< Mitango 18 >

1 Yawe alobaki na Aron: « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe.
耶和华对亚伦说:“你和你的儿子,并你本族的人,要一同担当干犯圣所的罪孽。你和你的儿子也要一同担当干犯祭司职任的罪孽。
2 Yeisa pene na yo bandeko na yo ya mibali, Balevi, bato ya libota ya koko na yo, mpo ete basunga yo tango yo elongo na bana na yo ya mibali bokosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya Ndako ya kapo ya Litatoli.
你要带你弟兄利未人,就是你祖宗支派的人前来,使他们与你联合,服事你,只是你和你的儿子,要一同在法柜的帐幕前供职。
3 Bakosunga yo mpe bakosala misala nyonso ya Ndako ya kapo kasi bakopusana te pene ya bisalelo ya Esika ya bule mpe ya etumbelo, noki te bango to bino bokokufa.
他们要守所吩咐你的,并守全帐幕,只是不可挨近圣所的器具和坛,免得他们和你们都死亡。
4 Bakosunga yo mpe bakozala na mokumba ya kobatela Ndako ya kapo ya Bokutani, mosala nyonso ya Ndako ya kapo, mpe moto mosusu te akoki kopusana pene ya esika oyo bozali.
他们要与你联合,也要看守会幕,办理帐幕一切的事,只是外人不可挨近你们。
5 Bino nde bokozala na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpe etumbelo, mpo ete kanda makasi ekweya lisusu likolo ya Isalaele te.
你们要看守圣所和坛,免得忿怒再临到以色列人。
6 Tala, Ngai moko nde naponaki bandeko na yo, Balevi, kati na bana ya Isalaele lokola likabo mpo na yo; babulisami mpo na Yawe mpo na kosala mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
我已将你们的弟兄利未人从以色列人中拣选出来归耶和华,是给你们为赏赐的,为要办理会幕的事。
7 Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »
你和你的儿子要为一切属坛和幔子内的事一同守祭司的职任。你们要这样供职;我将祭司的职任给你们当作赏赐事奉我。凡挨近的外人必被治死。”
8 Bongo Yawe alobaki lisusu na Aron: « Ngai moko napesi yo mokumba ya kobatela makabo oyo babonzeli Ngai. Napesi na yo mpe na bana na yo ya mibali, lokola eteni na bino, makabo nyonso ya bule oyo bana ya Isalaele bapesi Ngai: ezali mobeko ya libela na libela.
耶和华晓谕亚伦说:“我已将归我的举祭,就是以色列人一切分别为圣的物,交给你经管;因你受过膏,把这些都赐给你和你的子孙,当作永得的分。
9 Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te: makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.
以色列人归给我至圣的供物,就是一切的素祭、赎罪祭、赎愆祭,其中所有存留不经火的,都为至圣之物,要归给你和你的子孙。
10 Bokolia yango lokola biloko oyo eleki bule, mwana mobali nyonso akolia yango. Bokotala yango lokola eloko ya bule.
你要拿这些当至圣物吃;凡男丁都可以吃。你当以此物为圣。
11 Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo: biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango.
以色列人所献的举祭并摇祭都是你的;我已赐给你和你的儿女,当作永得的分;凡在你家中的洁净人都可以吃。
12 Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango.
凡油中、新酒中、五谷中至好的,就是以色列人所献给耶和华初熟之物,我都赐给你。
13 Bambuma ya liboso ya mokili, oyo bakomema epai na Yawe ekozala mpo na yo. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto, akoki kolia yango.
凡从他们地上所带来给耶和华初熟之物也都要归与你。你家中的洁净人都可以吃。
14 Eloko nyonso, kati na Isalaele, oyo ekokabama epai na Yawe ekozala mpo na yo.
以色列中一切永献的都必归与你。
15 Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.
他们所有奉给耶和华的,连人带牲畜,凡头生的,都要归给你;只是人头生的,总要赎出来;不洁净牲畜头生的,也要赎出来。
16 Tango bakokokisa sanza moko, osengeli kosikola bango na motuya ya mbongo ya bibende mitano ya palata, oyo moko na moko kati na yango ezali ya bagrame zomi, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
其中在一月之外所当赎的,要照你所估定的价,按圣所的平,用银子五舍客勒赎出来(一舍客勒是二十季拉)。
17 Kasi osengeli te kosikola mwana liboso ya ngombe, ya meme to ya ntaba, pamba te ezali bule. Okosopa makila na yango na etumbelo mpe okotumba mafuta na yango lokola likabo bazikisa na moto, likabo ya solo kitoko mpo na Yawe.
