< Mitango 9 >
1 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye:
І Господь промовляв до Мойсея в Сінайській пустині другого року по ви́ході з єгипетського кра́ю, першого місяця, говорячи:
2 « Tika ete bana ya Isalaele basepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama.
„І нехай справлять Ізраїлеві сини Па́сху в означений час.
3 Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »
Чотирнадцятого дня цього місяця надвечір справите її означеного часу його, — за всіма постановами її та за всіма уста́вами її спорядите́ її“.
4 Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika.
І Мойсей промовляв до Ізраїлевих синів, щоб справили Па́сху.
5 Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize.
І справили вони Пасху першого місяця, чотирнадцятого дня місяця на́двечір у Сінайській пустині, — усе, як Господь наказав був Мойсеєві, так зробили Ізраїлеві сини.
6 Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron
Та були люди, що були нечисті від дотику до тіла померлої люди́ни, і не могли справити Пасху того дня. І прийшли вони того дня до Мойсея й до Аарона,
7 mpe bayebisaki Moyize: — Tokomi mbindo mpo ete tosimbaki ebembe. Boye, mpo na nini te biso mpe tomema likabo na biso epai na Yawe elongo na bato mosusu ya Isalaele?
та й сказали ті люди до нього: „Ми нечисті через дотик до тіла померлої людини. Чому ми бу́демо позбавлені ласки прине́сти жертву Господню означеного ча́су серед Ізраїлевих синів?“
8 Moyize azongiselaki bango: — Bozela nanu ete naluka koyeba makambo oyo Yawe atindi na tina na bino.
І сказав до них Мойсей: „Постійте, а я послухаю, що Господь накаже про вас“.
9 Boye Yawe alobaki na Moyize:
І Господь промовляв до Мойсея, говорячи:
10 — Yebisa bana ya Isalaele: « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe.
„Промовляй до Ізраїлевих синів, говорячи: Кожен чоловік із вас, або з ваших наща́дків, коли буде нечистий через дотик до мертвого тіла, або буде в далекій дорозі, то й він справить Па́сху для Господа.
11 Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
Місяця другого, чотирна́дцятого дня надвечір спорядять вони її, — з опрісноками та з гірки́м зіллям будуть їсти її.
12 Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika.
Не позоставлять із неї до ра́нку, а костей не зламають у ній, — за повною постановою Пасхи справлять її.
13 Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama; akomema mikumba ya masumu na ye.
А чоловік, який чистий, а в дорозі не є, і стримається споряджа́ти Пасху, то буде винищена душа та з наро́ду її, бо Господньої жертви він не приніс означеного ча́су її. Гріх свій понесе той чоловік!
14 Soki mpe mopaya oyo avandi kati na bino alingi kosepela Pasika ya Yawe, asengeli kosala kaka bongo, asengeli kolanda mibeko mpe malako na yango. Ezala mpo na bapaya to mpo na bana mboka, bosengeli kozala na mibeko ya losambo ya ndenge moko. »
А коли перебуватиме з вами прихо́дько, то справить він Пасху для Господа, — за постановою про Пасху та за уста́вом про неї, так зробить. Постанова одна буде для вас, — і для прихо́дька, і для тубі́льця землі.
15 Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto.
А того дня, коли поставлено скинію, хмара покрила скинію над ковче́гом свідо́цтва. А ввечорі було́ над скинією, як подоба огню, аж до ранку.
16 Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana: lipata ezalaki kozipa Mongombo; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto.
Так за́вжди бувало: удень покривала його та хмара, а вночі — подо́ба огню́.
17 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango.
І коли підіймалася хмара з-над скинії, то потому руша́ли Ізраїлеві сини, а на тому́ місці, на якому хмара ставала, там таборува́ли Ізраїлеві сини.
18 Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako.
На Господній наказ рушали Ізраїлеві сини, і на Господній нака́з таборува́ли. Усі ті дні, коли хмара перебувала над скинією, вони таборува́ли.
19 Soki lipata ewumeli tango molayi likolo ya Mongombo, bana ya Isalaele bazalaki kotosa mitindo na Yawe mpe bazalaki kokende te.
А коли хмара багато днів позоставалася над скинією, то Ізраїлеві сини виконували Господню сторо́жу, — і не руша́ли.
20 Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo.
І бувало, що хмара була́ над скинією полічені дні, то вони на Господній нака́з таборува́ли, і на Господній наказ руша́ли.
21 Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
І бувало, що хмара була від вечора аж до ра́нку, а підіймалася хмара вранці, то рушали вони. Або день і ніч була, і підіймалася хмара, то рушали вони.
22 Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
Або два дні, або місяць, або рік хмара була́ над нею, над скинією, — Ізраїлеві сини таборува́ли, і не рушали, а коли вона підіймалась, — рушали вони.
23 Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
На Господній наказ таборува́ли вони, і на Господній наказ рушали вони. Вони виконували Господню сторожу на Господній наказ через Мойсея.