< Mitango 14 >

1 Bato nyonso ya lisanga batombolaki mingongo na bango mpe bakomaki kolela makasi butu mobimba.
و تمامی جماعت آواز خود را بلندکرده، فریاد نمودند. و قوم در آن شب می‌گریستند.۱
2 Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba: « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe!
و جمیع بنی‌اسرائیل بر موسی وهارون همهمه کردند، و تمامی جماعت به ایشان گفتند: «کاش که در زمین مصر می‌مردیم یا در این صحرا وفات می‌یافتیم!۲
3 Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito? »
و چرا خداوند ما را به این زمین می‌آورد تا به دم شمشیر بیفتیم، و زنان واطفال ما به یغما برده شوند، آیا برگشتن به مصربرای ما بهتر نیست؟»۳
4 Boye bakomaki kolobana bango na bango: « Tosengeli kopona mokambi mosusu mpe kozonga na Ejipito. »
و به یکدیگر گفتند: «سرداری برای خود مقرر کرده، به مصربرگردیم.»۴
5 Moyize mpe Aron bakweyaki elongi kino na mabele liboso ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele oyo basanganaki kuna.
پس موسی و هارون به حضور تمامی گروه جماعت بنی‌اسرائیل به رو افتادند.۵
6 Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango
و یوشع بن نون و کالیب بن یفنه که از جاسوسان زمین بودند، رخت خود را دریدند.۶
7 mpe balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Mokili oyo totambolaki kati na yango mpe tonongaki ezali malamu mingi penza.
و تمامی جماعت بنی‌اسرائیل را خطاب کرده، گفتند: «زمینی که برای جاسوسی آن از آن عبور نمودیم، زمین بسیار بسیار خوبیست.۷
8 Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango.
اگر خداوند از ما راضی است ما را به این زمین آورده، آن را به ما خواهدبخشید، زمینی که به شیر و شهد جاری است.۸
9 Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »
زنهار از خداوند متمرد نشوید، و از اهل زمین ترسان مباشید، زیراکه ایشان خوراک ما هستند، سایه ایشان از ایشان گذشته است، و خداوند با ماست، از ایشان مترسید.»۹
10 Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele.
لیکن تمامی جماعت گفتند که باید ایشان را سنگسار کنند. آنگاه جلال خداوند در خیمه اجتماع بر تمامی بنی‌اسرائیل ظاهر شد.۱۰
11 Yawe alobaki na Moyize: — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango?
وخداوند به موسی گفت: «تا به کی این قوم مرااهانت نمایند؟ و تا به کی با وجود همه آیاتی که در میان ایشان نمودم، به من ایمان نیاورند؟۱۱
12 Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango.
ایشان را به وبا مبتلا ساخته، هلاک می‌کنم و ازتو قومی بزرگ و عظیم تر از ایشان خواهم ساخت.»۱۲
13 Moyize alobaki na Yawe: — Bato ya Ejipito bakoyoka yango! Nzokande ezali na nguya na Yo nde obimisaki bato oyo kati na bango.
موسی به خداوند گفت: «آنگاه مصریان خواهند شنید، زیراکه این قوم را به قدرت خود ازمیان ایشان بیرون آوردی.۱۳
14 Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu.
و به ساکنان این زمین خبر خواهند داد و ایشان شنیده‌اند که تو‌ای خداوند، در میان این قوم هستی، زیراکه تو‌ای خداوند، معاینه دیده می‌شوی، و ابر تو بر ایشان قایم است، و تو پیش روی ایشان روز در ستون ابرو شب در ستون آتش می‌خرامی.۱۴
15 Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba:
پس اگر این قوم را مثل شخص واحد بکشی، طوایفی که آوازه تو را شنیده‌اند، خواهند گفت:۱۵
16 « Yawe azangaki penza makoki ya kokotisa bato oyo na mokili oyo alakaki, na nzela ya ndayi, ete akopesa bango yango, yango wana abomaki bango kati na esobe. »
چون که خداوند نتوانست این قوم را به زمینی که برای ایشان قسم خورده بود درآورد از این سبب ایشان را در صحرا کشت.۱۶
17 Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki:
پس الان قدرت خداوندعظیم بشود، چنانکه گفته بودی۱۷
18 « Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »
که یهوه دیرخشم و بسیار رحیم و آمرزنده گناه و عصیان است، لیکن مجرم را هرگز بی‌سزا نخواهدگذاشت بلکه عقوبت گناه پدران را بر پسران تاپشت سوم و چهارم می‌رساند.۱۸
19 Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo.
پس گناه این قوم را برحسب عظمت رحمت خود بیامرز، چنانکه این قوم را از مصر تا اینجا آمرزیده‌ای.»۱۹
20 Yawe azongisaki: — Nalimbisi bango ndenge osengi.
و خداوند گفت: «برحسب کلام توآمرزیدم.۲۰
21 Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe,
لیکن به حیات خودم قسم که تمامی زمین از جلال یهوه پر خواهد شد.۲۱
22 moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,
چونکه جمیع مردانی که جلال و آیات مرا که در مصر وبیابان نمودم دیدند، مرا ده مرتبه امتحان کرده، آواز مرا نشنیدند.۲۲
23 moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango.
به درستی که ایشان زمینی راکه برای پدران ایشان قسم خوردم، نخواهند دید، و هرکه مرا اهانت کرده باشد، آن را نخواهد دید.۲۳
24 Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula.