只是头生的牛,或是头生的绵羊和山羊,必不可赎,都是圣的,要把它的血洒在坛上,把它的脂油焚烧,当作馨香的火祭献给耶和华。
18 Misuni na yango ekozala mpo na yo, ndenge moko mpe mpo na tolo mpe mopende ya loboko ya mobali oyo batombolaka mpo na kobonzela Ngai.
它的肉必归你,像被摇的胸、被举的右腿归你一样。
19 Napesi yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola ekateli ya libele na libela, biloko nyonso oyo bana ya Isalaele bakotiaka pembeni mpo na kobonza epai na Yawe lokola makabo ya bule. Ezali boyokani ya seko, oyo ekobongwanaka te liboso ya Yawe mpo na yo mpe bakitani na yo. »
凡以色列人所献给耶和华圣物中的举祭,我都赐给你和你的儿女,当作永得的分。这是给你和你的后裔、在耶和华面前作为永远的盐约。”
20 Yawe alobaki na Aron: « Okozwa eteni ya mabele te kati na mokili na bango, mpe okozwa ata bomengo moko te lokola libula kati na bana ya Isalaele, pamba te Ngai moko nde nazali bomengo mpe libula na bino kati na bana ya Isalaele.
耶和华对亚伦说:“你在以色列人的境内不可有产业,在他们中间也不可有分。我就是你的分,是你的产业。”
21 Napesi lokola libula, epai ya Balevi, biteni nyonso ya zomi oyo ekozwama kati na Isalaele lokola lifuti ya mosala oyo basalaka kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
“凡以色列中出产的十分之一,我已赐给利未的子孙为业;因他们所办的是会幕的事,所以赐给他们为酬他们的劳。
22 Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa.
从今以后,以色列人不可挨近会幕,免得他们担罪而死。
23 Ezali Balevi nde bazali na mokumba ya kosala mosala na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe ya komema mokumba ya bambeba na bango na kati na yango. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na bileko oyo ekoya ya sima. Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele.
惟独利未人要办会幕的事,担当罪孽;这要作你们世世代代永远的定例。他们在以色列人中不可有产业;
24 Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango: ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › »
因为以色列人中出产的十分之一,就是献给耶和华为举祭的,我已赐给利未人为业。所以我对他们说:‘在以色列人中不可有产业。’”
25 Yawe alobaki na Moyize:
耶和华吩咐摩西说:
26 « Loba na Balevi mpe yebisa bango: ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe.
“你晓谕利未人说:你们从以色列人中所取的十分之一,就是我给你们为业的,要再从那十分之一中取十分之一作为举祭献给耶和华,
27 Likabo yango ekozala mpo na bino lokola oyo balongolaka na ble oyo bazali kobuka na elanga mpe na vino ya sika oyo ezali kobima na ekamolelo.
这举祭要算为你们场上的谷,又如满酒榨的酒。
28 Na nzela wana nde bino mpe bokobonza makabo epai na Yawe wuta na biteni nyonso ya zomi oyo bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele. Mpe wuta na biteni wana ya zomi, bosengeli kopesa eteni ya Yawe epai ya Nganga-Nzambe Aron.
这样,你们从以色列人中所得的十分之一也要作举祭献给耶和华,从这十分之一中,将所献给耶和华的举祭归给祭司亚伦。
29 Kati na makabo nyonso oyo bokozwa, bosengeli kopesa epai na Yawe eteni oyo eleki kitoko mpe eleki bule. ›
奉给你们的一切礼物,要从其中将至好的,就是分别为圣的,献给耶和华为举祭。
30 Loba na Balevi: ‹ Tango bokopesa eteni oyo eleki kitoko, ekotangama mpo na bino lokola bambuma oyo elanga eboti mpe lokola vino oyo ekamolelo ebimisi.
所以你要对利未人说:你们从其中将至好的举起,这就算为你们场上的粮,又如酒榨的酒。
31 Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
你们和你们家属随处可以吃;这原是你们的赏赐,是酬你们在会幕里办事的劳。
32 Na nzela ya kopesa eteni wana oyo eleki kitoko, bokozala na ngambo te na likambo wana, bokobebisa te bosantu ya makabo ya bana ya Isalaele mpe bokokufa te. › »
你们从其中将至好的举起,就不至因这物担罪。你们不可亵渎以色列人的圣物,免得死亡。”

< Mitango 18 >