< Mitango 15 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
茲にヱホバ、モーセに告て言たまはく
2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda,
イスラエルの子孫に告て之に言へ我が汝等に與へて住しむる地に汝等到り
3 bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.
ヱホバに火祭を献る時すなはち願を還す時期又は自意の禮物を爲の時期または汝らの節期にあたりて牛あるひは羊をもて燔祭または犠牲を献げてヱホバに馨しき香を奉つる時は
4 Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.
その禮物をヱホバに献る者もし羔羊をもて燔祭あるひは犠牲となすならば麥粉十分の一に油一ヒンの四分の一を混和たるをその素祭として供へ酒一ヒンの四分の一をその灌祭として供ふべし
5 Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.
その禮物をヱホバに献る者もし羔羊をもて燔祭あるひは犠牲となすならば麥粉十分の一に油一ヒンの四分の一を混和たるをその素祭として供へ酒一ヒンの四分の一をその灌祭として供ふべし
6 Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive,
若また牡羊を之に用ふるならば麥粉十分の二に油一ヒンの三分の一を混和たるをその素祭として供へ
7 mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe.
また酒一ヒンの三分の一をその灌祭として献げヱホバに馨しき香をたてまつるべし
8 Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe;
汝また願還あるひは酬恩祭をヱホバになすに當りて牡牛をもて燔祭あるひは犠牲となすならば
9 bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.
麥粉十分の三に油一ヒンの半を混和たるを素祭となしてその牡牛とともに献げ
10 Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga: ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
また酒一ヒンの半をその灌祭として献ぐべし是すなはち火祭にしてヱホバに馨しき香をたてまつる者なり
11 Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba.
牡牛あるひは牡羊あるひは羔羊あるひは羔山羊は一匹ごとに斯爲べきなり
12 Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni.
即ち汝らが献ぐるところの數にてらしその數にしたがひて一匹ごとに斯なすべし
13 Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
本國に生れたる者火祭を献げてヱホバに馨しき香をたてまつる時には凡て斯のごとく是等の事を行ふべし
14 Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala.
また汝らの中に寄寓る他國の人あるひは汝らの中に代々住ふところの人火祭をささげてヱホバに馨しき香をたてまつらんとする時は汝らの爲がごとくにその人もなすべきなり
15 Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe.
汝ら會衆および汝らの中に寄寓る他國の人は同一の例にしたがふべし是は汝らが代々永く守るべき例なり他國の人のヱホバの前に侍ることは汝等と異るところ無るべきなり
16 Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › »
汝らと汝らの中に宿寓る他國の人とは同一の法同一の禮式にしたがふべし
17 Yawe alobaki na Moyize:
ヱホバまたモーセに告て言たまはく
18 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino
イスラエルの子孫に告てこれに言へ我が汝等を導き往ところの地に汝等いたらん時は
19 mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe.
その地の食物を食ふにあたりて汝ら擧祭をヱホバにささぐべし
20 Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti.
即ち汝らはその麥粉の初をもてパンを作りてこれを擧祭にそなふべし是は禾場より擧祭をそなふるが如くに擧てそなふべきなり
21 Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino: ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima.
汝ら代々その麥粉の初をもて擧祭をヱホバにたてまつるべし
22 Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize,
汝等もし誤りてヱホバのモーセに告たまへるこの諸の命令を行はず
23 moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya;
ヱホバがモーセをもて命じたまひし事等並にその命ずることを始めたまひし日より以來汝らの代々にも命じたまはんところの事等を行はざる事有ん時
24 mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
すなはち會衆誤りて犯す所ありて之を知ざることあらん時は全會衆少き牡牛一匹を燔祭にささげてヱホバに馨しき香とならしめ之にその素祭と灌祭を禮式のごとくに加へまた牡山羊一匹を罪祭にささぐべし
25 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu.
而して祭司イスラエルの子孫の全會衆のために贖罪を爲べし斯せば是は赦されん是は過誤なればなり彼等はその禮物として火祭をヱホバにささげまたその過誤のために罪祭をヱホバの前にささぐべし
26 Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te.
然せばイスラエルの子孫の會衆みな赦されんまた彼等の中に寄寓る他國の人も然るべし其は民みな誤り犯せるなればなり
27 Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu.
人もし誤りて罪を犯さば當歳の牝山羊一匹を罪祭に献ぐべし
28 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo.
祭司はまたその誤りて罪を犯せる人が誤りてヱホバの前に罪を獲たるが爲に贖罪をなしてその罪を贖ふべし然せば是は赦されん
29 Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te.
イスラエルの子孫の國の者にもあれまた其中に寄寓る他國の人にもあれ凡そ誤りて罪を犯す者には汝らその法を同じからしむべし
30 Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.
本國の人にもあれ他國の人にもあれ凡そ擅横に罪を犯す者は是ヱホバを瀆すなればその人はその民の中より絶るべし
31 Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › »
斯る人はヱホバの言を軽んじその誡命を破るなるが故に必ず絶れその罪を身に承ん
32 Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba.
イスラエルの子孫曠野に居る時安息日に一箇の人の柴を拾ひあつむるを見たり
33 Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba.
是においてその柴を拾ひあつむるを見たる者等これをモーセとアロンおよび會衆の許に曳きたりけるが
34 Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye.
之を如何に爲べきか未だ示諭を蒙らざるが故に之を禁錮おけり
35 Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »
時にヱホバ、モーセに言たまひけるはその人はかならず殺さるべきなり全會衆營の外にて石をもて之を撃べしと
36 Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize.
全會衆すなはち之を營の外に曳いだし石をもてこれを撃ころしヱホバのモーセに命じたまへるごとくせり
37 Yawe alobaki na Moyize:
ヱホバ亦モーセに告て言たまはく
38 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble.
汝イスラエルの子孫に告げ代々その衣服の裾に襚をつけその裾の襚 の上に靑き紐をほどこすべしと之に命ぜよ
39 Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene.
此襚は汝らに之を見てヱホバの諸の誡命を記憶して其をおこなはしめ汝らをしてその放縦にする自己の心と目の欲に從がふこと無らしむるための者なり
40 Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino.
斯して汝等吾もろもろの誡命を記憶して之を行ひ汝らの神の前に聖あるべし
41 Nazali Yawe, Nzambe na bino; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
我は汝らの神ヱホバにして汝らの神とならんとて汝らをエジプトの地より導きいだせし者なり我は汝らの神ヱホバなるぞかし