< Mitango 22 >

1 Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.
And the sons of Israel journey and encamp in the plains of Moab beyond the Jordan, [by] Jericho.
2 Boye Balaki, mwana mobali ya Tsipori, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo bana ya Isalaele basalaki bato ya Amori.
And Balak son of Zippor sees all that Israel has done to the Amorite,
3 Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele.
and Moab is exceedingly afraid of the presence of the people, for it [is] numerous; and Moab is distressed by the presence of the sons of Israel,
4 Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani: « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.
and Moab says to [the] elderly of Midian, “Now the assembly licks up all that is around us, as the ox licks up the green thing of the field.” And Balak son of Zippor [is] king of Moab at that time,
5 Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami: — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.
and he sends messengers to Balaam son of Beor, to Pethor, which [is] by the River of the land of the sons of his people, to call for him, saying, “Behold, a people has come out of Egypt; behold, it has covered the eye of the land, and it is abiding in front of me;
6 Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.
and now, come, please curse this people for me, for it [is] mightier than I. It may be I prevail, [and] we strike it, and I cast it out from the land; for I have known that which you bless is blessed, and that which you curse is cursed.”
7 Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki.
And [the] elderly of Moab and [the] elderly of Midian go with divinations in their hand, and they come to Balaam and speak the words of Balak to him,
8 Balami alobaki na bango: — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye.
and he says to them, “Lodge here tonight, and I have brought you back word, as YHWH speaks to me”; and the princes of Moab abide with Balaam.
9 Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye: — Bato oyo bazali epai na yo bazali banani?
And God comes to Balaam and says, “Who [are] these men with you?”
10 Balami alobaki na Nzambe: — Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, atindeli ngai maloba oyo:
And Balaam says to God, “Balak, son of Zippor, king of Moab, has sent to me:
11 « Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. »
Behold, the people that is coming out from Egypt and covers the eye of the land—now come, pierce it for me; it may be I am able to fight against it and have cast it out”;
12 Kasi Nzambe alobaki na Balami: — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama.
and God says to Balaam, “You do not go with them; you do not curse the people, for it [is] blessed.”
13 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki: — Bozonga na mboka na bino, pamba te Yawe aboyi ete nakende elongo na bino.
And Balaam rises in the morning and says to the princes of Balak, “Go to your land, for YHWH is refusing to permit me to go with you”;
14 Boye, bakambi ya Moabi bazongaki epai ya Balaki mpe balobaki: — Balami aboyi koya elongo na biso.
and the princes of Moab rise, and come to Balak, and say, “Balaam is refusing to come with us.”
15 Balaki atindaki bakambi mosusu oyo bazalaki mingi mpe na lokumu koleka bakambi oyo atindaki liboso.
And Balak adds yet to send princes, more numerous and honored than these,
16 Bakomaki epai ya Balami mpe balobaki: — Tala liloba oyo Balaki, mwana ya mobali ya Tsipori alobi: « Tika ete eloko moko te epekisa yo koya epai na ngai!
and they come to Balaam and say to him, “Thus said Balak son of Zippor: Please do not be withheld from coming to me,
17 Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. »
for I honor you very greatly, and all that you say to me I do; and come, please pierce this people for me.”
18 Kasi Balami azongiselaki bango: — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai.
And Balaam answers and says to the servants of Balak, “If Balak gives to me the fullness of his house of silver and gold, I am not able to pass over the command of my God YHWH, to do a little or a great thing;
19 Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai.
and now, please abide in this [place], you also, tonight, then I know what YHWH is adding to speak with me.”
20 Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki: — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo.
And God comes to Balaam by night and says to him, “If the men have come to call for you, rise, go with them, and only the thing which I speak to you—do it.”
21 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki, abongisaki ane na ye ya mwasi mpe akendeki elongo na bakambi ya Moabi.
And Balaam rises in the morning, and saddles his donkey, and goes with the princes of Moab,
22 Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale.
and the anger of God burns because he is going, and the Messenger of YHWH stations Himself in the way for an adversary to him, and he is riding on his donkey, and two of his servants [are] with him,
23 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela.
and the donkey sees the Messenger of YHWH standing in the way with His drawn sword in His hand, and the donkey turns aside out of the way and goes into a field, and Balaam strikes the donkey to turn it aside into the way.
