< Mitango 20 >

1 Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.
The children of Israel, even the whole congregation, came into the wilderness of Zin in the first month. The people stayed in Kadesh. Miriam died there, and was buried there.
2 Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron.
There was no water for the congregation; and they assembled themselves together against Moses and against Aaron.
3 Baswanisaki Moyize mpe balobaki: « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe!
The people quarrelled with Moses, and spoke, saying, “We wish that we had died when our brothers died before the LORD!
4 Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa?
Why have you brought the LORD’s assembly into this wilderness, that we should die there, we and our animals?
5 Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela? »
Why have you made us to come up out of Egypt, to bring us in to this evil place? It is no place of seed, or of figs, or of vines, or of pomegranates; neither is there any water to drink.”
6 Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango.
Moses and Aaron went from the presence of the assembly to the door of the Tent of Meeting, and fell on their faces. The LORD’s glory appeared to them.
7 Yawe alobaki na Moyize:
The LORD spoke to Moses, saying,
8 « Zwa lingenda na yo; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »
“Take the rod, and assemble the congregation, you, and Aaron your brother, and speak to the rock before their eyes, that it pour out its water. You shall bring water to them out of the rock; so you shall give the congregation and their livestock drink.”
9 Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Moses took the rod from before the LORD, as he commanded him.
10 Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango: « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo? »
Moses and Aaron gathered the assembly together before the rock, and he said to them, “Hear now, you rebels! Shall we bring water out of this rock for you?”
11 Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.
Moses lifted up his hand, and struck the rock with his rod twice, and water came out abundantly. The congregation and their livestock drank.
12 Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »
The LORD said to Moses and Aaron, “Because you didn’t believe in me, to sanctify me in the eyes of the children of Israel, therefore you shall not bring this assembly into the land which I have given them.”
13 Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango.
These are the waters of Meribah; because the children of Israel strove with the LORD, and he was sanctified in them.
14 Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki: — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi: « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.
Moses sent messengers from Kadesh to the king of Edom, saying: “Your brother Israel says: You know all the travail that has happened to us;
15 Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso;
how our fathers went down into Egypt, and we lived in Egypt a long time. The Egyptians mistreated us and our fathers.
16 kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito. Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo.
When we cried to the LORD, he heard our voice, sent an angel, and brought us out of Egypt. Behold, we are in Kadesh, a city in the edge of your border.
17 Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
“Please let us pass through your land. We will not pass through field or through vineyard, neither will we drink from the water of the wells. We will go along the king’s highway. We will not turn away to the right hand nor to the left, until we have passed your border.”
18 Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye: — Okoki kolekela na mokili na ngai te; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga.
Edom said to him, “You shall not pass through me, lest I come out with the sword against you.”
19 Bana ya Isalaele bazongiselaki ye: — Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te: toleka kaka na makolo.
The children of Israel said to him, “We will go up by the highway; and if we drink your water, I and my livestock, then I will give its price. Only let me, without doing anything else, pass through on my feet.”
20 Azongiselaki bango lisusu: — Bokoki kolekela awa te. Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele.
He said, “You shall not pass through.” Edom came out against him with many people, and with a strong hand.
21 Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu.
Thus Edom refused to give Israel passage through his border, so Israel turned away from him.
22 Lisanga mobimba ya Isalaele babimaki wuta na Kadeshi mpe bakomaki kino na ngomba Ori.
They travelled from Kadesh, and the children of Israel, even the whole congregation, came to Mount Hor.
23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na ngomba Ori, pembeni ya mondelo ya Edomi:
The LORD spoke to Moses and Aaron in Mount Hor, by the border of the land of Edom, saying,
24 « Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba.
“Aaron shall be gathered to his people; for he shall not enter into the land which I have given to the children of Israel, because you rebelled against my word at the waters of Meribah.
25 Kamata Aron na Eleazari, mwana na ye ya mobali mpe mema bango likolo ya ngomba Ori.
Take Aaron and Eleazar his son, and bring them up to Mount Hor;
26 Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. »
and strip Aaron of his garments, and put them on Eleazar his son. Aaron shall be gathered, and shall die there.”
27 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki: bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba.
Moses did as the LORD commanded. They went up onto Mount Hor in the sight of all the congregation.
28 Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba;
Moses stripped Aaron of his garments, and put them on Eleazar his son. Aaron died there on the top of the mountain, and Moses and Eleazar came down from the mountain.
29 mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.
When all the congregation saw that Aaron was dead, they wept for Aaron thirty days, even all the house of Israel.

< Mitango 20 >