< Mitango 5 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
И рече Господ Мојсију говорећи:
2 « Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.
Заповеди синовима Израиљевим нека истерају из логора све губаве и све којима тече семе и све који су се оскврнили о мртваца,
3 Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »
Био човек или жена, истерајте, иза логора истерајте их, да не скврне логора онима међу којима наставам.
4 Bana ya Isalaele basalaki bongo; babimisaki bango libanda ya molako. Basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
И учинише тако синови Израиљеви, и истераше их из логора, како Господ каза Мојсију, тако учинише синови Израиљеви.
5 Yawe alobaki na Moyize:
Још рече Господ Мојсију говорећи:
6 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo.
Реци синовима Израиљевим: Човек или жена кад учини какав грех људски, те згреши Господу, и буде она душа крива,
7 Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe: nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano.
Тада нека признаду грех који су учинили, и ко је крив нека врати цело чим је крив и нек дометне одозго пети део и да ономе коме је скривио.
8 Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe.
И ако онај нема никога коме би припала накнада за штету, нека се да Господу и нека буде свештенику осим овна за очишћење којим ће га очистити.
9 Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe.
Тако и сваки принос између свих ствари које посвећују синови Израиљеви и доносе свештенику, његов нека буде;
10 Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › »
И шта год ко посвети, нека је његово, и шта год ко да свештенику, нека је његово.
11 Bongo Yawe alobaki na Moyize:
Још рече Господ Мојсију говорећи:
12 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu
Кажи синовима Израиљевим и реци им: Чија би жена застранила те би му згрешила,
13 mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te.
И други би је облежао, а муж њен не би знао, него би она затајила да се оскврнила, и не би било сведока на њу, нити би се затекла,
14 Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te,
А њему би дошла сумња љубавна, те би из љубави сумњао на своју жену, а она би била оскврњена; или би му дошла сумња љубавна те би из љубави сумњао на своју жену, а она не би била оскврњена,
15 mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba.
Онда нека муж доведе жену своју к свештенику, и нека донесе за њу принос њен, десети део ефе брашна јечменог, али нека га не полије уљем и нека не метне на њ када, јер је принос за сумњу љубавну, дар за спомен да се спомене грех;
16 Nganga-Nzambe akobenga mwasi mpe akomema ye liboso ya Yawe.
И нека је свештеник приведе и постави пред Господом.
17 Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango.
И нека узме свештеник свете воде у суд земљани; и праха с пода у шатору нека узме и успе у воду.
18 Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe.
И поставивши свештеник жену пред Господом нека јој открије главу и метне јој на руке дар за спомен који је дар за сумњу љубавну; а свештеник нека држи у руци својој горку воду, која носи проклетство.
19 Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye: ‘Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te!
И нека свештеник закуне жену, и рече јој: Ако није нико спавао с тобом, и ако ниси застранила од мужа свог на нечистоту, нека ти не буде ништа од ове воде горке, која носи проклетство.
20 Kasi soki, wana ozali ya kobala, okosaki mobali na yo mpe omikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu,’
Ако ли си застранила од мужа свог и оскврнила се, и когод други осим мужа твог спавао с тобом,
21 Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo: ‘tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu!
Тада свештеник заклињући жену нека је прокуне и рече жени: Да те Господ постави за уклин и за клетву у народу твом учинивши да ти бедро спадне а трбух отече.
22 Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba.’ Mwasi akozongisa: ‘Amen! Tika ete esalema bongo!’
И нека ти ова вода проклета уђе у црева да ти отече трбух и да ти бедро спадне. А жена нека рече: Амин, амин.
23 Nganga-Nzambe akokoma maloba yango ya bilakeli mabe kati na buku mpe akokotisa yango kati na mayi ya bololo mpo na kolongola makomi yango.
Тада нека напише свештеник те клетве у књигу, и нека их спере водом горком.
24 Bongo akomelisa mwasi mayi oyo ya bololo, oyo ezali komema elakeli mabe mpo ete ekokota kati na ye.
И нека да жени да се напије горке воде проклете да уђе у њу вода проклета и буде горка.
25 Nganga-Nzambe akozwa wuta na maboko ya mwasi likabo ya zuwa, akotombola yango liboso ya Yawe mpe akomema yango na etumbelo.
И нека узме свештеник из руку жени дар за сумњу љубавну, и обрне дар пред Господом и принесе га на олтару.
26 Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo; sima na yango, akomelisa mwasi mayi.
И нека узме свештеник у шаку од дара њеног спомен, и запали на олтару, па онда нека да жени воду да попије.
27 Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye.
А кад јој да воду да пије, ако се буде оскврнила и учинила неверу мужу свом, онда ће ући вода проклета у њу и постаће горка, и трбух ће јој отећи и спасти бедро, и она ће жена постати уклин у народу свом.
28 Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana.
Ако ли се не буде оскврнила жена, него буде чиста, неће јој бити ништа и имаће деце.
29 Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo.
Ово је закон за сумњу љубавну, кад жена застрани од мужа свог и оскврни се;
30 Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu: mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi.
Или кад коме дође сумња љубавна те посумња из љубави на жену своју и постави је пред Господом и сврши јој свештеник све по овом закону.
31 Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › »
И муж да је прост од греха, али жена да носи своје безакоње.

< Mitango 5 >