< Neyemi 9 >

1 Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.
El día veinte y cuatro de ese mes se congregaron los hijos de Israel para un ayuno, cubiertos de saco y polvo.
2 Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
Y separado ya el linaje de Israel de todos los extranjeros, se pusieron de pie e hicieron confesión de sus pecados y de las iniquidades de sus padres.
3 Batelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango.
Puestos en pie, cada uno en su lugar, leyeron en el Libro de la Ley de Yahvé su Dios, durante la cuarta parte del día; (otra) cuarta parte emplearon para la confesión y adoración de Yahvé, su Dios.
4 Jozue, Buni, Kadimieli, Shebania, Bani, Sherebia mpe Kenani bamataki na etemelo ya kolobela oyo basalaki mpo na Balevi mpe babelelaki Yawe, Nzambe na bango na mongongo makasi.
Subieron a la tribuna de los levitas: Jesúa, Baní, Cadmiel, Sebanías, Buní, Serebías y Kenaní, que en alta voz clamaron a Yahvé, su Dios.
5 Bongo Balevi oyo: Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki: — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko: « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
Y dijeron los levitas Jesúa, Cadmiel, Baní, Hasebnías. Serebías, Hodías, Sebanías y Petahías: “¡Levantaos y bendecid a Yahvé, vuestro Dios, de eternidad en eternidad; y sea bendito el nombre de tu gloria que es superior a toda bendición y alabanza!
6 Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.
Tú solo eres el Señor, Tú que hiciste el cielo, y el cielo de los cielos, con toda su milicia; la tierra con todo cuanto hay en ella y los mares con todo lo que en ellos existe. Tú das vida a todas estas cosas, y la milicia del cielo te adora.
7 Ezali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami.
Tú, Yahvé, eres el Dios que escogiste a Abram, le sacaste de Ur de los caldeos y le diste el nombre de Abrahán.
8 Omonaki ete motema na ye ezali na boyengebene epai na Yo mpe osalaki boyokani elongo na ye mpo na kopesa na bakitani na ye mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Perizi, ya bato ya Yebusi mpe ya bato ya Girigazi. Okokisaki elaka na Yo, pamba te ozali Sembo.
Tú hallaste fiel su corazón delante de Ti, e hiciste con él un pacto, de dar a su descendencia el país del cananeo, del heteo, del amorreo, del fereceo, del jebuseo y del gergeseo; y Tú has cumplido tu palabra, pues eres justo.
9 Omonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo.
Tú miraste la aflicción de nuestros padres en Egipto, oíste su clamor junto al Mar Rojo,
10 Osalaki bilembo minene mpe bikamwa mpo na kotelemela Faraon, bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye; pamba te oyebaki kanza ya mitema ya bato ya Ejipito mpe ndenge banyokolaki bakoko na biso. Boye osalaki ete sango ya Kombo na Yo ekende mosika ndenge ezali kino na mokolo ya lelo.
e hiciste señales y prodigios contra el Faraón, contra todos sus siervos y contra todo el pueblo de su país; pues sabías que los habían tratado con soberbia. Así te hiciste un nombre, como (se ve todavía) hoy.
11 Okabolaki ebale monene liboso na bango, mpe batambolaki kati na ebale yango lokola na mabele ya kokawuka. Kasi ozindisaki lokola libanga monene kati na mozindo ya mayi makasi, bato oyo bazalaki kolanda bango.
Tú dividiste delante de ellos el mar, por en medio del cual pasaron a pie enjuto, y arrojaste a sus perseguidores en el abismo como (se arroja) una piedra en aguas impetuosas.
12 Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.
Tú en columna de nube los condujiste de día, y en columna de fuego de noche, para alumbrarles la senda por donde habían de caminar.
13 Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.
Tú bajaste sobre el monte Sinaí, y hablaste con ellos desde el cielo, dándoles normas rectas, leyes de verdad, mandamientos y preceptos excelentes.
14 Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
Tú les hiciste conocer tu santo sábado y les ordenaste preceptos, mandamientos y la Ley por medio de Moisés, tu siervo.
15 Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.
Tú para su hambre les diste pan del cielo y para su sed hiciste brotar aguas de la peña, y les dijiste que tomasen posesión del país que con mano alzada les prometiste dar.”
16 Kasi bango, bakoko na biso, bakomaki lolendo mpe mito makasi, batosaki mibeko na Yo te.
“Pero ellos y nuestros padres obraron con soberbia, y endureciendo su cerviz no escucharon tus mandamientos.
17 Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,
Rehusaron oírlos ni se acordaron de los prodigios que Tú habías hecho a favor de ellos; endurecieron su cerviz, y en su rebeldía se eligieron un caudillo para volver a su servidumbre. Tú, empero, eres el Dios que perdona, y eres clemente y misericordioso, de larga espera y de mucha bondad, por lo cual no los abandonaste,
18 ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki: ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.
ni aún, cuando se hicieron un becerro de fundición y dijeron: «¡Este es tu Dios que te hizo subir de Egipto!», y cometieron grandes blasfemias.
19 Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe: likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.
