< Mitango 12 >

1 Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.
ותדבר מרים ואהרן במשה על אדות האשה הכשית אשר לקח כי אשה כשית לקח
2 Balobaki: — Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize? Alobaki mpe na nzela na biso te? Yawe ayokaki bango.
ויאמרו הרק אך במשה דבר יהוה--הלא גם בנו דבר וישמע יהוה
3 Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
והאיש משה ענו מאד--מכל האדם אשר על פני האדמה
4 Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami: — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.
ויאמר יהוה פתאם אל משה ואל אהרן ואל מרים צאו שלשתכם אל אהל מועד ויצאו שלשתם
5 Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso,
וירד יהוה בעמוד ענן ויעמד פתח האהל ויקרא אהרן ומרים ויצאו שניהם
6 alobaki: — Boyoka maloba na Ngai!
ויאמר שמעו נא דברי אם יהיה נביאכם--יהוה במראה אליו אתודע בחלום אדבר בו
7 Kasi ezalaka bongo te
לא כן עבדי משה בכל ביתי נאמן הוא
8 Nasololaka na ye elongi na elongi,
פה אל פה אדבר בו ומראה ולא בחידת ותמנת יהוה יביט ומדוע לא יראתם לדבר בעבדי במשה
9 Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.
ויחר אף יהוה בם וילך
10 Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami: ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.
והענן סר מעל האהל והנה מרים מצרעת כשלג ויפן אהרן אל מרים והנה מצרעת
11 Bongo Aron alobaki na Moyize: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba!
ויאמר אהרן אל משה בי אדני--אל נא תשת עלינו חטאת אשר נואלנו ואשר חטאנו
12 Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola!
אל נא תהי כמת אשר בצאתו מרחם אמו ויאכל חצי בשרו
13 Boye, Moyize abelelaki Yawe: — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye!
ויצעק משה אל יהוה לאמר אל נא רפא נא לה
14 Yawe azongiselaki Moyize: — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
ויאמר יהוה אל משה ואביה ירק ירק בפניה--הלא תכלם שבעת ימים תסגר שבעת ימים מחוץ למחנה ואחר תאסף
15 Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki.
ותסגר מרים מחוץ למחנה שבעת ימים והעם לא נסע עד האסף מרים
16 Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.
ואחר נסעו העם מחצרות ויחנו במדבר פארן

< Mitango 12 >