< Mitango 7 >

1 Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.
موسی در روزی که بر پا سازی خیمهٔ عبادت را به پایان رسانید تمامی قسمتهای آن و نیز مذبح و لوازم آن را تدهین و تقدیس نمود.
2 Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato,
آنگاه رهبران اسرائیل، یعنی سران قبایل که ترتیب سرشماری را داده بودند، هدایای خود را آوردند.
3 bamemaki makabo na bango liboso ya Yawe: bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko; bamemaki yango liboso ya Mongombo.
ایشان شش ارابهٔ سر پوشیده (یک ارابه برای دو رهبر) که هر ارابه را دو گاو می‌کشیدند آورده، در برابر خیمهٔ عبادت به خداوند تقدیم کردند.
4 Yawe alobaki na Moyize:
آنگاه خداوند به موسی فرمود:
5 « Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. »
«هدایای ایشان را قبول کن و از آنها برای کار خیمۀ ملاقات استفاده نما. آنها را به لاویان بده تا هر کس متناسب با خدمتش از آنها استفاده کند.»
6 Moyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi.
پس موسی، ارابه‌ها و گاوها را در اختیار لاویان گذاشت.
7 Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango.
دو ارابه و چهار گاو به طایفهٔ جرشون داد تا برای کار خود از آنها استفاده کنند
8 Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
و چهار ارابه و هشت گاو نیز به طایفهٔ مراری که تحت رهبری ایتامار پسر هارون بودند، داد تا برای کارشان از آنها استفاده کنند.
9 Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule.
به قهاتیان گاو یا ارابه داده نشد، چون قرار بود ایشان سهم بار خود را از اسباب مقدّس خیمهٔ عبادت، روی دوش حمل کنند.
10 Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo.
رهبران در روزی که مذبح تدهین شد هدایایی نیز برای تبرک آن تقدیم کردند و آنها را جلوی مذبح گذاشتند.
11 Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo! »
خداوند به موسی فرمود: «هر روز یکی از رهبران، هدیهٔ خود را جهت تبرک مذبح تقدیم کند.»
12 Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.
پس رهبران، هدایای خود را به ترتیب زیر تقدیم نمودند: روز از قبیله اسم رهبر اول یهودا نحشون پسر عمیناداب دوم یساکار نتنائیل پسر صوغر سوم زبولون الیاب پسر حیلون چهارم رئوبین الیصور پسر شدی‌ئور پنجم شمعون شلومی‌ئیل پسر صوریشدای ششم جاد الیاساف پسر دعوئیل هفتم افرایم الیشمع پسر عمیهود هشتم منسی جملی‌ئیل پسر فدهصور نهم بنیامین ابیدان پسر جدعونی دهم دان اخیعزر پسر عمیشدای یازدهم اشیر فجعی‌ئیل پسر عکران دوازدهم نفتالی اخیرع پسر عینان هدایای تقدیمی هر یک از رهبران که کاملاً مشابه یکدیگر بود عبارت بودند از: یک سینی نقره‌ای به وزن ۱٫۵ کیلوگرم با یک کاسهٔ نقره‌ای به وزن هشتصد گرم (برحسب مثقال عبادتگاه)، که هر دو پر از آرد مرغوب مخلوط با روغن برای هدیهٔ آردی بودند؛ یک ظرف طلایی به وزن ۱۱۰ گرم پر از بخور خوشبو؛ یک گوسالۀ نر، یک قوچ و یک برهٔ نر یک ساله برای قربانی سوختنی؛ یک بز نر برای قربانی گناه؛ دو گاو نر، پنج قوچ، پنج بز نر و پنج برهٔ نر یک ساله برای قربانی سلامتی.
13 Likabo na ye ezalaki: etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo;
14 mpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa,
15 ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
16 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
17 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
18 Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari,
19 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
20 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
21 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
22 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
23 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
24 Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni,
25 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
26 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
27 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
28 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
29 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
30 Na mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni,
31 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
32 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
33 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
34 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
35 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
36 Na mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni,
37 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
38 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
39 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
40 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
41 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani: bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Wana nde ezalaki makabo ya Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
42 Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi,
43 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
44 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
45 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
46 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
47 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
48 Na mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi,
49 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
50 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
51 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
52 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
53 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
54 Na mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase,
55 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
56 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
57 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
58 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
59 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
60 Na mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame,
61 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
62 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
63 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
64 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
65 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
66 Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,
67 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
68 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
69 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
70 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
71 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
72 Na mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri,
73 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
74 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
75 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
76 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
77 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
78 Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali,
79 amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
80 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
81 Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
82 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
83 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani.
84 Yango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta. Na kosangisa, bango nyonso bapesaki: bitando ya palata zomi na mibale, bambeki ya palata zomi na mibale, bambeki ya wolo zomi na mibale.
بنابراین، در روزی که مذبح تدهین شد آن را به‌وسیلۀ هدایایی که سران قبایل اسرائیل آورده بودند تبرک کردند. این هدایا عبارت بودند از: دوازده سینی نقره‌ای هر کدام به وزن تقریبی ۱٫۵ کیلوگرم؛ دوازده کاسهٔ نقره‌ای، هر کدام به وزن تقریبی ۸۰۰ گرم برحسب مثقال عبادتگاه (پس وزن تمام نقرهٔ اهدایی حدود ۲۸ کیلوگرم بود)؛ دوازده ظرف طلایی، هر یک به وزن تقریبی ۱۱۰ گرم که وزن کل آنها حدود ۱٫۳ کیلوگرم بود؛ دوازده گاو نر، دوازده قوچ، دوازده بز نر یک ساله (با هدایای آردی همراه آنها) برای قربانی سوختنی، دوازده بز نر برای قربانی گناه؛ بیست و چهار گاو نر جوان، شصت قوچ، شصت بز نر و شصت برهٔ نر یک ساله برای قربانی سلامتی.
85 Etando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe: palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule.
86 Mbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi: wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato.
87 Mpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki: bangombe zomi na mibale ya mibali, bameme zomi na mibale ya mibali, bana meme zomi na mibale ya mobu moko elongo na makabo mosusu mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka mpo na masumu.
88 Na kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani: bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya libulisi ya etumbelo sima na kosopela yango mafuta.
89 Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.
وقتی که موسی وارد خیمهٔ ملاقات شد تا با خدا گفتگو کند، از بالای تخت رحمت که روی صندوق عهد قرار داشت یعنی از میان دو کروبی، صدای خدا را که با او سخن می‌گفت شنید.

< Mitango 7 >