< Mitango 11 >

1 Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.
Now the people complained about their troubles as Yahweh listened. Yahweh heard the people and became angry. Fire from Yahweh burned among them and consumed some of the camp on its edges.
2 Bato bagangaki epai ya Moyize; ye abondelaki Yawe, mpe moto ekufaki.
Then people called out to Moses, so Moses prayed to Yahweh, and the fire stopped.
3 Boye, bakomaki kobenga esika yango « Tabeera, » pamba te moto ya Yawe ezikisaki bato ya Isalaele.
That place was named Taberah, because Yahweh's fire burned among them.
4 Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba: « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia?
Some foreign people began to camp with Israel's descendants. They wanted better food to eat. Then the people of Israel began to weep and say, “Who will give us meat to eat?
5 Tokanisi lisusu bambisi, bandunda ya ndenge na ndenge, pasiteki, bandembi, matungulu, ayi oyo tozalaki kolia ya ofele na Ejipito.
We remember the fish that we ate freely in Egypt, the cucumbers, the melons, the leeks, the onions, and the garlic.
6 Kasi sik’oyo, banzoto na biso ebebi penza, tozali lisusu te kolia biloko wana nyonso! Tokomi kaka komona mana oyo! »
Now our appetite is gone, because all we can see is this manna.”
7 Mana ezalaki lokola mbuma ya koriande mpe ezalaki komonana pembe lokola mayi ya nzete oyo babengaka bedeliumi.
Manna was like coriander seed. It looked like resin.
8 Bato bazalaki kopanzana bipai na bipai mpo na kolokota yango, mpe na sima, bazalaki konika yango na libanga to mpe kotuta yango na liboka, bongo nde bakokaki kolamba yango na banzungu to kosalela yango mikate. Mikate na yango ezalaki na elengi lokola bagato oyo basala na mafuta ya sika.
The people walked around and gathered it. They ground it in mills, beat it in mortars, boiled it in pots, and made it into cakes. It tasted like fresh olive oil.
9 Na butu, tango mamwe ezalaki kokita, mana mpe ezalaki kokweya nzela moko na yango.
When the dew fell on the camp in the night, the manna also fell.
10 Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema.
Moses heard the people weeping in their families, and every man was at the entrance to his tent. Yahweh was very angry, and in Moses' eyes their complaining was wrong.
11 Moyize alobaki na Yawe: — Mpo na nini komonisa mosali na Yo pasi ya boye? Mabe nini ngai nasali penza mpo ete osundolela ngai mokumba ya bato oyo?
Moses said to Yahweh, “Why have you treated your servant so badly? Why are you not pleased with me? You make me carry the load of all these people.
12 Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango?
Did I conceive all these people? Have I given them birth so that you should say to me, 'Carry them closely to your chest as a father carries a baby?' Should I carry them to the land that you swore to their ancestors to give them?
13 Ngai nakozwa misuni ya kolia wapi mpo na bato oyo nyonso oyo bazali kokoba kolelalela epai na ngai: « Pesa biso misuni ya kolia! »
Where can I find meat to give to all this people? They are weeping in front of me and are saying, 'Give us meat to eat.'
14 Ngai moko nakokoka te komema bato oyo nyonso; mokumba oyo eleki monene mpo na ngai.
I cannot bear all these people alone. They are too much for me.
15 Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.
Since you are treating me this way, kill me now—if I find favor in your eyes—do not let me see my misery.”
16 Yawe alobaki na Moyize: — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo.
Yahweh said to Moses, “Bring to me seventy of Israel's elders. Be sure that they are elders and officers of the people. Bring them to the tent of meeting to stand there with you.
17 Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.
I will come down and talk with you there. I will take some of the Spirit that is on you and put it on them. They will bear the burden of the people with you. You will not have to bear it alone.
18 Loba na bato: « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela: ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.
Say to the people, 'Consecrate yourselves, for tomorrow and you will indeed eat meat, for you have wept and Yahweh has heard. You said, “Who will give us meat to eat? It was good for us in Egypt.” Therefore Yahweh will give you meat, and you will eat it.
19 Bokolia yango te kaka mokolo moko to mikolo mibale to mitano to zomi to mpe tuku mibale.
You will not eat meat for only one day, two days, five days, ten days, or twenty days,
20 Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki: ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito? › »
but you will eat meat for a whole month until it comes out of your nostrils. It will disgust you because you have rejected Yahweh, who is among you. You have wept before him. You said, “Why did we leave Egypt?”'”
