< Mitango 32 >

1 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.
Now the children of Reuben and the children of Gad had a very great multitude of livestock. They saw the land of Jazer, and the land of Gilead. Behold, the place was a place for livestock.
2 Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga:
Then the children of Gad and the children of Reuben came and spoke to Moses, and to Eleazar the priest, and to the princes of the congregation, saying,
3 « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni;
“Ataroth, Dibon, Jazer, Nimrah, Heshbon, Elealeh, Sebam, Nebo, and Beon,
4 bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. »
the land which the LORD struck before the congregation of Israel, is a land for livestock; and your servants have livestock.”
5 Balobaki lisusu: « Soki tozwi ngolu na miso na yo, tika ete mokili oyo epesamela basali na yo lokola libula na biso mpe okatisa biso na ngambo ya Yordani te. »
They said, “If we have found favor in your sight, let this land be given to your servants for a possession. Don’t bring us over the Jordan.”
6 Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni: — Boni, bandeko na bino bakende na bitumba, bongo bino botikala awa?
Moses said to the children of Gad, and to the children of Reuben, “Shall your brothers go to war while you sit here?
7 Mpo na nini bolingi lisusu kolembisa mitema ya bana ya Isalaele oyo bazali kokende na mokili oyo Yawe apesaki bango?
Why do you discourage the heart of the children of Israel from going over into the land which the LORD has given them?
8 Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili.
Your fathers did so when I sent them from Kadesh Barnea to see the land.
9 Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
For when they went up to the valley of Eshcol, and saw the land, they discouraged the heart of the children of Israel, that they should not go into the land which the LORD had given them.
10 Na mokolo wana, kanda ya Yawe epelaki mpe alapaki ndayi oyo:
The LORD’s anger burned in that day, and he swore, saying,
11 « Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi
‘Surely none of the men who came up out of Egypt, from twenty years old and upward, shall see the land which I swore to Abraham, to Isaac, and to Jacob; because they have not wholly followed me,
12 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. »
except Caleb the son of Jephunneh the Kenizzite, and Joshua the son of Nun, because they have followed the LORD completely.’
13 Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.
The LORD’s anger burned against Israel, and he made them wander back and forth in the wilderness forty years, until all the generation who had done evil in the LORD’s sight was consumed.
14 Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.
“Behold, you have risen up in your fathers’ place, an increase of sinful men, to increase the fierce anger of the LORD toward Israel.
15 Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino.
For if you turn away from after him, he will yet again leave them in the wilderness; and you will destroy all these people.”
16 Babelemaki pene na Moyize mpe balobaki: — Te, tolingi nde kotonga mapango mpo na bibwele na biso mpe bingumba mpo na basi mpe bana na biso awa.
They came near to him, and said, “We will build sheepfolds here for our livestock, and cities for our little ones;
17 Kasi tozali kolata na lombangu bibundeli na biso mpe kokende na liboso ya bana ya Isalaele kino tango tokokomisa bango na esika na bango. Bongo, na tango yango, basi mpe bana na biso bakotikala awa, kati na bingumba batonga makasi, mpo na komibatela liboso ya bavandi ya mokili oyo.
but we ourselves will be ready armed to go before the children of Israel, until we have brought them to their place. Our little ones shall dwell in the fortified cities because of the inhabitants of the land.
18 Tokotikala kozonga na bandako na biso te soki moto moko na moko ya Isalaele azwi libula na ye te;
We will not return to our houses until the children of Israel have all received their inheritance.
19 mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani.
For we will not inherit with them on the other side of the Jordan and beyond, because our inheritance has come to us on this side of the Jordan eastward.”
20 Moyize alobaki na bango: — Soki bosali bongo, soki bolati bibundeli mpo na kokende na bitumba liboso ya Yawe,
Moses said to them: “If you will do this thing, if you will arm yourselves to go before the LORD to the war,
21 mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye
and every one of your armed men will pass over the Jordan before the LORD until he has driven out his enemies from before him,
22 mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe.
and the land is subdued before the LORD; then afterward you shall return, and be clear of obligation to the LORD and to Israel. Then this land shall be your possession before the LORD.
23 Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino.
