< Mitango 6 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
L’Éternel parla ainsi à Moïse:
2 « Yebisa bana ya Isalaele: Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi
"Parle aux enfants d’Israël et dis-leur: Si un homme ou une femme fait expressément vœu d’être abstème, voulant s’abstenir en l’honneur de l’Éternel,
3 asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka.
il s’abstiendra de vin et de boisson enivrante, ne boira ni vinaigre de vin, ni vinaigre de liqueur, ni une infusion quelconque de raisins, et ne mangera point de raisins frais ni secs.
4 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso.
Tout le temps de son abstinence, il ne mangera d’aucun produit de la vigne, depuis les pépins jusqu’à l’enveloppe.
5 Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola.
Tout le temps stipulé pour son abstinence, le rasoir ne doit pas effleurer sa tête: jusqu’au terme des jours où il veut s’abstenir pour l’Éternel, il doit rester sain, laisser croître librement la chevelure de sa tête.
6 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe;
Tout le temps de cette abstinence en l’honneur de l’Éternel, il ne doit pas approcher d’un corps mort;
7 ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe.
pour son père et sa mère, pour son frère et sa sœur, pour ceux-là même il ne se souillera point à leur mort, car l’auréole de son Dieu est sur sa tête.
8 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe.
Tant qu’il portera cette auréole, il est consacré au Seigneur.
9 Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.
Si quelqu’un vient à mourir près de lui inopinément, ce sera une souillure pour sa tête consacrée: il rasera sa tête le jour de sa purification, le septième jour il la rasera.
10 Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani: bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka.
Puis, le huitième jour, il apportera deux tourterelles ou deux jeunes colombes au pontife, à l’entrée de la tente d’assignation.
11 Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe.
Le pontife offrira l’une comme expiatoire, l’autre comme holocauste, et fera expiation pour lui du péché qu’il a commis par ce cadavre; et il consacrera de nouveau sa chevelure en ce jour.
12 Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo.
Il vouera au Seigneur la même période d’abstinence et il offrira un agneau âgé d’un an comme délictif; pour les jours antérieurs, ils seront nuls, parce que son abstinence a été violée.
13 Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe: ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani
Or, voici la règle de l’abstème: quand seront accomplis les jours de son abstinence, on le fera venir à l’entrée de la tente d’assignation,
14 epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe: mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani;
et il présentera son offrande à l’Éternel: un agneau d’un an, sans défaut, pour holocauste; une brebis d’un an, sans défaut, pour expiatoire, et un bélier, sans défaut, pour rémunératoire.
15 kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu.
Plus une corbeille d’azymes, savoir des gâteaux de fleur de farine pétris à l’huile, et des galettes azymes ointes d’huile, outre leurs oblations et leurs libations.
16 Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba;
Le pontife en fera hommage à l’Éternel: il offrira son expiatoire et son holocauste,
17 akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu.
traitera le bélier comme sacrifice rémunératoire à l’Éternel, accompagné de la corbeille d’azymes, et il y joindra son oblation et sa libation.
18 Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani.
Alors l’abstème rasera, à l’entrée de la tente d’assignation, sa tête consacrée; et il prendra cette chevelure consacrée, et la jettera sur le feu qui est sous la victime de rémunération.
19 Nganga-Nzambe akozwa lipeka ya mbeka ya meme ya mobali tango esili kozika; akozwa lisusu, kati na kitunga, lipa moko ezanga levire mpe galeti moko ezanga levire, akotia yango na maboko ya moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe sima na ye kokata suki ya moto na ye mpe mandefu na ye.
Et le pontife prendra l’épaule du bélier, quand elle sera cuite, puis un gâteau azyme dans la corbeille et une galette azyme; il les posera sur les mains de l’abstème, après qu’il se sera dépouillé de ses cheveux consacrés,
20 Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende.
et le pontife en opérera le balancement devant le Seigneur: c’est une chose sainte qui appartient au pontife, indépendamment de la poitrine balancée et de la cuisse prélevée. Alors l’abstème pourra boire du vin.
21 Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › »
Telle est la règle de l’abstème qui aura fait un vœu; telle sera son offrande à l’Éternel au sujet de son abstinence, sans préjudice de ce que permettront ses moyens: selon le vœu qu’il aura prononcé, ainsi fera-t-il, en sus de la règle relative à son abstinence."
22 Yawe alobaki na Moyize:
L’Éternel parla à Moïse en ces termes:
23 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali: ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba:
"Parle ainsi à Aaron et à ses fils: Voici comment vous bénirez les enfants d’Israël; vous leur direz:
24 ‘Tika ete Yawe apambola yo mpe abatela yo!
"Que l’Éternel te bénisse et te protège!
25 Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye mpe apesa yo ngolu na Ye!
Que l’Éternel fasse rayonner sa face sur toi et te soit bienveillant!
26 Tika ete Yawe amona yo mpe apesa yo kimia!’ ›
Que l’Éternel dirige son regard vers toi et t’accorde la paix!"
27 Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »
Ils imposeront ainsi mon nom sur les enfants d’Israël, et moi je les bénirai."

< Mitango 6 >