< Mitango 17 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
Afei, Awurade ka kyerɛɛ Mose sɛ,
2 « Yebisa bana ya Isalaele ete bapesa yo mangenda zomi na mibale, lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko kati ya bikolo na bango. Koma kombo ya moto moko na moko na lingenda na ye.
“Ka kyerɛ Israelfoɔ no sɛ, abusua biara ɔdaanoni no ntwa poma na ɔntwerɛ ne din wɔ ho.
3 Koma kombo ya Aron mpo na lingenda ya libota ya Levi, mpo ete mokambi moko na moko ya libota akozala na lingenda moko.
Aaron din na wɔbɛtwerɛ agu Lewi abusuakuo poma no ho.
4 Tia mangenda yango na Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Sanduku ya Litatoli, epai wapi nakutanaka na bino.
Momfa mpoma yi ngu Ahyiaeɛ Ntomadan no mu ahyiaeɛm wɔ baabi a mehyia mo wɔ adaka no anim hɔ no.
5 Lingenda ya moto oyo nakopona ekobimisa moto ya etape. Ezali na nzela wana nde nakosukisa Ngai moko koyimayima ya tango nyonso kati na bana ya Isalaele na tina na bino. »
Menam mpoma yi so bɛkyerɛ onipa a mɛyi no no, na ne poma no ho bɛfefɛ! Ɛno akyi, anwiinwii a wɔnwiinwii tia wo no nyinaa to bɛtwa.”
6 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana.
Enti, Mose hyɛɛ saa mmara yi maa nnipa no maa ahemfo dumienu no a Aaron ka wɔn ho de wɔn mpoma brɛɛ no.
7 Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli.
Ɔde guu Awurade anim wɔ Adanseɛ Ntomadan no mu hɔ.
8 Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela.
Adeɛ kyeeɛ a ɔkɔɔ mu no, ɔhunuu sɛ Aaron poma a ɛwɔ hɔ ma Lewi abusuakuo no afefɛ ayɛ frɔmm, aso aba a ɛsensɛn so.
9 Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye.
Ɛberɛ a Mose de firii Awurade hɔ baeɛ sɛ ɔde rebɛkyerɛ nkurɔfoɔ no, wɔhunuiɛ no, wɔn ho dwirii wɔn. Afei, obiara gyee ne poma, gye Aaron nko.
10 Yawe alobaki na Moyize: « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. »
Awurade ka kyerɛɛ Mose sɛ ɔmfa Aaron poma no nto adaka no ho pɛɛ na ɔmfa nkae saa adɔnyɛ no. Na ɛsɛ sɛ ɔde ba bɛkyerɛ nnipa no bio na sɛ anwiinwii bi wɔ hɔ a ɛtia Aaron tumi a, ɛbɛsi amanehunu foforɔ a anka ɛbɛba nnipa no so no ano.
11 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Enti, Mose yɛɛ deɛ Awurade hyɛɛ no sɛ ɔnyɛ no.
12 Bana ya Isalaele balobaki na Moyize: « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso!
Nanso Israelfoɔ no kɔɔ so nwiinwiiɛ sɛ, “Yɛyɛ teaseawuo.
13 Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa? »
Obiara a ɔbɛbɛn Awurade Ahyiaeɛ Ntomadan no ho no wu. Ɛsɛ sɛ yɛn nyinaa ase hye anaa?”