< Neyemi 7 >
1 Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi: bato na bato na mosala na bango.
城牆修完,我安了門扇,守門的、歌唱的,和利未人都已派定。
2 Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.
我就派我的弟兄哈拿尼和營樓的宰官哈拿尼雅管理耶路撒冷;因為哈拿尼雅是忠信的,又敬畏上帝過於眾人。
3 Nalobaki na bango: — Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi: bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango.
我吩咐他們說:「等到太陽上升才可開耶路撒冷的城門;人尚看守的時候就要關門上閂;也當派耶路撒冷的居民各按班次看守自己房屋對面之處。」
4 Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te.
城是廣大,其中的民卻稀少,房屋還沒有建造。
5 Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna:
我的上帝感動我心,招聚貴冑、官長,和百姓,要照家譜計算。我找着第一次上來之人的家譜,其上寫着:
6 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye;
巴比倫王尼布甲尼撒從前擄去猶大省的人,現在他們的子孫從被擄到之地回耶路撒冷和猶大,各歸本城。
7 bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele:
他們是同着所羅巴伯、耶書亞、尼希米、亞撒利雅、拉米、拿哈瑪尼、末底改、必珊、米斯毗列、比革瓦伊、尼宏、巴拿回來的。
8 Bakitani ya Pareoshi: nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
以色列人民的數目記在下面:巴錄的子孫二千一百七十二名;
9 Bakitani ya Shefatia: nkama misato na tuku sambo na mibale.
示法提雅的子孫三百七十二名;
10 Bakitani ya Ara: nkama motoba na tuku mitano na mibale.
亞拉的子孫六百五十二名;
11 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi: nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe.
巴哈‧摩押的後裔,就是耶書亞和約押的子孫二千八百一十八名;
12 Bakitani ya Elami: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
以攔的子孫一千二百五十四名;
13 Bakitani ya Zatu: nkama mwambe na tuku minei na mitano.
薩土的子孫八百四十五名;
14 Bakitani ya Zakayi: nkama sambo na tuku motoba.
薩改的子孫七百六十名;
15 Bakitani ya Binuwi: nkama motoba na tuku minei na mwambe.
賓內的子孫六百四十八名;
16 Bakitani ya Bebayi: nkama motoba na tuku mibale na mwambe.
比拜的子孫六百二十八名;
17 Bakitani ya Azigadi: nkoto mibale na nkama misato na tuku mibale na mibale.
押甲的子孫二千三百二十二名;
18 Bakitani ya Adonikami: nkama motoba na tuku motoba na sambo.
亞多尼干的子孫六百六十七名;
19 Bakitani ya Bigivayi: nkoto mibale na tuku motoba na sambo.
比革瓦伊的子孫二千零六十七名;
20 Bakitani ya Adini: nkama motoba na tuku mitano na mitano.
亞丁的子孫六百五十五名;
21 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi: tuku libwa na mwambe.
亞特的後裔,就是希西家的子孫九十八名;
22 Bakitani ya Ashumi: nkama misato na tuku mibale na mwambe.
哈順的子孫三百二十八名;
23 Bakitani ya Betsayi: nkama misato na tuku mibale na minei.
比賽的子孫三百二十四名;
24 Bakitani ya Arifi: nkama moko na zomi na mibale.
哈拉的子孫一百一十二名;
25 Bakitani ya mboka Gabaoni: tuku libwa na mitano.
基遍人九十五名;
26 Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa: nkama moko na tuku mwambe na mwambe.
伯利恆人和尼陀法人共一百八十八名;
27 Bato ya mboka Anatoti: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
亞拿突人一百二十八名;
28 Bato ya mboka Beti-Azimaveti: tuku minei na mibale.
伯‧亞斯瑪弗人四十二名;
29 Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti: nkama sambo na tuku minei na misato.
基列‧耶琳人、基非拉人、比錄人共七百四十三名;
30 Bato ya bamboka Rama mpe Geba: nkama motoba na tuku mibale na moko.
拉瑪人和迦巴人共六百二十一名;
31 Bato ya mboka Mikimasi: nkama moko na tuku mibale na mibale.
默瑪人一百二十二名;
32 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi: nkama moko na tuku mibale na misato.