24 Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale.
And the Messenger of YHWH stands in a narrow path of the vineyards, [with] a wall on this [side] and a wall on that [side],
25 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, epusanaki pembeni ya mir, efinaki lokolo ya Balami na mir. Balami abetaki yango lisusu.
and the donkey sees the Messenger of YHWH, and is pressed to the wall, and presses Balaam’s foot to the wall, and he adds to strike her;
26 Anjelu ya Yawe alekaki liboso na bango mpe akendeki kotelema na esika moko ya moke penza, epai wapi nzela ya kobalukela na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi ezali te.
and the Messenger of YHWH adds to pass over, and stands in a narrow place where there is no way to turn aside [to] the right or left,
27 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye.
and the donkey sees the Messenger of YHWH, and crouches under Balaam, and the anger of Balaam burns, and he strikes the donkey with a staff.
28 Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami: — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato?
And YHWH opens the mouth of the donkey, and she says to Balaam, “What have I done to you that you have struck me these three times?”
29 Balami azongiselaki ane: — Ozali kosakana na ngai! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo!
And Balaam says to the donkey, “Because you have rolled yourself against me; oh that there were a sword in my hand, for now I had slain you”;
30 Ane elobi na Balami: — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye? Balami azongisaki: — Te!
and the donkey says to Balaam, “Am I not your donkey on which you have ridden since [I became] yours, even to this day? Have I at all been accustomed to do thus to you?” And he says, “No.”
31 Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
And YHWH uncovers the eyes of Balaam, and he sees the Messenger of YHWH standing in the way with His drawn sword in His hand, and he bows and pays respect, to his face;
32 Anjelu ya Yawe atunaki ye: — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai.
and the Messenger of YHWH says to him, “Why have you struck your donkey these three times? Behold, I have come out for an adversary, for [your] way has been perverse before Me,
33 Ane emonaki Ngai mpe ekimaki Ngai mbala misato. Soki ekimaki Ngai te, solo penza, nalingaki koboma yo, kasi nalingaki kotika yango na bomoi.
and the donkey sees Me and turns aside at My presence these three times; unless she had turned aside from My presence, surely I had also slain you now, and kept her alive.”
34 Balami alobaki na anjelu ya Yawe: — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.
And Balaam says to the Messenger of YHWH, “I have sinned, for I did not know that You [are] standing to meet me in the way; and now, if [it is] evil in Your eyes, I turn back by myself.”
35 Anjelu ya Yawe alobaki na Balami: — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki.
And the Messenger of YHWH says to Balaam, “Go with the men; and only the word which I speak to you—it you speak”; and Balaam goes with the princes of Balak.
36 Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye.
And Balak hears that Balaam has come, and goes out to meet him, to a city of Moab, which [is] on the border of Arnon, which [is] in the extremity of the border;
37 Balaki alobaki na Balami: — Boni, natindaki te bato na lombangu mpo na kobenga yo? Mpo na nini oyaki epai na ngai te? Okanisaki ete nazangi makoki ya kofuta yo?
and Balak says to Balaam, “Did I not diligently send to you to call for you? Why did you not come to me? Am I not truly able to honor you?”
38 Balami azongiselaki Balaki: — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.
And Balaam says to Balak, “Behold, I have come to you; now, am I able to speak anything at all? The word which God sets in my mouth—it I speak.”
39 Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti.
And Balaam goes with Balak, and they come to Kirjath-Huzoth,
40 Balaki abonzaki mbeka ya ngombe mpe ya meme, apesaki ndambo epai ya Balami mpe ndambo mosusu epai ya bakambi oyo bazalaki na ye elongo.
and Balak sacrifices oxen and sheep, and sends [some] to Balaam and to the princes who [are] with him;
41 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.
and it comes to pass in the morning, that Balak takes Balaam and causes him to go up [to] the high places of Ba‘al, and he sees the extremity of the people from there.

< Mitango 22 >