“But if you will not do so, behold, you have sinned against the LORD; and be sure your sin will find you out.
24 Botonga bingumba makasi mpo na basi mpe bana na bino, botonga mapango mpo na bibwele na bino, kasi bokokisa mpe elaka oyo bopesi.
Build cities for your little ones, and folds for your sheep; and do that which has proceeded out of your mouth.”
25 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni balobaki na Moyize: — Basali na yo bakotosa mitindo ya nkolo na biso.
The children of Gad and the children of Reuben spoke to Moses, saying, “Your servants will do as my lord commands.
26 Bana mpe basi na biso elongo na banyama mpe bibwele na biso bakotikala awa, na bingumba ya Galadi.
Our little ones, our wives, our flocks, and all our livestock shall be there in the cities of Gilead;
27 Kasi mpo na biso basali na yo, mobali nyonso akosimba bibundeli mpo na kokende na bitumba; tokokatisa na ngambo mpo na kobunda liboso ya Yawe ndenge kaka nkolo na biso asili koloba.
but your servants will pass over, every man who is armed for war, before the LORD to battle, as my lord says.”
28 Boye, Moyize apesaki mitindo na tina na bango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakambi ya mabota ya Isalaele.
So Moses commanded concerning them to Eleazar the priest, and to Joshua the son of Nun, and to the heads of the fathers’ households of the tribes of the children of Israel.
29 Moyize alobaki na bango: — Soki bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni, bango nyonso basimbi bibundeli mpo na kokende na bitumba, bakatisi ngambo ya Yordani elongo na bino liboso ya Yawe, mpe tango mokili ekokoma na se ya bokonzi na bino, bopesa bango mokili ya Galadi lokola libula na bango.
Moses said to them, “If the children of Gad and the children of Reuben will pass with you over the Jordan, every man who is armed to battle before the LORD, and the land is subdued before you, then you shall give them the land of Gilead for a possession;
30 Kasi soki bakatisi elongo na bino te mpo na kokende na bitumba, bakozwa libula elongo na bino, na mokili ya Kanana.
but if they will not pass over with you armed, they shall have possessions among you in the land of Canaan.”
31 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni bazongisaki: — Basali na yo bakosala makambo oyo Yawe alobaki na biso.
The children of Gad and the children of Reuben answered, saying, “As the LORD has said to your servants, so will we do.
32 Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.
We will pass over armed before the LORD into the land of Canaan, and the possession of our inheritance shall remain with us beyond the Jordan.”
33 Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani: mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.
Moses gave to them, even to the children of Gad, and to the children of Reuben, and to the half-tribe of Manasseh the son of Joseph, the kingdom of Sihon king of the Amorites, and the kingdom of Og king of Bashan; the land, according to its cities and borders, even the cities of the surrounding land.
34 Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo: Diboni, Ataroti, Aroeri;
The children of Gad built Dibon, Ataroth, Aroer,
35 Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka;
Atroth-shophan, Jazer, Jogbehah,
36 Beti-Nimira mpe Beti-Arani lokola bingumba ya makasi; mpe batongaki lisusu mapango mpo na bibwele na bango.
Beth Nimrah, and Beth Haran: fortified cities and folds for sheep.
37 Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo: Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi
The children of Reuben built Heshbon, Elealeh, Kiriathaim,
38 elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.
Nebo, and Baal Meon, (their names being changed), and Sibmah. They gave other names to the cities which they built.
39 Bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase bakendeki kino na Galadi, babotolaki yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
The children of Machir the son of Manasseh went to Gilead, took it, and dispossessed the Amorites who were therein.
40 Boye, Moyize apesaki mokili ya Galadi epai ya bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase, mpe bakomaki kovanda kuna.
Moses gave Gilead to Machir the son of Manasseh; and he lived therein.
41 Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi.
Jair the son of Manasseh went and took its villages, and called them Havvoth Jair.
42 Mpe Noba abotolaki Kenati mpe bamboka na yango ya mike oyo ya zingazinga mpe abengaki yango Noba, ndenge ezalaki kombo na ye.
Nobah went and took Kenath and its villages, and called it Nobah, after his own name.

< Mitango 32 >