< Neyemi 1 >
1 Maloba ya Neyemi, mwana mobali ya Akalia. Na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, na sanza ya kisilevi, wana nazalaki nanu na Size, mboka mokonzi,
Ebigambo bya Nekkemiya mutabani wa Kakaliya: Awo mu mwezi gwa Kisuleevu mu mwaka ogw’amakumi abiri bwe nnali nga ndi mu lubiri mu kibuga ekikulu ekya Susani,
2 Anani, moko kati na bandeko na ngai, ayaki elongo na bato mosusu wuta na Yuda. Natunaki bango sango ya Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu, mpe sango ya Yelusalemi.
Kanani, omu ku baganda bange, n’ajja n’abamu ku basajja okuva mu Yuda, ne mubuuza ku bikwata ku kitundu ky’Abayudaaya ekyasigalawo, ne ku bifa mu Yerusaalemi.
3 Balobaki na ngai: « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
Ne bantegeeza nti, “Abaawaŋŋangusibwa abaddayo mu ssaza bali mu kabi kanene ne mu nnaku nnyingi; bbugwe wa Yerusaalemi yamenyebwa, era ne wankaaki waakyo yayokebwa omuliro.”
4 Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.
Awo bwe nawulira ebigambo ebyo, ne ntuula wansi ne nkaaba, ne mmala ebiro nga nnakuwadde, nga nsiiba era nga nsaba mu maaso ga Katonda w’eggulu.
5 Nabondelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,
Ne njogera nti, “Ayi Mukama Katonda w’eggulu, Katonda omukulu ow’entiisa, akuuma endagaano ye, era ayagala abo abagondera amateeka ge.
6 tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
Ozibule amaaso go, otege okutu okuwulira okusaba kw’omuddu wo kwe nsaba mu maaso go emisana n’ekiro ku lwa baddu bo abantu ba Isirayiri. Njatula ebibi bye twakola, ffe Abayisirayiri, nga nange n’ennyumba ya kitange mwe tuli.
7 Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
Twasobya mu maaso go, ne tutagoberera mateeka go n’ebiragiro byo bye watuma omuddu wo Musa.
8 Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba: ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya.
“Jjukira ebiragiro bye wawa omuddu wo Musa, ng’oyogera nti, ‘Bwe mutaabeerenga beesigwa, ndibasaasaanya mu mawanga,
9 Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›
naye bwe mulikyuka ne mukomawo gye ndi, ne mugondera amateeka gange, abantu bammwe abaawaŋŋangusibwa ne bwe banaabeeranga ku nkomerero y’eggulu, ndibakuŋŋaanyayo ne mbaleeta mu kifo kye neeroboza okubeerangamu Erinnya lyange.’
10 Bazali basali na Yo mpe bato na Yo, oyo osilaki kokangola na nguya monene na Yo mpe na makasi ya loboko na Yo!
“Abo be baddu bo era be bantu bo be wanunula n’amaanyi go amangi era n’omukono gwo ogw’amaanyi.
11 Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.
Ayi Mukama, otege okutu eri okusaba kw’omuddu wo n’eri okusaba kw’abaddu bo abatya erinnya lyo. Omuddu wo omusobozese okulaba ekisa mu maaso g’omusajja ono.” Ebiro ebyo nnali musenero wa kabaka.