< Mitango 21 >

1 Tango moto ya mboka Kanana, mokonzi ya Aradi, oyo azalaki kovanda na Negevi ayokaki ete Isalaele azali koya pembeni ya nzela ya Atarimi, abundisaki bana ya Isalaele mpe akangaki bamosusu kati na bango na boloko.
Le Cananéen, roi d’Arad, qui habitait au midi, ayant appris qu’Israël s’acheminait par ces régions, attaqua les Israélites et en fit quelques-uns prisonniers.
2 Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe: « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. »
Mais Israël fit un vœu à l’Éternel en disant: "Si tu livres ce peuple en mon pouvoir, je vouerais ses villes à l’anathème."
3 Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba: kobebisama.
L’Éternel écouta la voix d’Israël et lui livra les Cananéens; et on les frappa d’anathème, eux et leurs villes, et l’on donna à ce lieu le nom de Horma.
4 Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela.
Ils partirent de Hor-la-Montagne dans la direction de la mer des Joncs, pour tourner le pays d’Edom. Le peuple perdit courage pendant cette marche,
5 Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki: « Mpo na nini boye! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba! »
et il se plaignit de Dieu et de Moïse: "Pourquoi nous avez-vous tirés de l’Egypte, pour nous faire mourir dans ce désert? Car il n’y a point de pain, point d’eau, et nous sommes excédés de ce misérable aliment."
6 Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki.
Alors l’Éternel suscita contre le peuple les serpents brûlants, qui mordirent le peuple, et il périt une multitude d’Israélites.
7 Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki: « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.
Et le peuple s’adressa à Moïse, et ils dirent: "Nous avons péché en parlant contre l’Éternel et contre toi; intercède auprès de l’Éternel, pour qu’il détourne de nous ces serpents!" Et Moïse intercéda pour le peuple.
8 Yawe alobaki na Moyize: — Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika.
L’Éternel dit à Moïse: "Fais toi-même un serpent et place-le au haut d’une perche: quiconque aura été mordu, qu’il le regarde et il vivra!"
9 Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki.
Et Moïse fit un serpent d’airain, le fixa sur une perche; et alors, si quelqu’un était mordu par un serpent, il levait les yeux vers le serpent d’airain et était sauvé.
10 Bana ya Isalaele balongwaki wana mpe bakendeki kotonga molako na bango na Oboti.
Les enfants d’Israël levèrent le camp, puis campèrent à Oboth.
11 Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka.
Partis d’Oboth, ils campèrent à lyyê-Haabarîm, dans le désert situé devant Moab, vers le soleil levant.
12 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi.
De là ils repartirent et campèrent dans la vallée de Zéred.
13 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori.
De là ils repartirent et campèrent sur la rive de l’Arnon située dans le désert et partant du territoire des Amorréens; car l’Arnon est la frontière de Moab, entre Moab et le territoire amorréen.
14 Yango wana, buku ya bitumba ya Yawe eloba: « Wahebi kati na Sufa mpe miluka na yango, Arinoni
C’Est pourquoi l’on cite, dans l’histoire des guerres du Seigneur, "Vaheb en Soufa, et les affluents de l’Arnon;
15 mpe nzela ya miluka ya mabwaku oyo ekenda kino na engumba Ari mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. »
et encore le bassin des rivières, qui s’étend vers Chébeth-Ar et confine à la frontière de Moab…"
16 Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize: « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. »
Puis, ils gagnèrent Beêr, ce puits à propos duquel le Seigneur dit à Moïse: "Assemble le peuple, je veux lui donner de l’eau."
17 Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo: « Oh libulu, bimisa mayi! Boyembela yango!
C’Est alors qu’Israël chanta ce cantique: "Jaillis, ô source! Acclamez-la!…
18 Libulu oyo bana bakonzi batimola, oyo bato minene batobola na mangenda mpe banzete na bango. » Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana;
Ce puits, des princes l’ont creusé, les plus grands du peuple l’ont ouvert, avec le sceptre, avec leurs verges!…" Et de Midbar ils allèrent à Mattana;
19 kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti;
de Mattana à Nahalïel; de Nahalïel à Bamoth;
20 mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.
et de Bamoth, au plateau qui est dans la campagne de Moab, au sommet du Pisga, d’où l’on découvrait l’étendue du désert.
21 Bana ya Isalaele batindaki bantoma mpo na koyebisa Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori:
Israël envoya des députés à Sihôn, roi des Amorréens, pour lui dire:
22 « Tika biso tolekela na mokili na yo. Tokokota te na elanga to na elanga ya vino moko, mpe tokomela te mayi ya mabulu na bino; tokoleka kaka na nzela ya monene ya mokonzi kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
"Je voudrais passer par ton pays. Nous ne traverserons ni champs ni vignobles, nous ne boirons point de l’eau des citernes; nous irons par la route royale, jusqu’à ce que nous ayons passé ta frontière."
23 Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi.
Mais Sihôn ne permit point à Israël de traverser son territoire; et Sihôn rassembla tout son peuple, marcha à la rencontre d’Israël, vers le désert et atteignit Yahça, où il livra la bataille à Israël.
24 Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi.
Israël le passa au fil de l’épée, et il conquît son pays depuis l’Arnon jusqu’au Jaboc, jusqu’aux possessions des Ammonites; car elle était forte, la frontière des enfants d’Ammon.
25 Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga.
Israël s’empara de toutes ces villes; et il s’établit dans toutes les villes des Amorréens, à Hesbon et dans toutes ses dépendances.
26 Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.
Car Hesbon était devenue la ville de Sihôn, roi des Amorréens, celui-ci ayant fait la guerre au précédent roi de Moab, et lui ayant pris tout son territoire jusqu’à l’Arnon.
27 Yango wana balobaka na masese: « Boya na Eshiboni! Tika ete etelema lisusu! Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu!
C’Est à ce propos que les poètes disaient: "Venez à Hesbon! Cité de Sihôn, qu’elle se relève et s’affermisse!
28 Moto ebimaki wuta na Eshiboni, ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni, etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni.
Car un feu a jailli de Hesbon, une flamme, de la ville de Sihôn, qui a dévoré Ar-en-Moab, les maîtres des hauteurs d’Arnon.
29 Oh Moabi, mawa na yo! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.
C’Est fait de toi. Moab! Tu es perdu, peuple de Camôs!… Ses fils, il les laisse mettre en fuite, ses filles, emmener captives, par un roi amorréen, par Sihôn!
30 Kasi tolongi bango; Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, topanzi yango nyonso kino na Nofaki, mpe kino na Medeba. »
Hesbon perdu, nous les avons poursuivis de nos traits jusqu’à Dibôn; nous avons dévasté jusqu’à Nôfah, même jusqu’à Mèdeba!…"
31 Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori.
Israël s’établit donc dans le pays des Amorréens.
32 Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
Moïse envoya explorer Yazêr; on s’empara de ses dépendances, et l’on déposséda les Amorréens qui y demeuraient.
33 Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi.
Puis ils se dirigèrent, en montant plus haut, vers le Basan. Og, roi du Basan, s’avança à leur rencontre avec tout son peuple, pour leur livrer bataille, à Edréi.
34 Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
Mais l’Éternel dit à Moïse: "Ne le crains point, car je le livre en tes mains, lui et tout son peuple, et son pays; et tu le traiteras comme tu as traité Sihôn, roi des Amorréens, qui résidait à Hesbon."
35 Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.
Et ils le battirent, ainsi que ses fils et tout son peuple, tellement qu’ils n’en laissèrent survivre aucun; et ils conquirent son territoire.

< Mitango 21 >