Tú, no obstante, en tu gran misericordia no los abandonaste en el desierto: la columna de nube no se apartó de ellos de día para conducirlos en el camino, ni la columna de fuego de noche para alumbrarles el camino que tenían que seguir.
20 Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.
Tú les diste también tu buen Espíritu para instruirlos; no rehusaste dar tu maná a su boca, y les presentaste aguas para su sed.
21 Mibu tuku minei, okokisaki posa na bango nyonso kati na esobe; bazangaki eloko moko te, bilamba na bango etikalaki kokufa te, mpe makolo na bango etikalaki kovimba te.
Por cuarenta años los sustentaste en el desierto, sin que nada les faltase; no se gastaron sus vestidos, ni se hinchó su pie.
22 Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
Después les diste reinos y pueblos, repartiendo entre ellos sus territorios, y tomaron en posesión el país de Sehón, el país del rey de Hesbón y el país de Og, rey de Basán.
23 Okomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango.
Multiplicaste sus hijos como las estrellas del cielo, y los introdujiste en el país del cual habías dicho a sus padres que entrarían en su posesión.
24 Bana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi.
En efecto, los hijos entraron y tomaron posesión del país, en tanto que Tú humillaste delante de ellos a los habitantes del país, los cananeos, y los entregaste en sus manos, con sus reyes y los pueblos del país, para que hiciesen con ellos lo que quisiesen.
25 Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
Tomaron ciudades fortificadas y una tierra pingüe; se apoderaron de casas llenas de toda suerte de bienes, de cisternas excavadas, de viñas, olivares y árboles frutales en abundancia; y comieron y se saciaron y engordaron y vivieron en delicia merced a tu gran bondad.
26 Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.
Pero, fueron rebeldes y se levantaron contra Ti, echando tu Ley detrás de sus espaldas; y mataron a tus profetas, que daban testimonio contra ellos para convertirlos a Ti, y profirieron grandes blasfemias.
27 Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
Por eso los entregaste en manos de sus enemigos, que los oprimieron; pero cuando en el tiempo de su angustia clamaron a Ti, los oíste desde el cielo, y según la multitud de tus misericordias les diste libertadores que los salvasen del poder de sus enemigos.
28 Kasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi.
Apenas tuvieron descanso, volvieron a hacer lo malo delante de Ti, por lo cual volviste a abandonarlos en manos de sus enemigos, que los dominaron, y cuando de nuevo clamaron a Ti, Tú desde el cielo los escuchaste y según la multitud de tus misericordias los libraste muchas veces.
29 Okebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka.
Tú diste testimonio contra ellos para convertirlos a tu Ley; pero ellos en su soberbia no escucharon tus mandamientos; pecaron contra tus preceptos, en cuya observancia halla el hombre la vida, mostraron hombros rebeldes, endurecieron su cerviz y no quisieron escuchar.
30 Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
Tú los sufriste muchos años, y diste testimonio contra ellos por tu Espíritu, por medio de tus profetas. Pero ellos no dieron oídos por lo cual los entregaste en manos de los pueblos de estos países.
31 Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.
Con todo esto, en tu gran misericordia no acabaste con ellos, ni los abandonaste; porque eres un Dios clemente y misericordioso.
32 Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.
Ahora, oh Dios nuestro, Dios grande, fuerte y temible, que guardas la Alianza y la misericordia, no tengas en poco toda esta angustia que ha venido sobre nosotros, sobre nuestros reyes y nuestros príncipes, sobre nuestros sacerdotes y nuestros profetas, sobre nuestros padres y todo nuestro pueblo, desde los días de los reyes de Asiria hasta el día de hoy.
33 Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.
Tú has sido justo en todo lo que nos ha sobrevenido; porque has obrado con fidelidad, mas nosotros hemos hecho el mal.
34 Bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango.
Nuestros reyes y nuestros príncipes, nuestros sacerdotes y nuestros padres no han cumplido tu Ley, no hicieron caso de tus mandamientos, ni de los testimonios que diste contra ellos.
35 Ezala wana bazalaki kati na mokili na bango, wana bazalaki kosepela mpo na bolamu oyo ozalaki kotalisa bango kati na mokili monene oyo mabele na yango ebotaka malamu, basalelaki Yo te mpe batikaki te banzela mabe na bango.
Ellos, al contrario, a pesar de la gran bondad con que los trataste, no te sirvieron en su reino, en la tierra espaciosa y pingüe que les pusiste delante, ni se convirtieron de sus malas obras.
36 Kasi tala, tozali lelo bawumbu! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna!
He aquí que hoy somos siervos; sí, somos siervos en ese mismo país que Tú diste a nuestros padres, para que comiéramos sus frutos y sus bienes.
37 Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »
Sus abundantes frutos son para los reyes que Tú has puesto sobre nosotros a causa de nuestros pecados. Ellos dominan, según su antojo, sobre nuestros cuerpos y nuestras bestias, y vivimos en gran angustia.”
38 Mpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango.
“A raíz de todo esto, hacemos un pacto fiel, que ponemos por escrito; y nuestros príncipes, nuestros levitas y nuestros sacerdotes han de imprimirle sus sellos.”

< Neyemi 9 >