< Neyemi 8 >

1 Bato nyonso basanganaki lokola moto moko na libanda, liboso ya Ekuke ya Mayi. Balobaki na Esidrasi, molakisi ya Mobeko, ete abimisa buku ya Mobeko ya Moyize, oyo Yawe apesaki bana ya Isalaele.
All the people gathered themselves together as one man into the wide place that was in front of the water gate; and they spoke to Ezra the scribe to bring the scroll of the Torah of Moses, which the LORD had commanded to Israel.
2 Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola.
Ezra the priest brought the law before the assembly, both men and women, and all who could hear with understanding, on the first day of the seventh month.
3 Atangelaki bango buku yango na mongongo makasi, kobanda na tongo kino na pokwa, na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi. Bato nyonso bazalaki koyoka na bokebi botangi buku ya Mobeko.
He read from it before the wide place that was in front of the water gate from early morning until midday, in the presence of the men and the women, and of those who could understand. The ears of all the people were attentive to the scroll of the Torah.
4 Esidrasi, molakisi ya Mobeko, atelemaki na etemelo ya kolobela oyo basalaki na mabaya, kaka mpo na mayangani wana. Matitia, Shema, Anaya, Uri, Ilikia mpe Maaseya batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mobali; Pedaya, Mishaeli, Malikiya, Ashumi, Ashibadana, Zakari mpe Meshulami batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mwasi.
Ezra the scribe stood on a pulpit of wood, which they had made for the purpose; and beside him stood Mattithiah, Shema, Anaiah, Uriah, Hilkiah, and Maaseiah, on his right hand; and on his left hand, Pedaiah, Mishael, Malchijah, Hashum, Hashbaddanah, Zechariah, and Meshullam.
5 Mpo ete Esidrasi atelemaki na esika ya likolo koleka bato nyonso, moto nyonso amonaki ye kofungola buku. Mpe tango kaka afungolaki buku yango, bato nyonso batelemaki.
Ezra opened the book in the sight of all the people (for he was above all the people), and when he opened it, all the people stood up.
6 Esidrasi akumisaki Yawe, Nzambe Monene; mpe bato nyonso batombolaki maboko na bango mpe bazongisaki: « Amen! » Bongo bafukamaki mpe bakitisaki bilongi na bango kino na se mpo na kogumbamela Yawe.
Then Ezra blessed the LORD, the great God. All the people answered, “Amen, Amen,” with the lifting up of their hands. They bowed their heads, and worshiped the LORD with their faces to the ground.
7 Sima, batelemaki; mpe Balevi oyo: Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema.
Also Yeshua, Bani, Sherebiah, Jamin, Akkub, Shabbethai, Hodiah, Maaseiah, Kelita, Azariah, Jozabad, Hanan, Pelaiah, and the Levites, caused the people to understand the law; and the people stayed in their place.
8 Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi.
They read in the book, in the law of God, distinctly; and they gave the sense, so that they understood the reading.
9 Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso: — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso; botika kosala matanga mpe botika kolela!
Nehemiah, who was the governor, Ezra the priest and scribe, and the Levites who taught the people said to all the people, “Today is holy to the LORD your God. Don’t mourn, nor weep.” For all the people wept when they heard the words of the law.
10 Neyemi alobaki na bango lisusu: — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Then he said to them, “Go your way. Eat the fat, drink the sweet, and send portions to him for whom nothing is prepared, for today is holy to our Lord. Don’t be grieved, for the joy of the LORD is your strength.”
11 Balevi bazalaki kokitisa bato nyonso mitema, bazalaki koloba na bango: — Bozala na kimia, pamba te mokolo ya lelo ezali bule; bozala na mawa te!
So the Levites calmed all the people, saying, “Hold your peace, for the day is holy. Don’t be grieved.”
12 Bato nyonso bakendeki kolia mpe komela, kotinda ndambo ya bilei epai ya bato oyo bazangaki eloko ya kolamba mpe kosepela na esengo makasi, pamba te basosolaki maloba oyo balimbolelaki bango.
All the people went their way to eat, to drink, to send portions, and to celebrate, because they had understood the words that were declared to them.
13 Na mokolo ya mibale ya sanza, bakambi ya mabota nyonso elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi basanganaki pembeni ya Esidrasi, molakisi ya Mobeko, mpo na koluka koyeba malamu-malamu maloba ya Mibeko.
On the second day, the heads of fathers’ households of all the people, the priests, and the Levites were gathered together to Ezra the scribe, to study the words of the law.
14 Bamonaki ete ekomama kati na Mibeko oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize, ete bana ya Isalaele basengeli kovanda kati na bandako oyo batonga na matiti, na tango ya feti ya sanza ya sambo,
They found written in the Torah how the LORD had commanded by Moses that the children of Israel should dwell in booths in the feast of the seventh month;
15 mpe basengeli kotatola to kopanza kati na bingumba na bango nyonso mpe kati na Yelusalemi liloba oyo: « Bobima wuta na mokili ya bangomba, bomema longwa kuna bitape ya nzete ya olive ya mboka mpe ya zamba, bitape ya nzete ya mirite, mandalala mpe bitape ya nzete ya makasa ebele mpo na kotonga bandako ya matiti, kolanda ndenge ekomama. »
and that they should publish and proclaim in all their cities and in Jerusalem, saying, “Go out to the mountain, and get olive branches, branches of wild olive, myrtle branches, palm branches, and branches of thick trees, to make temporary shelters, as it is written.”
16 Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi.
So the people went out and brought them, and made themselves temporary shelters, everyone on the roof of his house, in their courts, in the courts of God’s house, in the wide place of the water gate, and in the wide place of Ephraim’s gate.
17 Lisanga ya bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu batongaki bandako ya matiti mpe bavandaki kati na yango. Wuta na tango ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, kino na mokolo wana, bana ya Isalaele batikalaki lisusu te kosepela feti yango. Boye, mpo na libaku oyo, bazalaki na esengo makasi.
All the assembly of those who had come back out of the captivity made temporary shelters and lived in the temporary shelters, for since the days of Joshua the son of Nun to that day the children of Israel had not done so. There was very great gladness.
18 Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.
Also day by day, from the first day to the last day, he read in the scroll of the Torah of God. They kept the feast seven days; and on the eighth day was a solemn assembly, according to the ordinance.

< Neyemi 8 >