< Mitango 27 >

1 Bana basi ya Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase bazalaki bakitani ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi. Bakombo na bango ezalaki: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. Bayaki
属约瑟的儿子玛拿西的各族,有玛拿西的玄孙,玛吉的曾孙,基列的孙子,希弗的儿子西罗非哈的女儿,名叫玛拉、挪阿、曷拉、密迦、得撒。她们前来,
2 liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki:
站在会幕门口,在摩西和祭司以利亚撒,并众首领与全会众面前,说:
3 « Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te.
“我们的父亲死在旷野。他不与可拉同党聚集攻击耶和华,是在自己罪中死的;他也没有儿子。
4 Bongo mpo na nini kombo ya tata na biso elimwa kaka boye na libota na ye, mpo ete azalaki na mwana mobali te? Pesa biso mpe eteni ya mabele kati na bandeko ya tata na biso. »
为什么因我们的父亲没有儿子就把他的名从他族中除掉呢?求你们在我们父亲的弟兄中分给我们产业。”
5 Boye, Moyize amemaki likambo na bango liboso ya Yawe.
于是,摩西将她们的案件呈到耶和华面前。
6 Yawe alobaki na Moyize:
耶和华晓谕摩西说:
7 « Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango.
“西罗非哈的女儿说得有理。你定要在她们父亲的弟兄中,把地分给她们为业;要将她们父亲的产业归给她们。
8 Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi.
你也要晓谕以色列人说:‘人若死了没有儿子,就要把他的产业归给他的女儿。
9 Soki mpe azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali.
他若没有女儿,就要把他的产业给他的弟兄。
10 Soki mpe azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye.
他若没有弟兄,就要把他的产业给他父亲的弟兄。
11 Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › »
他父亲若没有弟兄,就要把他的产业给他族中最近的亲属,他便要得为业。’这要作以色列人的律例典章,是照耶和华吩咐摩西的。”
12 Yawe alobaki na Moyize: — Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele.
耶和华对摩西说:“你上这亚巴琳山,观看我所赐给以色列人的地。
13 Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali,
看了以后,你也必归到你列祖那里,像你哥哥亚伦一样。
14 pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini.
因为你们在寻的旷野,当会众争闹的时候,违背了我的命,没有在涌水之地、会众眼前尊我为圣。”(这水就是寻的旷野加低斯米利巴水。)
15 Moyize alobaki na Yawe:
摩西对耶和华说:
16 — Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo;
“愿耶和华万人之灵的 神,立一个人治理会众,
17 moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli.
可以在他们面前出入,也可以引导他们,免得耶和华的会众如同没有牧人的羊群一般。”
18 Yawe azongiselaki Moyize: — Kamata Jozue, mwana mobali ya Nuni, moto oyo azali na molimo mpe tia ye maboko na yo.
耶和华对摩西说:“嫩的儿子约书亚是心中有圣灵的;你将他领来,按手在他头上,
19 Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango.
使他站在祭司以利亚撒和全会众面前,嘱咐他,
20 Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye.
又将你的尊荣给他几分,使以色列全会众都听从他。
21 Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.
他要站在祭司以利亚撒面前;以利亚撒要凭乌陵的判断,在耶和华面前为他求问。他和以色列全会众都要遵以利亚撒的命出入。”
22 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye. Akamataki Jozue mpe atelemisaki ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele.
于是摩西照耶和华所吩咐的将约书亚领来,使他站在祭司以利亚撒和全会众面前,
23 Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
按手在他头上,嘱咐他,是照耶和华借摩西所说的话。

< Mitango 27 >