< Mitango 19 >
1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
L’Éternel parla à Moïse et à Aaron en ces termes:
2 « Tala malako ya mibeko ya Yawe: Bosenga na bana ya Isalaele ete bamema epai na bino ngombe ya mwasi ya motane ezanga mbeba to litono mpe etikala nanu te komema ekangiseli.
"Ceci est un statut de la loi qu’a prescrit l’Éternel, savoir: Avertis les enfants d’Israël de te choisir une vache rousse, intacte, sans aucun défaut, et qui n’ait pas encore porté le joug.
3 Bokopesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari. Bongo ye akomema yango na libanda ya molako epai wapi akokata yango kingo na miso na ye.
Vous la remettrez au pontife Eléazar; il la fera conduire hors du camp, et on l’immolera en sa présence.
4 Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Le pontife Eléazar prendra du sang de l’animal avec le doigt, et il fera, en les dirigeant vers la face de la tente d’assignation, sept aspersions de ce sang.
5 Bongo bakotumba ngombe ya mwasi na miso na ye: poso, mosuni, makila mpe biloko ya kati.
Alors on brûlera la vache sous ses yeux: sa peau, sa chair et son sang, on les brûlera avec sa fiente.
6 Nganga-Nzambe akokamata bakoni ya nzete ya sedele, ya izope, singa ya lino ya motane makasi, mpe akobwaka yango kati na moto oyo ezali kopela mpe ezali kozikisa ngombe ya mwasi.
Le pontife prendra du bois de cèdre, de l’hysope et de l’écarlate, qu’il jettera dans le feu où se consume la vache.
7 Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.
Puis ce pontife lavera ses vêtements, baignera son corps dans l’eau, et alors il rentrera au camp; mais il restera impur jusqu’au soir.
8 Moto oyo akotumba ngombe akosukola mpe bilamba mpe nzoto na ye; mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Celui qui aura brûlé la vache nettoiera ses vêtements dans l’eau, baignera dans l’eau son corps, et restera impur jusqu’au soir.
9 Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami; ezali mbeka mpo na masumu.
Cependant un homme pur recueillera les cendres de la vache et les déposera hors du camp, en lieu pur, où elles resteront en dépôt, pour la communauté des enfants d’Israël, en vue de l’eau lustrale: c’est un purificatoire.
10 Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango.
Celui qui aura recueilli les cendres de la vache lavera ses vêtements, et sera impur jusqu’au soir. Et ceci sera, pour les enfants d’Israël et pour l’étranger établi parmi eux, un statut invariable:
11 Moto nyonso oyo akosimba ebembe ya moto, ata mokufi yango azalaki nani, akozala mbindo mikolo sambo.
celui qui touchera au cadavre d’un être humain quelconque sera impur durant sept jours.
12 Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto; soki te, akozala kaka mbindo.
Qu’il se purifie au moyen de ces cendres, le troisième et le septième jour, et il sera pur; mais s’il ne s’est pas purifié, le troisième et le septième jour, il ne sera point pur.
13 Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.
Quiconque a touché à un cadavre, au corps d’une personne morte, et ne se purifie point, souille la résidence du Seigneur, et cette existence sera retranchée d’Israël: parce que l’eau lustrale n’a pas été lancée sur lui, souillé qu’il est, il gardera sa souillure.
14 Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo: bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo.
Voici la règle, lorsqu’il se trouve un mort dans une tente: quiconque entre dans cette tente, et tout ce qu’elle renferme, sera impur durant sept jours;
15 Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo.
et tout vase découvert, qui n’est pas entièrement clos d’un couvercle, sera impur.
16 Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo.
Quiconque touchera, en pleine campagne, au corps d’un homme tué par le glaive ou mort naturellement, ou à un ossement humain ou à un sépulcre, sera souillé durant sept jours.
17 Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima.
Pour purifier l’impur, on prendra des cendres provenant de la combustion du purificatoire, auxquelles on mêlera de l’eau vive dans un vase.
18 Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda.
Et un homme pur prendra de l’hysope, la trempera dans l’eau et aspergera la tente, ainsi que tous les vases et les personnes qui s’y trouvaient; pareillement, celui qui aurait touché à l’ossement, à l’homme tué ou mort naturellement, ou au sépulcre.
19 Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi; boye na pokwa, akokoma peto.
L’Homme pur fera donc aspersion sur l’impur, au troisième et au septième jour; et lorsqu’il l’aura purifié le septième jour, l’autre lavera ses vêtements, se baignera dans l’eau, et sera pur le soir.
20 Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.
Mais l’individu qui, devenu impur, ne se purifierait pas, celui-là sera retranché du sein de l’assemblée, car il a souillé le sanctuaire du Seigneur: l’eau lustrale n’a pas été jetée sur lui, il reste impur.
21 Ekozala mpo na bango mobeko ya libela na libela. Moto oyo akobwaka mayi ya bopetoli akosukola bilamba na ye, mpe moto oyo akosimba mayi yango akozala mbindo kino na pokwa.
Ce sera pour eux une règle invariable. Quant à celui qui aura fait aspersion de l’eau lustrale, il lavera ses vêtements, et celui qui touchera à l’eau lustrale sera impur jusqu’au soir.
22 Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. »
Tout ce que touchera l’impur sera souillé; et la personne qui le touchera sera souillée jusqu’au soir."