< Mitango 10 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
Yahweh parla à Moïse, en disant:
2 « Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako.
« Fais-toi deux trompettes d’argent; tu les feras d’argent battu. Elles te serviront pour la convocation de l’assemblée et pour la levée des camps.
3 Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Quand on en sonnera, toute l’assemblée se réunira auprès de toi, à l’entrée de la tente de réunion.
4 Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo.
Si l’on ne sonne que d’une trompette, les princes seulement, les chefs des milliers d’Israël, se réuniront auprès de toi.
5 Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende.
Quand vous sonnerez avec éclat, ceux qui campent à l’orient se mettront en marche;
6 Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende.
quand vous sonnerez avec éclat pour la seconde fois, ceux qui campent au midi se mettront en marche; on sonnera avec éclat pour leur départ.
7 Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te.
Vous sonnerez aussi pour convoquer l’assemblée, mais non avec éclat.
8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino.
Les fils d’Aaron, les prêtres, sonneront des trompettes: ce sera une loi perpétuelle pour vous et pour vos descendants.
9 Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino.
Quand vous irez à la guerre dans votre pays contre l’ennemi qui vous attaquera, vous sonnerez des trompettes avec éclat, et vous serez rappelés au souvenir de Yahweh, votre Dieu, et vous serez délivrés de vos ennemis.
10 Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
Dans vos jours de joie, dans vos fêtes et à vos nouvelles lunes, vous sonnerez des trompettes, en offrant vos holocaustes et vos sacrifices pacifiques, et elles seront pour vous un mémorial devant votre Dieu. Je suis Yahweh, votre Dieu. »
11 Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli.
La seconde année, au vingtième jour du deuxième mois, la nuée s’éleva de dessus la Demeure du témoignage;
12 Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.
et les enfants d’Israël, reprenant leurs marches, partirent du désert de Sinaï, et la nuée s’arrêta dans le désert de Pharan.
13 Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
Ils se mirent en marche pour la première fois, suivant le commandement de Yahweh par l’organe de Moïse.
14 Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango.
La bannière du camp des fils de Juda partit la première, selon leurs troupes, et la troupe de Juda était commandée par Nahasson, fils d’Aminadab;
15 Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari.
la troupe de la tribu des fils d’Issachar était commandée par Nathanaël, fils de Suar;
16 Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni.
et la troupe de la tribu des fils de Zabulon était commandée par Éliab, fils de Hélon.
17 Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki.
La Demeure fut démontée, et les fils de Gerson et les fils de Mérari partirent, portant la Demeure.
18 Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango.
La bannière du camp de Ruben partit, selon leurs troupes, et la troupe de Ruben était commandée par Elisur, fils de Sédéur;
19 Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni.
la troupe de la tribu des fils de Siméon était commandée par Salamiel, fils de Surisaddaï;
20 Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
et la troupe de la tribu des fils de Gad était commandée par Éliasaph, fils de Duel.
21 Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma.
Les Caathites partirent portant les objets sacrés, et les autres dressaient la Demeure, en attendant leur arrivée.
22 Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango.
La bannière du camp des fils d’Éphraïm partit, selon leurs troupes et la troupe d’Éphraïm était commandée par Élisama, fils d’Ammiud;
23 Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase.
la troupe de la tribu des fils de Manassé était commandée par Gamaliel, fils de Phadassur,
24 Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.
et la troupe de la tribu de Benjamin était commandée par Abidan, fils de Gédéon.
25 Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.
La bannière du camp des fils de Dan partit, selon leurs troupes: elle formait l’arrière-garde de tous les camps. La troupe de Dan était commandée par Ahiéser, fils d’Ammisaddaï;
26 Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri;
la troupe de la tribu des fils d’Aser était commandée par Phégiel, fils d'Ochran,
27 mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali.
et la troupe des fils de Nephthali était commandée par Ahira, fils d’enan.
28 Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango.
Tel était l’ordre de marche des enfants d’Israël selon leurs troupes; et ils partirent.
29 Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize: — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki: « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.
Moïse dit à Hobab, fils de Raguel, le Madianite, beau-père de Moïse: « Nous partons pour le lieu dont Yahweh a dit: Je vous le donnerai. Viens avec nous, et nous te ferons du bien, car Yahweh a promis de faire du bien à Israël. »
30 Obabi azongiselaki ye: — Te! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.
Hobab lui répondit: « Je n’irai point, mais je m’en irai dans mon pays et ma famille. »
31 Kasi Moyize alobaki: — Nabondeli yo: kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe; okozala motambolisi na biso.
Et Moïse dit: « Ne nous quitte pas, je te prie; puisque tu connais les lieux où nous aurons à camper dans le désert, tu nous serviras d’œil.
32 Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso.
Si tu viens avec nous, nous te ferons partager le bien que Yahweh nous fera. »
33 Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.
Étant partis de la montagne de Yahweh, ils firent trois journées de marche, et pendant ces trois journées de marche, l’arche de l’alliance de Yahweh s’avança devant eux pour leur chercher un lieu de repos.
34 Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.
La nuée de Yahweh était au-dessus d’eux pendant le jour, lorsqu’ils partaient du camp.
35 Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba: « Oh Yawe, telema! Tika ete banguna na Yo bapalangana! Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo! »
Quand l’arche partait, Moïse disait: « Lève-toi, Yahweh, et que tes ennemis soient dispersés! Que ceux qui te haïssent fuient devant ta face! »
36 Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba: « Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele, pamba te bazali ebele penza! »
Et quand elle s’arrêtait, il disait: « Reviens, Yahweh, vers les myriades des milliers d’Israël! »

< Mitango 10 >