< Abidiasi 1 >

1 Emoniseli ya mosakoli Abidiasi. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi: « Toyoki sango moko kowuta na Yawe; mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba: ‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›
Visión de Abdías. El Señor Jehová dijo así a Edom: Oído habemos el pregón de Jehová, y mensajero es enviado en las gentes: Levantáos, y levantémosnos contra ella en batalla.
2 Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo, mpe okosambwa makasi.
He aquí que pequeño te he hecho entre las gentes, abatido serás tú en gran manera.
3 Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka: ‹ Nani akokweyisa ngai na se? ›
La soberbia de tu corazón te ha engañado, que moras en las hendeduras de las peñas, en tu altísima morada: que dices en tu corazón: ¿Quién me derribará a tierra?
4 Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo mpe otongi zala na yo kati na minzoto, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Si te encaramares como águila, y si entre las estrellas pusieres tu nido, de allí te derribaré, dijo Jehová.
5 « Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino?
¿Entraron ladrones a ti, o robadores de noche? ¿Cómo has sido destruido? ¿No hurtaran lo que les bastaba? Pues si entraran a ti vendimiadores, aun dejaran cencerrones.
6 Kasi tala ndenge babimeli Ezawu! Babotoli ye biloko na ye ya motuya oyo ebombama!
¡Cómo fueron escudriñadas las cosas de Esaú! sus cosas muy escondidas fueron muy buscadas.
7 Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.
Hasta el punto te llegaron: todos tus aliados te han engañado: tus pacíficos prevalecieron contra ti: los que comían tu pan, pusieron la llaga debajo de ti: no hay en él entendimiento.
8 Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakoboma bato ya bwanya ya Edomi mpe nakolongola bato ya mayele na etuka ya bangomba ya Ezawu.
¿No haré que perezcan en aquel día, dijo Jehová, los sabios de Edom, y la prudencia del monte de Esaú?
9 Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo, mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga!
Y tus valientes, o! Temán, serán quebrantados; por que todo hombre será talado del monte de Esaú por el estrago.
10 Mpo na mabe oyo osalaki Jakobi, ndeko na yo, okotonda na soni okobebisama mpo na libela.
Por la injuria de tu hermano Jacob, te cubrirá vergüenza, y serás talado para siempre.
11 Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
El día que estando tú delante, llevaban extraños cautivos su ejército, y los extraños entraban por sus puertas, y echaban suertes sobre Jerusalem, tú también eras como uno de ellos.
12 Nzokande, osengelaki te kosepela komona pasi ya ndeko na yo to kosepela komona kobebisama ya bato ya Yuda to mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.
No habías tú de ver el día de tu hermano, el día en que fue enajenado: ni te habías de alegrar de los hijos de Judá el día que se perdieron: ni habías de ensanchar tu boca el día de la angustia:
13 Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngai na mokolo ya pasi na bango to kosepela komona kobebisama na bango to mpe kobotola bozwi na bango nyonso na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
Ni habías de entrar por la puerta de mi pueblo el día de su quebrantamiento: ni habías tú tampoco de ver su mal el día de su quebrantamiento: ni se habían de meter tus manos en sus bienes el día de su quebrantamiento:
14 Osengelaki te kotelema na esika oyo banzela ekutana mpo na koboma bato na bango, oyo bazalaki kokima pasi to mpe kokaba na maboko ya banguna bato na bango, oyo babikaki na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
Ni habías de pararte a las encrucijadas para matar los que de ellos escaparan: ni habías de entregar tú los que quedaban en el día de la angustia.
15 Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.
Porque el día de Jehová está cercano sobre todas las gentes: como tú hiciste, se hará contigo: tu galardón volverá sobre tu cabeza.
16 Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.
De la manera que vosotros bebisteis en mi santo monte, beberán todas las gentes continuamente: beberán, y engullirán, y serán como si no hubieran sido.
17 Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.
Mas en el monte de Sión habrá salvamento, y será santidad; y la casa de Jacob poseerá sus posesiones.
18 Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.
Y la casa de Jacob será fuego, y la casa de José será llama, y la casa de Esaú estopa, y quemarlos han, y consumirlos han: ni quedará residuo en la casa de Esaú; porque Jehová habló.
19 Bato oyo bakowuta na Negevi bakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu, mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwaku bakozwa mokili ya bato ya Filisitia. Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari, mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi.
Y los del mediodía poseerán el monte de Esaú, y los llanos de los Palestinos, poseerán también los campos de Efraím, y los campos de Samaria; y Ben-jamín a Galaad.
20 Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.
Y los cautivos de aqueste ejército de los hijos de Israel, que estarán entre los Cananeos hasta Sarepta, y los cautivos de Jerusalem que estarán en Sefarad poseerán las ciudades del mediodía.
21 Babikisi bakomata na ngomba Siona mpo na koyangela bangomba ya Ezawu, mpe Yawe akokoma Mokonzi.
Y vendrán salvadores al monte de Sión para juzgar al monte de Esaú, y el reino será de Jehová.

< Abidiasi 1 >