< Filemo 1 >
1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala;
Paul, a prisoner of Christ Jesus, and Timotheus the brother, to Philemon our beloved and fellow-worker,
2 epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi; epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba; mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo:
and Apphia the beloved, and Archippus our fellow-soldier, and the assembly in thy house:
3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
Grace to you, and peace, from God our Father, and the Lord Jesus Christ!
4 Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai,
I give thanks to my God, always making mention of thee in my prayers,
5 pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu.
hearing of thy love and faith that thou hast unto the Lord Jesus and toward all the saints,
6 Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.
that the fellowship of thy faith may become working in the full knowledge of every good thing that [is] in you toward Christ Jesus;
7 Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.
for we have much joy and comfort in thy love, because the bowels of the saints have been refreshed through thee, brother.
8 Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala,
Wherefore, having in Christ much boldness to command thee that which is fit —
9 kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto;
because of the love I rather entreat, being such an one as Paul the aged, and now also a prisoner of Jesus Christ;
10 nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko.
I entreat thee concerning my child — whom I did beget in my bonds — Onesimus,
11 Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.
who once was to thee unprofitable, and now is profitable to me and to thee,
12 Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.
whom I did send again, and thou him (that is, my own bowels) receive,
13 Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.
whom I did wish to retain to myself, that in thy behalf he might minister to me in the bonds of the good news,
14 Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
and apart from thy mind I willed to do nothing, that as of necessity thy good deed may not be, but of willingness,
15 Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela, (aiōnios )
for perhaps because of this he did depart for an hour, that age-duringly thou mayest have him, (aiōnios )
16 lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.
no more as a servant, but above a servant — a brother beloved, especially to me, and how much more to thee, both in the flesh and in the Lord!
17 Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai.
If, then, with me thou hast fellowship, receive him as me,
18 Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.
and if he did hurt to thee, or doth owe anything, this to me be reckoning;
19 Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo: ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai: niongo yango ezali nde bomoi na yo.
I, Paul did write with my hand, I — I will repay; that I may not say that also thyself, besides, to me thou dost owe.
20 Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.
Yes, brother, may I have profit of thee in the Lord; refresh my bowels in the Lord;
21 Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka.
having been confident in thy obedience I did write to thee, having known that also above what I may say thou wilt do;
22 Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.
and at the same time also prepare for me a lodging, for I hope that through your prayers I shall be granted to you.
23 Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote.
Salute thee doth Epaphras, (my fellow-captive in Christ Jesus, )
24 Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.
Markus, Aristarchus, Demas, Lukas, my fellow-workmen!
25 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo!
The grace of our Lord Jesus Christ [is] with your spirit! Amen.