma Dei esset, non rapinam arbitratus est esse se æqualem Deo:
7 kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto;
sed semetipsum exinanivit, formam servi accipiens, in similitudinem hominum factus, et habitu inventus ut homo.
8 amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.
Humiliavit semetipsum factus obediens usque ad mortem, mortem autem crucis.
9 Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,
Propter quod et Deus exaltavit illum, et donavit illi nomen, quod est super omne nomen:
10 mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,
ut in nomine Jesu omne genu flectatur cælestium, terrestrium et infernorum,
11 mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.
et omnis lingua confiteatur, quia Dominus Jesus Christus in gloria est Dei Patris.
12 Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga: bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te;
Itaque carissimi mei (sicut semper obedistis), non ut in præsentia mei tantum, sed multo magis nunc in absentia mea, cum metu et tremore vestram salutem operamini.
13 pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.
Deus est enim, qui operatur in vobis et velle, et perficere pro bona voluntate.
14 Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe,
Omnia autem facite sine murmurationibus et hæsitationibus:
15 mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili
ut sitis sine querela, et simplices filii Dei, sine reprehensione in medio nationis pravæ et perversæ: inter quos lucetis sicut luminaria in mundo,
16 mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.
verbum vitæ continentes ad gloriam meam in die Christi, quia non in vacuum cucurri, neque in vacuum laboravi.
17 Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.
Sed et si immolor supra sacrificium, et obsequium fidei vestræ, gaudeo, et congratulor omnibus vobis.
18 Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.
Idipsum autem et vos gaudete, et congratulamini mihi.
19 Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino.
Spero autem in Domino Jesu, Timotheum me cito mittere ad vos: ut et ego bono animo sim, cognitis quæ circa vos sunt.
20 Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino;
Neminem enim habeo tam unanimem, qui sincera affectione pro vobis sollicitus sit.
21 bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto.
Omnes enim quæ sua sunt quærunt, non quæ sunt Jesu Christi.
22 Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
Experimentum autem ejus cognoscite, quia sicut patri filius, mecum servivit in Evangelio.
23 Yango wana nazali na elikya ya kotinda ye epai na bino tango kaka nakoyeba ndenge nini makambo na ngai ekosuka.
Hunc igitur spero me mittere ad vos, mox ut videro quæ circa me sunt.
24 Nandimisami solo kati na Nkolo ete nakoya kotala bino kala mingi te.
Confido autem in Domino quoniam et ipse veniam ad vos cito.
25 Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
Necessarium autem existimavi Epaphroditum fratrem, et cooperatorem, et commilitonem meum, vestrum autem apostolum, et ministrum necessitatis meæ, mittere ad vos:
26 Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela.
quoniam quidem omnes vos desiderabat: et mœstus erat, propterea quod audieratis illum infirmatum.
27 Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.
Nam et infirmatus est usque ad mortem: sed Deus misertus est ejus: non solum autem ejus, verum etiam et mei, ne tristitiam super tristitiam haberem.
28 Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila.
Festinantius ergo misi illum, ut viso eo iterum gaudeatis, et ego sine tristitia sim.
29 Boyamba ye na esengo makasi kati na Nkolo mpe bomemiaka bato ya lolenge wana,
Excipite itaque illum cum omni gaudio in Domino, et ejusmodi cum honore habetote;
30 pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto: atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.
quoniam propter opus Christi usque ad mortem accessit, tradens animam suam ut impleret id quod ex vobis deerat erga meum obsequium.

< Bafilipi 2 >