< Mitango 29 >
1 « ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo.
七月初一日,你們應召開聖會,一切勞工都不許做:這是你們應歡呼吹號的日子。
2 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
應獻給上主馨香的全燔祭,即公牛犢一頭,公綿羊一隻,一歲無瑕疵的公羔羊七隻。
3 Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba;
至於同獻的素祭,應是油調的細麵:為每隻公牛犢獻大分之三「厄法」,為每隻公綿羊獻十分之二「厄法」;
4 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
至於七隻公羔羊, 每獻十分之一「厄法」。
5 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
此外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭,為你們贖罪。
6 Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
除月朔的全燔祭及同獻的素祭,日常全燔祭及同獻的素祭和依禮規應同獻的奠祭外,還應作為中悅上主的馨香火祭。
7 Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo.
七月初十,你們也應召開聖會,苦身克己,一切勞工都不許做。
8 Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko: mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
應給上主獻馨香的全燔祭:即公牛犢一頭,公綿羊一隻,一歲無瑕疵的公羔羊七隻。
9 Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba;
至於同獻的素祭,應是油調的細麵:為每隻公牛犢獻十分之三「厄法」,為每隻公綿羊獻十分之二「厄法」;
10 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
至於那七隻公羔羊,為每隻獻十分之一「厄法」。
11 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除贖罪節日的贖罪祭,日常全燔祭及同獻 的素祭和應獻的奠外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
12 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.
七月十五日,你們也應召開聖會,w勞工都不許做,為上主舉行七天慶節。
13 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
你們應祭全燔祭,作為中悅上主的火祭:即公牛犢十三頭,公綿羊二隻,一歲的公羔羊十四隻。
14 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali kati na bangombe yango zomi na misato ya mibali, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko kati na bameme yango mibale ya mibali, bakilo motoba;
至於同獻的素祭,是油調的細麵:十三頭公牛犢,為每頭獻十分之三「厄法」,二隻公綿羊,為每隻獻十分之二「厄法」。
15 mpe mpo na mwana meme moko na moko kati na bana meme yango zomi na minei, bakilo misato.
十四隻公羔羊,為每隻獻十分之一「厄法」。
16 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
17 Na mokolo ya mibale, bokobonza bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba;
第二日,應獻公牛犢十二頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的公羔羊十四隻。
18 elongo na makabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, kolanda motango oyo ekatama.
至於公牛犢、公綿羊和公羔羊應同獻的奠祭和素祭,依數照例奉獻。
19 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作為贖罪祭。
20 Na mokolo ya misato, bokobonza bangombe ya mibali zomi na moko, meme mibale ya mibali mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
第三日,應獻公牛犢十一頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的公羔羊十四隻。
21 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於與公牛犢、公綿羊和公羔羊應同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
22 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
23 Na mokolo ya minei, bokobonza bangombe ya mibali zomi, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
第四日,應獻公牛犢十頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的十四隻,
24 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於公牛犢、公綿羊和公羔羊應同獻的素祭和奠祭,依數照例奉獻。
25 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
26 Na mokolo ya mitano, bokobonza bangombe ya mibali libwa, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
第五日,應獻公牛犢九頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的十四隻。
27 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於與公牛犢、公綿羊和公羔羊應同獻的素祭和奠祭,依數照例奉獻。
28 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
29 Na mokolo ya motoba, bokobonza bangombe ya mibali mwambe, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
第六日,應獻公牛犢八頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的十四隻。
30 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於與公牛犢、公綿羊和公羔羊同獻的素祭和奠祭,依數照例奉獻。
31 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
32 Na mokolo ya sambo, bokobonza bangombe ya mibali sambo, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
第七日,應獻公牛犢七頭,公綿羊二隻,一歲無瑕疵的十四隻。
33 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於與公牛犢、公綿羊和公羔羊應同獻的素祭和奠祭,依數照例奉獻。
34 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻金山羊作贖罪祭。
35 Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
第八日,你們應召開盛會,一切勞工都不許做。
36 Bokobonza lokola mbeka ya kotumba mpe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali; mpe bana mibali ya meme, sambo, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
應獻全燔祭作為中悅上主的馨香火祭:即公牛犢一頭,公綿羊一隻,一歲無瑕疵的七隻。
37 Mpo na ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
至於與公牛犢、公山羊和公羔羊及同獻的素祭和奠祭,依數照例奉獻。
38 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
除日常全燔祭及同獻的素祭和奠祭外,還應獻一隻公山羊作贖罪祭。
39 Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › »
這是你們在慶節內,除那些為還願或自願所獻全燔祭、素祭、奠祭及和平祭外,所應獻給上主的祭獻」。
40 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye.
梅瑟全照上主所吩咐的一切,教訓了以色列子民。