< Mitango 26 >
1 Sima na etumbu wana, Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron:
і сказав Господь до Мойсея й до Елеазара, сина священика Аарона, говорячи:
2 « Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »
„Перелічіть усю громаду Ізраїлевих синів від віку двадцяти літ і вище за домами їхніх батьків, кожного, хто здатний до ві́йська в Ізраїлі.
3 Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki:
І говорив до них Мойсей та священик Елеазар у моавських степа́х над приєрихонським Йорда́ном, говорячи:
4 « Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito:
„ Перелічіть від віку двадцяти літ і вище, як наказав був Господь Мойсеєві і Ізраїлевим синам, що виходили з єгипетського кра́ю“.
5 Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki; na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu;
Руви́м, перворідний Ізраїлів. Рувимові сини: Ханох — рід Ханохів, від Паллу — рід Паллуїв,
6 na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi.
від Хецрона — рід Хецронів, від Кармі — рід Карміїв.
7 Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato.
Оце Руви́мові роди. І були їхні перелічені: сорок і три тисячі й сімсот і тридцять.
8 Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu,
А сини Паллуєві: Еліяв.
9 mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe.
А сини Еліявові: Немуїл, і Датан, і Авірон. Це той Дата́н та Авіро́н, покликані громади, що підбу́рювали проти Мойсея та проти Аарона в Кореєвій громаді, коли вони підбурювали на Господа.
10 Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa.
І відкрила земля свої уста, та й поглинула їх та Корея при смерті тієї громади, коли огонь пожер був двісті і п'ятдеся́т люда, і стали вони за ознаку.
11 Kasi bakitani ya Kore bakufaki te.
А Кореєві сини не померли.
12 Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli; na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini; na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini;
Сини Симео́нові за їхніми ро́дами: від Немуїла — рід Немуїлів, від Яміна — рід Ямінів, в Яхіна — рід Яхінів,
13 na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi; na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo.
від Зераха — рід Зерахів, від Саула — рід Саулів.
14 Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale.
Оце Симеонові ро́ди, — двадцять і дві тисячі й двісті.
15 Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni; na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi; na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni;
Сини Ґадові за їхніми ро́дами: від Цефона — рід Цефонів, від Хаґґі — рід Хаґґіїв, від Шуні — рід Шуніїв,
16 na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini; na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri;
від Озні — рід Озніїв, від Ері — рід Еріїв,
17 na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki; na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli.
від Арода рід Ародів, від Ар'елі — рід Ар'еліїв.
18 Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
Оце ро́ди Ґадових синів, за їхнім переліченням: сорок тисяч і п'ятсо́т.
19 Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.
Сини Юдині: Ер та Онан; і помер Ер та Онан у ханаанськім Кра́ї.
20 Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.
І були Юдині сини за їхніми ро́дами: від Шели — рід Шелин, від Переца — рід Переців, від Зераха — рід Зерахів.
21 Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli.
А Пе́рецеві сини були́: від Хецрона — рід Хецронів, від Хамула — рід Хамулів.
22 Yango nde ezalaki mabota ya Yuda; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano.
Оце Юдини ро́ди за їхнім переліченням: сімдеся́т і шість тисяч і п'ятсо́т.
23 Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola; na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa;
Сини Іссаха́рові за їхніми ро́дами: Тола — рід Толин, від Цувви — рід Цуввин,
24 na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi; na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi.
від Яшува — рід Яшувів, від Шімрона — рід Шімронів.
25 Yango nde ezalaki mabota ya Isakari; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato.
Оце Іссаха́рові ро́ди за їхнім переліченням: шістдеся́т і чотири тисячі й триста.
26 Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi; na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni; na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli.
Сини Завуло́нові за їхніми ро́дами: від Середа — рід Середів, від Елона — рід Елонів, від Яхлеїла — рід Яхлеїлів.
27 Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano.
Оце Завулонові роди за їхнім переліченням: шістдеся́т тисяч і п'ятсо́т.
28 Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki:
Сини Йо́сипа за їхніми ро́дами: Манасі́я та Єфре́м.
29 Bakitani ya Manase: na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi); na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi.
Сини Манасі́їні: від Махіра — рід Махірів, а Махір породив Ґілеада, від Ґілеада — рід Гілеадів.
30 Tala bakitani ya Galadi: na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri; na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki;
Оце Ґілеадові сини́: Єзер — рід Єзерів, від Хелека — рід Хелеків,
31 na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli; na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi;
і Асріїл — рід Асріїлів, і Шехем — рід Шехемів,
32 na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida; na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi.
і Шеміда — рід Шемідин, і Хефер — рід Хеферів.
33 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi; bongo, tala bakombo na bango: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
А Целофхад, син Хеферів, не мав синів, а тільки дочо́к. А ймення дочо́к: Махла й Ноа, Хоґла, Мілка й Тірца.
34 Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo.
Оце ро́ди Манасіїні, а їхні перелічені: п'ятдеся́т і дві тисячі й сімсот.
35 Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela; na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri; na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani.
