< Mitango 1 >

1 Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye:
Yahweh spoke to Moses in the wilderness of Sinai, in the Tent of Meeting, on the first day of the second month, in the second year after they had come out of the land of Egypt, saying,
2 « Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko.
“Take a census of all the congregation of the children of Israel, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, every male, one by one,
3 Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga.
from twenty years old and upward, all who are able to go out to war in Israel. You and Aaron shall count them by their divisions.
4 Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino: asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.
With you there shall be a man of every tribe, each one head of his fathers’ house.
5 Tala bakombo ya mibali oyo bakosunga bino: mpo na libota ya Ribeni: Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri;
These are the names of the men who shall stand with you: Of Reuben: Elizur the son of Shedeur.
6 mpo na libota ya Simeoni: Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi;
Of Simeon: Shelumiel the son of Zurishaddai.
7 mpo na libota ya Yuda: Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi;
Of Judah: Nahshon the son of Amminadab.
8 mpo na libota ya Isakari: Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari;
Of Issachar: Nethanel the son of Zuar.
9 mpo na libota ya Zabuloni: Eliabi, mwana mobali ya Eloni;
Of Zebulun: Eliab the son of Helon.
10 mpo na bana mibali ya Jozefi: mpo na libota ya Efrayimi: Elishama, mwana mobali ya Amiwudi; mpo na libota ya Manase: Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri;
Of the children of Joseph: of Ephraim: Elishama the son of Ammihud; of Manasseh: Gamaliel the son of Pedahzur.
11 mpo na libota ya Benjame: Abidani, mwana mobali ya Gideoni;
Of Benjamin: Abidan the son of Gideoni.
12 mpo na libota ya Dani: Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi;
Of Dan: Ahiezer the son of Ammishaddai.
13 mpo na libota ya Aseri: Pagieli, mwana mobali ya Okirani;
Of Asher: Pagiel the son of Ochran.
14 mpo na libota ya Gadi: Eliazafi, mwana mobali ya Deweli;
Of Gad: Eliasaph the son of Deuel.
15 mpo na libota ya Nefitali: Akira, mwana mobali ya Enani. »
Of Naphtali: Ahira the son of Enan.”
16 Ezali bango nde baponamaki kati na lisanga: bazalaki bakambi ya mabota na bango, bakambi ya mampinga ya Isalaele.
These are those who were called of the congregation, the princes of the tribes of their fathers; they were the heads of the thousands of Israel.
17 Moyize mpe Aron bakamataki bato oyo baponamaki na bakombo mpo ete basala na bango elongo.
Moses and Aaron took these men who are mentioned by name.
18 Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye,
They assembled all the congregation together on the first day of the second month; and they declared their ancestry by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, one by one.
19 ndenge Yawe atindaki Moyize oyo atangaki motango na bango na esobe ya Sinai.
As Yahweh commanded Moses, so he counted them in the wilderness of Sinai.
20 Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
The children of Reuben, Israel’s firstborn, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, one by one, every male from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
21 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
those who were counted of them, of the tribe of Reuben, were forty-six thousand five hundred.
22 Mpo na bakitani ya Simeoni: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Simeon, their generations, by their families, by their fathers’ houses, those who were counted of it, according to the number of the names, one by one, every male from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
23 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
those who were counted of them, of the tribe of Simeon, were fifty-nine thousand three hundred.
24 Mpo na bakitani ya Gadi: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Gad, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
25 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba.
those who were counted of them, of the tribe of Gad, were forty-five thousand six hundred fifty.
26 Mpo na bakitani ya Yuda: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Judah, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
27 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
those who were counted of them, of the tribe of Judah, were seventy-four thousand six hundred.
28 Mpo na bakitani ya Isakari: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Issachar, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
29 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Isakari ezalaki nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
those who were counted of them, of the tribe of Issachar, were fifty-four thousand four hundred.
30 Mpo na bakitani ya Zabuloni: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Zebulun, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
31 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
those who were counted of them, of the tribe of Zebulun, were fifty-seven thousand four hundred.
32 Mpo na bana mibali ya Jozefi: Mpo na bakitani ya Efrayimi: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Joseph: of the children of Ephraim, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
33 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Efrayimi ezalaki nkoto tuku minei na nkama mitano.
those who were counted of them, of the tribe of Ephraim, were forty thousand five hundred.
34 Mpo na bakitani ya Manase: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Manasseh, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
35 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
those who were counted of them, of the tribe of Manasseh, were thirty-two thousand two hundred.
36 Mpo na bakitani ya Benjame: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Benjamin, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
37 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
those who were counted of them, of the tribe of Benjamin, were thirty-five thousand four hundred.
38 Mpo na bakitani ya Dani: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Dan, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
39 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
those who were counted of them, of the tribe of Dan, were sixty-two thousand seven hundred.
40 Mpo na bakitani ya Aseri: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Asher, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
41 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Aseri ezalaki nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
those who were counted of them, of the tribe of Asher, were forty-one thousand five hundred.
42 Mpo na bakitani ya Nefitali: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Of the children of Naphtali, their generations, by their families, by their fathers’ houses, according to the number of the names, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war:
43 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
those who were counted of them, of the tribe of Naphtali, were fifty-three thousand four hundred.
44 Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki.
These are those who were counted, whom Moses and Aaron counted, and the twelve men who were princes of Israel, each one for his fathers’ house.
45 Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda,
So all those who were counted of the children of Israel by their fathers’ houses, from twenty years old and upward, all who were able to go out to war in Israel—
46 bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
all those who were counted were six hundred three thousand five hundred fifty.
47 Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.
But the Levites after the tribe of their fathers were not counted among them.
48 Yawe alobaki na Moyize:
For Yahweh spoke to Moses, saying,
49 « Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele.
“Only the tribe of Levi you shall not count, neither shall you take a census of them among the children of Israel;
50 Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
but appoint the Levites over the Tabernacle of the Testimony, and over all its furnishings, and over all that belongs to it. They shall carry the tabernacle and all its furnishings; and they shall take care of it, and shall encamp around it.
51 Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.
When the tabernacle is to move, the Levites shall take it down; and when the tabernacle is to be set up, the Levites shall set it up. The stranger who comes near shall be put to death.
52 Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga, mpe moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye.
The children of Israel shall pitch their tents, every man by his own camp, and every man by his own standard, according to their divisions.
53 Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
But the Levites shall encamp around the Tabernacle of the Testimony, that there may be no wrath on the congregation of the children of Israel. The Levites shall be responsible for the Tabernacle of the Testimony.”
54 Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
Thus the children of Israel did. According to all that Yahweh commanded Moses, so they did.

< Mitango 1 >