لیکن بنده من کالیب چونکه روح دیگر داشت ومرا تمام اطاعت نمود، او را به زمینی که رفته بودداخل خواهم ساخت، و ذریت او وارث آن خواهند شد.۲۴
25 Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.
و چونکه عمالیقیان و کنعانیان دروادی ساکنند، فردا رو گردانیده، از راه بحر قلزم به صحرا کوچ کنید.»۲۵
26 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
و خداوند موسی و هارون را خطاب کرده، گفت:۲۶
27 — Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai.
«تا به کی این جماعت شریر را که بر من همهمه می‌کنند متحمل بشوم؟ همهمه بنی‌اسرائیل را که بر من همهمه می‌کنند، شنیدم.۲۷
28 Yebisa bango: « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba.
به ایشان بگو خداوند می‌گوید: به حیات خودم قسم که چنانکه شما در گوش من گفتید، همچنان با شما عمل خواهم نمود.۲۸
29 Bibembe na bino ekolala na esobe oyo. Bino nyonso oyo bozali na mibu tuku mibale mpe koleka, bino oyo botangamaki na motango mpe boyimaki-yimaki mpo na Ngai,
لاشه های شما دراین صحرا خواهد افتاد، و جمیع شمرده شدگان شما برحسب تمامی عدد شما، از بیست ساله وبالاتر که بر من همهمه کرده‌اید.۲۹
30 bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
شما به زمینی که درباره آن دست خود را بلند کردم که شما را درآن ساکن گردانم، هرگز داخل نخواهید شد، مگرکالیب بن یفنه و یوشع بن نون.۳۰
31 Kasi nakomema bana na bino oyo na tina na bango bolobaki ete bakozwa bango lokola bomengo ya bitumba, mpe nakokotisa bango na esengo kati na mokili yango oyo botiolaki.
اما اطفال شما که درباره آنها گفتید که به یغما برده خواهند شد، ایشان را داخل خواهم کرد و ایشان زمینی را که شما رد کردید، خواهند دانست.۳۱
32 Nzokande bino, bibembe na bino ekolala na esobe oyo.
لیکن لاشه های شما در این صحرا خواهد افتاد.۳۲
33 Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe.
وپسران شما در این صحرا چهل سال آواره بوده، بار زناکاری شما را متحمل خواهند شد، تالاشه های شما در صحرا تلف شود.۳۳
34 Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino: mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.
برحسب شماره روزهایی که زمین را جاسوسی می‌کردید، یعنی چهل روز. یک سال به عوض هر روز، بارگناهان خود را چهل سال متحمل خواهید شد، ومخالفت مرا خواهید دانست.۳۴
35 Ngai Yawe nde nalobi; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo; ezali awa nde bakokufa. »
من که یهوه هستم، گفتم که البته این را به تمامی این جماعت شریر که به ضد من جمع شده‌اند خواهم کرد، ودر این صحرا تلف شده، در اینجا خواهند مرد.»۳۵
36 Bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili mpe, na bozongi na bango, batindikaki lisanga mobimba na koyimayima na tina na ye wana bapanzaki sango mabe na tina na mokili;
و اما آن کسانی که موسی برای جاسوسی زمین فرستاده بود. و ایشان چون برگشتند خبر بددرباره زمین آورده، تمام جماعت را از او گله‌مندساختند.۳۶
37 bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe.
آن کسانی که این خبر بد را درباره زمین آورده بودند، به حضور خداوند از وبامردند.۳۷
38 Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki.
اما یوشع بن نون و کالیب بن یفنه ازجمله آنانی که برای جاسوسی زمین رفته بودند، زنده ماندند.۳۸
39 Tango Moyize ayebisaki makambo oyo epai ya bato nyonso ya Isalaele, balelaki makasi.
و چون موسی این سخنان را به جمیع بنی‌اسرائیل گفت، قوم بسیار گریستند.۳۹
40 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bamataki na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba mpe balobaki: — Solo, tosalaki masumu; kasi sik’oyo, tozali kokende kuna, na esika oyo Yawe alakaki biso.
وبامدادان به زودی برخاسته، به‌سر کوه برآمده، گفتند: «اینک حاضریم و به مکانی که خداوندوعده داده است می‌رویم، زیرا گناه کرده‌ایم.»۴۰
41 Kasi Moyize alobaki: — Mpo na nini bozali koboya kotosa mitindo ya Yawe? Likambo oyo ekolonga te!
موسی گفت: «چرا از فرمان خداوند تجاوزمی نمایید؟ لیکن این کار به کام نخواهد شد!۴۱
42 Bokende te, pamba te Yawe azali elongo na bino te; banguna na bino bakolonga bino.
مروید زیرا خداوند در میان شما نیست، مبادااز پیش دشمنان خود منهزم شوید.۴۲
43 Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te.
زیراعمالیقیان و کنعانیان آنجا پیش روی شما هستند، پس به شمشیر خواهید افتاد، و چونکه از پیروی خداوند روگردانیده‌اید، لهذا خداوند با شمانخواهد بود.»۴۳
44 Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
لیکن ایشان از راه تکبر به‌سر کوه رفتند، اماتابوت عهد خداوند و موسی از میان لشکرگاه بیرون نرفتند.۴۴
45 Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.
آنگاه عمالیقیان و کنعانیان که درآن کوهستان ساکن بودند فرودآمده، ایشان رازدند و تا حرما منهزم ساختند.۴۵

< Mitango 14 >