Оце Єфре́мові сини́ за їхніми ро́дами: від Шутелаха — рід Шутелахів, від Бехера — рід Бехерів, від Тахана — рід Таханів.
36 Tala bakitani ya Shutela: na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani.
А оце Шутелахові сини́: від Ерана — рід Еранів.
37 Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.
Оце ро́ди Єфремових синів за їхнім переліченням: тридцять і дві тисячі і п'ятсот. Оце Йо́сипові сини́ за їхніми ро́дами.
38 Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela; na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli; na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami;
Сини́ Веніями́нові за їхніми ро́дами: від Бели — рід Белин, від Ашбела — рід Ашбелів, від Ахірама — рід Ахірамів,
39 na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami; na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami.
від Шефуфама — рід Шефуфамів, від Хуфама — рід Хуфамів.
40 Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki: na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi; na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani.
А сини́ Белині були: Ард, і Нааман, від Арда — рід Ардів, від Наамана — рід Нааманів.
41 Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano.
Оце Веніями́нові сини́ за їхніми ро́дами, а перелічені їхні: сорок і п'ять тисяч і шістсо́т.
42 Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. Bango nde bazalaki bakitani ya Dani:
Оце Да́нові сини за їхніми ро́дами: від Шухама — рід Шухамів. Оце Данові ро́ди за їхніми родами.
43 bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei.
Всі Шухамові ро́ди за їхнім перелі́ченням: шістдеся́т і чотири тисячі і чоти́риста.
44 Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina; na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi; na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria;
Аси́рові сини́ за їхніми ро́дами: від Їмни — рід Їмнин, від Їшві рід Їшвіїв, від Берії — рід Беріїв.
45 na nzela ya bakitani ya Beria: na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi; na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli.
Сини Берії: від Хевера — рід Хеверів, від Малкіїла — рід Малкіїлів,
46 Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera.
а ймення Аси́рової дочки́ Сарах.
47 Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
Оце ро́ди Аси́рових синів за їхнім переліченням: п'ятдеся́т і три тисячі й чотириста.
48 Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli; na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni;
Сини Нефтали́мові за їхніми ро́дами: від Яхцеїла — рід Яхцеїлів, від Ґуні — рід Ґуніїв,
49 na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri; na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi.
від Єцера — рід Єцерів, від Шіллема — рід Шіллемів.
50 Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.
Оце ро́ди Нефтали́мові за їхніми ро́дами й за їхнім перелі́ченням: сорок і п'ять тисяч і чотириста.
51 Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.
Оце перелічені Ізраїлевих синів: шістсот тисяч і тисяча й сімсо́т і тридцять.
52 Yawe alobaki na Moyize:
І промовив Господь до Мойсея, говорячи:
53 « Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana.
Для цих буде поділений край у спа́док за числом імен.
54 Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki.
Числе́нному примно́жиш спа́дщину його, — а малому зме́ншиш спа́док його, кожному за переліченням його буде дана спа́дщина його.
55 Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.
Тільки жеребко́м поділиться землю, — вони будуть володіти за іменами племе́н їхніх батьків.
56 Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. »
За жеребком буде поділена спа́дщина його поміж числе́нним та мали́м.
57 Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango: na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni; na nzela ya Keati, bakitani ya Keati; na nzela ya Merari, bakitani ya Merari.
А оце перелічені Левити за їхніми ро́дами: від Ґершона — рід Ґершонів, від Кегата — рід Кегатів, від Мерарі — рід Мераріїв.
58 Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi: bakitani ya libota ya Libini, bakitani ya libota ya Ebron, bakitani ya libota ya Maali, bakitani ya libota ya Mushi, bakitani ya libota ya Kore. Keati azalaki tata ya Amirami;
Оце роди Леві́єві: рід Левіїв, рід Хевроніїв, рід Махліїв, рід Мушіїв, рід Кореїв, а Кегат породив Амрама.
59 bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.
А ймення Амрамової жінки — Йохевед, дочка́ Левіева, що вродила її Левієві жінка його в Єгипті, а вона вродила Амрамові Аарона, і Мойсея, і сестру їх Марія́м.
60 Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari.
І вродилися Ааро́нові Надав, й Авігу, й Елеазар, й Ітамар.
61 Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya.
А Надав та Авігу померли, коли вони прино́сили чужий огонь перед Господнє лице.
62 Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.
І були́ їхні перелічені — двадцять і три тисячі, кожен чоловічої статі від місячного віку й вище; бо вони не були перелічені серед Ізраїлевих синів, — не да́на бо їм спа́дщина серед Ізраїлевих синів.
63 Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.
Оце перелічені Мойсея та священика Елеаза́ра, що перелічували Ізраїлевих синів у моавських степа́х над приєрихо́нським Йорда́ном.
64 Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.
А серед тих не було вже нікого з перелічених Мойсея та священика Аарона, що перелічували Ізраїлевих синів на Сінайській пустині,
65 Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
бо Господь був сказав їм: „Конче повмираєте ви на пустині“. І не позостався з них ніхто, крім Кале́ва, сина Єфуннеєвого, та Ісуса, сина Нави́нового.