21 Moyize alobaki lisusu: — Bato nkoto nkama motoba bazali kotambola sima na ngai, mpe Yo ozali koloba: « Nakopesa bango misuni ya kolia mpo na sanza mobimba! »
Then Moses said, “I am with 600,000 people, and you have said, 'I will give them meat to eat for a whole month.'
22 Ekokoka penza ata soki babomi bibwele nyonso oyo bazali na yango, ezala ngombe to bantaba? Ekokoka penza ata soki balobi mbisi nyonso ya ebale monene?
Should we kill flocks and herds to satisfy them? Should we catch all the fish in the sea to satisfy them?”
23 Yawe alobaki na Moyize: — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.
Yahweh said to Moses, “Is my hand short? Now you will see whether or not my word is true.”
24 Boye, Moyize abimaki mpe ayebisaki bato maloba oyo Yawe ayebisaki ye. Asangisaki bakambi tuku sambo mpe atelemisaki bango zingazinga ya Ndako ya kapo.
Moses went out and told the people Yahweh's words. He gathered seventy of the people's elders and positioned them around the tent.
25 Yawe akitaki na nzela ya lipata mpe asololaki na ye; akamataki nguya ya Molimo, oyo ezalaki epai na Ye, mpe atiaki yango epai ya bakambi tuku sambo. Tango kaka Molimo akitelaki bango, bakomaki kosakola, kasi bakobaki te.
Yahweh came down in the cloud and spoke to Moses. Yahweh took some of the Spirit that was on Moses and put it on the seventy elders. When the Spirit rested on them, they prophesied, but only on that occasion and not again.
26 Nzokande, bato mibale oyo bakombo na bango ezalaki Elidadi mpe Medadi batikalaki kati na molako. Bango mpe bazalaki na molongo ya bampaka, kasi bakendeki te na Ndako ya kapo. Molimo akitelaki bango mpe bakomaki kosakola kati na molako.
Two men remained in the camp, named Eldad and Medad. The Spirit also rested on them. Their names were written on the list, but they had not gone out to the tent. Nevertheless, they prophesied in the camp.
27 Elenge mobali moko apotaki mbangu mpe akendeki koyebisa Moyize: — Elidadi mpe Medadi bazali kosakola kati na molako!
A young man in the camp ran and told Moses, “Eldad and Medad are prophesying in the camp.”
28 Jozue, mwana mobali ya Nuni, oyo azalaki mosungi ya Moyize wuta bolenge na ye alobaki: — Moyize, nkolo na ngai, pekisa bango!
Joshua son of Nun, Moses' assistant, one of his chosen men, said to Moses, “My master Moses, stop them.”
29 Kasi Moyize azongisaki: — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango!
Moses said to him, “Are you jealous for my sake? I wish that all of Yahweh's people were prophets and that he would put his Spirit on them all!”
30 Bongo, Moyize mpe bakambi nyonso ya Isalaele bazongaki na molako.
Then Moses and the elders of Israel went back to the camp.
31 Boye, Yawe atindaki mopepe moko oyo ememaki bankanga wuta na ebale monene mpe ebwakaki yango na molako mpe na zingazinga na yango. Etando oyo bankanga ekweyaki ezalaki molayi ya mobembo ya mokolo moko na makolo, mpe ezipaki mabele na bosanda ya metele moko.
Then a wind came from Yahweh and brought quail from the sea. They fell near the camp, about a day's journey on one side and a day's journey on the other side. The quail surrounded the camp about two cubits above the ground.
32 Bato babimaki mpo na kolokota bankanga mokolo mobimba, butu na yango mpe mokolo oyo elandaki. Moto moko te atikalaki kozwa na se ya bakilo nkoto moko; mpe batandaki yango na zingazinga ya molako.
The people were busy gathering quail all that day, all the night, and all the next day. No one gathered less than ten homers of quail. They shared the quail all through the camp.
33 Kasi, wana misuni ezalaki nanu kati na minoko na bango mpe basilisaki nanu kotafuna yango te, kanda ya Yawe epelaki mpo na bango mpe apesaki bango etumbu ya makasi.
While the meat was still between their teeth, while they were chewing it, Yahweh became angry at them. He attacked the people with a very great disease.
34 Yango wana, bakomaki kobenga esika yango « Kibiroti-Atava, » pamba te ezalaki na esika wana nde bakundaki bato ya lokoso.
That place was named Kibroth Hattaavah, because there they buried the people who had craved meat.
35 Longwa na Kibiroti-Atava, bana ya Isalaele basalaki mobembo kino na Atseroti mpe bavandaki kuna.
From Kibroth Hattaavah the people traveled to Hazeroth, where they stayed.

< Mitango 11 >