< Mitango 24 >

1 Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
Balaam dze sii azɔ be edze Yehowa ŋu be yeayra Israel, eya ta megayi ɖaka nu abe ale si wòwɔna tsã la ene o, ke boŋ edze ŋgɔ gbegbe la.
2 Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye;
Esi Balaam kpɔ eŋgɔ la, ekpɔ Israelviwo woƒu asaɖa anyi ɖe woƒe to vovovoawo me. Tete Mawu ƒe Gbɔgbɔ ɖiɖi ɖe edzi,
3 mpe akomaki koloba maloba oyo: « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
eye wògblɔ nya ɖi be, “Balaam, Beor ƒe viŋutsu gblɔ be: ame si kpɔa nu nyuie la ƒe nyagblɔɖi,
4 maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo:
ame si sea Mawu ƒe nya la ƒe nyagblɔɖi, ame si xɔa ɖeɖefia tso Ŋusẽkatãtɔ la gbɔ, ame si tsyɔa mo anyi, eye eƒe ŋku nɔa te la ƒe nyawo.
5 ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele!
“O! Yakob, wò agbadɔwo dzeani loo! O! Israel, wò nɔƒewo nyo!
6 Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.
“Wokeke abe balimewo ene. Wole abe amabɔ siwo le tɔsisi to ene. Wole abe aloe si Yehowa do ene. Wole abe sedati le tɔwo to ene.
7 Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.
Tsi asi tso woƒe tɔkpowo me. Tsi anɔ woƒe kuwo me fũu. “Woƒe fia axɔ ŋkɔ wu Agag. Woado woƒe fiaɖuƒe ɖe dzi.
8 Nzambe abimisaki bango na Ejipito, bazalaka makasi lokola mpakasa, babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, batobolaka yango na makonga na bango.
“Mawu kplɔ wo do goe tso Egipte. Woƒe ŋusẽ le abe to ƒe ŋusẽ ene. Wovuvu dukɔ siwo tso ɖe wo ŋu, eye woŋe woƒe ƒuwo wuliwuli heŋɔ wo kple woƒe aŋutrɔwo.
9 Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi; nani akokoka kotelemisa bango? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe! › »
Wole adeklo dzi abe dzata ene, eye abe dzatanɔ ene la, ame ka ate ŋu anyɔ wo? “Woayra ame siwo yraa wò. Eye woaƒo fi ade ame siwo ƒoa fi dea wò!”
10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki: — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.
Fia Balak do dɔmedzoe vevie azɔ ɖe Balaam ŋu. Eƒo asikpe hedo ɣli be, “Meyɔ wò be nàƒo fi ade nye futɔwo, ke nèyra wo boŋ zi etɔ̃.
11 Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
Dzo le afi sia! Trɔ yi mia de! Medi be made bubu gã aɖe ŋuwò, ke Yehowa te wò ɖe megbe tso bubu gã sia gbɔ!”
12 Balami azongiselaki Balaki: — Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete
Balaam ɖo eŋu na Balak be, “Ɖe nyemegblɔe na wò ame dɔdɔwo
13 « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
be ne Balak tsɔ klosalo kple sika de fiasã aɖe me wòyɔ kpikpikpi nam hã la, nyemate ŋu agblẽ Yehowa ƒe nyawo ɖi agblɔ nye ŋutɔ nye nyawo oa? Megblɔ be nya si Yehowa agblɔ la ko magblɔ!
14 Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
“Ɛ̃, matrɔ azɔ ayi nye ŋutɔ nye amewo dome. Ke gbã la, na magblɔ nu si Israelviwo awɔ wò amewo la na wò!”
15 Bongo Balami alobaki maloba oyo: « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
Ale wògblɔ nyagblɔɖi siawo nɛ: “Balaam, Beor ƒe viŋutsue nye ame si ƒe ŋkuwo woʋu!
16 oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka:
Esea Mawu ƒe nyawo, nunya tso Dziƒoʋĩtɔ la gbɔ le esi. Ekpɔa nu si Mawu Ŋusẽkatãtɔ la ɖena fianɛ. Etsyɔ mo anyi, eye eƒe ŋkuwo ʋu.
17 ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
“Mekpɔe le Israel ŋgɔ be, le ŋgɔgbe ʋĩi la, ɣletivi aɖe adzɔ tso Yakob me! Dziɖula sia tso Israel. Aɖu Moabtɔwo dzi; atsrɔ̃ Set ƒe viwo.
18 Bakobotola mokili ya Edomi, bakobotola Seiri, monguna na ye, kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka.
Israel axɔ Edom kple Seir siaa; woaɖu woƒe futɔwo dzi. Ke Israel akpɔ ŋusẽ
19 Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »
dziɖula atso Yakob, eye wòagbã du geɖewo.”
20 Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo: « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »
Balaam kpɔ Amalektɔwo ƒe aƒewo dzi ɖa, eye wògblɔ nya ɖi be, “Amalek nye gbãtɔ le dukɔwo dome tsã Ke tsɔtsrɔ̃ koe le ŋgɔ nɛ fifia!”
21 Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo: « Esika na yo ya kovanda ezali makasi, zala na yo ezalaka kati na mabanga;
Ekpɔ Kenitɔwo dzi ɖa hegblɔ be, “Ɛ̃, èle teƒe sesẽ aɖe, èwɔ wò atɔwo ɖe agakpewo me,
22 kasi bino bato ya Keni, bokobebisama tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. »
ke woatsrɔ̃ mi, Kenitɔwo. Asiria fia ƒe aʋakɔ sesẽ la aɖe aboyo mi tso anyigba sia dzi!”
23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo: « Oh mawa! Nani akoki kozala na bomoi, wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye?
Ewu eƒe nyagblɔɖi la nu be, “Aléle! Ame ka ate ŋu anɔ agbe ne Mawu wɔ nu sia?
24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »
Tɔdziʋuwo atso Kipro ƒuta woaɖu Eber kple Asiria dzi, ke woaɖu woawo hã dzi.”
25 Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.
Ale Balaam kple Balak klã mɔ, eye wo dometɔ ɖe sia ɖe trɔ yi wo de.

< Mitango 24 >