< Mitango 3 >
1 Tala bakitani ya Aron mpe ya Moyize na tango oyo Yawe asololaki na Moyize, na ngomba Sinai.
haec sunt generationes Aaron et Mosi in die qua locutus est Dominus ad Mosen in monte Sinai
2 Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki: Nadabi, mwana ya liboso; Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
et haec nomina filiorum Aaron primogenitus eius Nadab dein Abiu et Eleazar et Ithamar
3 Yango nde bakombo ya bana mibali ya Aron, oyo babulisaki na nzela ya kopakola mafuta mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe.
haec nomina filiorum Aaron sacerdotum qui uncti sunt et quorum repletae et consecratae manus ut sacerdotio fungerentur
4 Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron.
mortui sunt Nadab et Abiu cum offerrent ignem alienum in conspectu Domini in deserto Sinai absque liberis functique sunt sacerdotio Eleazar et Ithamar coram Aaron patre suo
5 Yawe alobaki na Moyize:
locutus est Dominus ad Mosen dicens
6 « Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye.
adplica tribum Levi et fac stare in conspectu Aaron sacerdotis ut ministrent ei et excubent
7 Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo.
et observent quicquid ad cultum pertinet multitudinis coram tabernaculo testimonii
8 Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo.
et custodiant vasa tabernaculi servientes in ministerio eius
9 Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye.
dabisque dono Levitas
10 Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »
Aaron et filiis eius quibus traditi sunt a filiis Israhel Aaron autem et filios eius constitues super cultum sacerdotii externus qui ad ministrandum accesserit morietur
11 Yawe alobaki lisusu na Moyize:
locutusque est Dominus ad Mosen dicens
12 « Nakamati Ngai moko Balevi kati na bana ya Isalaele na esika ya bana mibali nyonso ya liboso, mbuma ya liboso ya libumu ya mwasi nyonso ya Isalaele.
ego tuli Levitas a filiis Israhel pro omni primogenito qui aperit vulvam in filiis Israhel eruntque Levitae mei
13 Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »
meum est enim omne primogenitum ex quo percussi primogenitos in terra Aegypti sanctificavi mihi quicquid primum nascitur in Israhel ab homine usque ad pecus mei sunt ego Dominus
14 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai:
locutus est Dominus ad Mosen in deserto Sinai dicens
15 « Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. »
numera filios Levi per domos patrum suorum et familias omnem masculum ab uno mense et supra
16 Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.
numeravit Moses ut praeceperat Dominus
17 Tala bakombo ya bakitani ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
et inventi sunt filii Levi per nomina sua Gerson et Caath et Merari
18 Tala bakombo ya bakitani ya Gerishoni, kolanda etuka moko na moko: Libini mpe Shimei.
filii Gerson Lebni et Semei
19 Bana mibali ya Keati, kolanda etuka moko na moko: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
filii Caath Amram et Iessaar Hebron et Ozihel
20 Bana mibali ya Merari, kolanda etuka moko na moko: Maali mpe Mushi. Bango nde bato ya bituka ya Balevi kolanda mabota na bango.
filii Merari Mooli et Musi
21 Tala bakitani oyo babimelaki na Gerishoni: etuka ya bato ya Libini mpe etuka ya Shimei. Bango nde bato ya bituka ya Gerishoni.
de Gerson fuere familiae duae lebnitica et semeitica
22 Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano.
quarum numeratus est populus sexus masculini ab uno mense et supra septem milia quingentorum
23 Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.
hii post tabernaculum metabuntur ad occidentem
24 Eliazafi, mwana mobali ya Laele, nde azalaki mokambi ya libota ya Gerishoni.
sub principe Eliasaph filio Lahel
25 Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani,
et habebunt excubias in tabernaculo foederis
26 barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana.
ipsum tabernaculum et operimentum eius tentorium quod trahitur ante fores tecti foederis et cortinas atrii tentorium quoque quod adpenditur in introitu atrii tabernaculi et quicquid ad ritum altaris pertinet funes tabernaculi et omnia utensilia eius
27 Tala bakitani oyo babimelaki na Keati: bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.
cognatio Caath habebit populos Amramitas et Iessaaritas et Hebronitas et Ozihelitas hae sunt familiae Caathitarum recensitae per nomina sua
28 Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba. Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
omnes generis masculini ab uno mense et supra octo milia sescenti habebunt excubias sanctuarii
29 Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.
et castrametabuntur ad meridianam plagam
30 Elitsafani, mwana mobali ya Uzieli, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Keati.
princepsque eorum erit Elisaphan filius Ozihel
31 Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.
et custodient arcam mensamque et candelabrum altaria et vasa sanctuarii in quibus ministratur et velum cunctamque huiuscemodi supellectilem
32 Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
princeps autem principum Levitarum Eleazar filius Aaron sacerdotis erit super excubitores custodiae sanctuarii
33 Tala bakitani oyo babimelaki na Merari: bato ya etuka ya Maali mpe bato ya etuka ya Mushi. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Merari.
at vero de Merari erunt populi Moolitae et Musitae recensiti per nomina sua
34 Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki na sanza moko ya mbotama mpe koleka, oyo batangamaki ezalaki nkoto motoba na nkama mibale.
omnes generis masculini ab uno mense et supra sex milia ducenti
35 Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari. Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo.
princeps eorum Surihel filius Abiahihel in plaga septentrionali castrametabuntur
36 Bato ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso ya Mongombo, oyo basala na mabaya: balate na yango, makonzi na yango, makolo na yango mpe biloko nyonso ya mike oyo bazalaki kokangisela yango.
erunt sub custodia eorum tabulae tabernaculi et vectes et columnae ac bases earum et omnia quae ad cultum huiuscemodi pertinent
37 Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango.
columnaeque atrii per circuitum cum basibus suis et paxilli cum funibus
38 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.
castrametabuntur ante tabernaculum foederis id est ad orientalem plagam Moses et Aaron cum filiis suis habentes custodiam sanctuarii in medio filiorum Israhel quisquis alienus accesserit morietur
39 Motango nyonso ya Balevi oyo Moyize mpe Aron batangaki kolanda mitindo ya Yawe, mpe bato ya bituka na bango, mibali nyonso kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki bato nkoto tuku mibale na mibale.
omnes Levitae quos numeraverunt Moses et Aaron iuxta praeceptum Domini per familias suas in genere masculino a mense uno et supra fuerunt viginti duo milia
40 Yawe alobaki na Moyize: « Tanga motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele, oyo bazali na sanza moko ya mbotama mpe koleka, mpe koma bakombo na bango.
et ait Dominus ad Mosen numera primogenitos sexus masculini de filiis Israhel a mense uno et supra et habebis summam eorum
41 Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. »
tollesque Levitas mihi pro omni primogenito filiorum Israhel ego sum Dominus et pecora eorum pro universis primogenitis pecoris filiorum Israhel
42 Boye, Moyize atangaki motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya Isalaele ndenge Yawe atindaki ye.
recensuit Moses sicut praeceperat Dominus primogenitos filiorum Israhel
43 Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato.
et fuerunt masculi per nomina sua a mense uno et supra viginti duo milia ducenti septuaginta tres
44 Yawe alobaki lisusu na Moyize:
locutusque est Dominus ad Mosen
45 « Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe.
tolle Levitas pro primogenitis filiorum Israhel et pecora Levitarum pro pecoribus eorum eruntque Levitae mei ego sum Dominus
46 Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi,
in pretio autem ducentorum septuaginta trium qui excedunt numerum Levitarum de primogenitis filiorum Israhel
47 okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.
accipies quinque siclos per singula capita ad mensuram sanctuarii siclus habet obolos viginti
48 Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. »
dabisque pecuniam Aaron et filiis eius pretium eorum qui supra sunt
49 Boye Moyize akongolaki mbongo ya lisiko epai ya bato oyo balekaki na motango ya bana liboso oyo Balevi oyo basikolaki.
tulit igitur Moses pecuniam eorum qui fuerant amplius et quos redemerant a Levitis
50 Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule.
pro primogenitis filiorum Israhel mille trecentorum sexaginta quinque siclorum iuxta pondus sanctuarii
51 Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
et dedit eam Aaroni et filiis eius iuxta verbum quod praeceperat sibi Dominus