伯特利人和艾人共一百二十三名;
33 Bato ya mboka Nebo mosusu: tuku mitano na mibale.
別的尼波人五十二名;
34 Bato ya mboka ya Elami mosusu: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
別的以攔子孫一千二百五十四名;
35 Bato ya mboka Arimi: nkama misato na tuku mibale.
哈琳的子孫三百二十名;
36 Bakitani ya mboka Jeriko: nkama misato na tuku minei na mitano.
耶利哥人三百四十五名;
37 Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono: nkama sambo na tuku mibale na moko.
羅德人、哈第人、阿挪人共七百二十一名;
38 Bakitani ya engumba Sena: nkoto misato na nkama libwa na tuku misato.
西拿人三千九百三十名。
39 Tala motango ya Banganga-Nzambe: Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue: nkama libwa na tuku sambo na misato.
祭司:耶書亞家,耶大雅的子孫九百七十三名;
40 Bakitani ya Imeri: nkoto moko na tuku mitano na mibale.
音麥的子孫一千零五十二名;
41 Bakitani ya Pashuri: nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
巴施戶珥的子孫一千二百四十七名;
42 Bakitani ya Arimi: nkoto moko na zomi na sambo.
哈琳的子孫一千零一十七名。
43 Tala motango ya Balevi: Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva: tuku sambo na minei.
利未人:何達威的後裔,就是耶書亞和甲篾的子孫七十四名。
44 Tala motango ya bayembi: Bakitani ya Azafi: nkama moko na tuku minei na mwambe.
歌唱的:亞薩的子孫一百四十八名。
45 Tala motango ya bakengeli bikuke: Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi: nkama moko na tuku misato na mwambe.
守門的:沙龍的子孫、亞特的子孫、達們的子孫、亞谷的子孫、哈底大的子孫、朔拜的子孫,共一百三十八名。
46 Basali ya Tempelo: Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
尼提寧:西哈的子孫、哈蘇巴的子孫、答巴俄的子孫、
48 Lebana, Agaba, Shalimayi,
利巴拿的子孫、哈迦巴的子孫、薩買的子孫、
50 Reaya, Retsini, Nekoda,
利亞雅的子孫、利汛的子孫、尼哥大的子孫、
52 Besayi, Mewunimi, Nefusimi,
比賽的子孫、米烏寧的子孫、尼普心的子孫、
53 Bakibuki, Akufa, Aruri,
巴卜的子孫、哈古巴的子孫、哈忽的子孫、
54 Batsiliti, Meyida, Arisha,
巴洗律的子孫、米希大的子孫、哈沙的子孫、
55 Barikosi, Sisera, Tama,
巴柯的子孫、西西拉的子孫、答瑪的子孫、
57 Tala bakitani ya basali ya Salomo: Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Perida,
所羅門僕人的後裔,就是瑣太的子孫、瑣斐列的子孫、比路大的子孫、
58 Yala, Darikoni, Gideli,
雅拉的子孫、達昆的子孫、吉德的子孫、
59 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.
示法提雅的子孫、哈替的子孫、玻黑列‧哈斯巴音的子孫、亞們的子孫。
60 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo: nkama misato na tuku libwa na mibale.
尼提寧和所羅門僕人的後裔共三百九十二名。
61 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele:
從特米拉、特哈薩、基綠、亞頓、音麥上來的,不能指明他們的宗族譜系是以色列人不是;
62 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda: nkama motoba na tuku minei na mibale.
他們是第萊雅的子孫、多比雅的子孫、尼哥大的子孫,共六百四十二名。
63 Mpe kati na Banganga-Nzambe: bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
祭司中,哈巴雅的子孫、哈哥斯的子孫、巴西萊的子孫;因為他們的先祖娶了基列人巴西萊的女兒為妻,所以起名叫巴西萊。
64 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
這三家的人在族譜之中尋查自己的譜系,卻尋不着,因此算為不潔,不准供祭司的職任。
65 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
省長對他們說:「不可吃至聖的物,直到有用烏陵和土明決疑的祭司興起來。」
66 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
會眾共有四萬二千三百六十名。
67 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano,
此外,還有他們的僕婢七千三百三十七名,又有歌唱的男女二百四十五名。
69 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
駱駝四百三十五隻,驢六千七百二十匹。
70 Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe.
有些族長為工程捐助。省長捐入庫中的金子一千達利克,碗五十個,祭司的禮服五百三十件。
71 Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.
又有族長捐入工程庫的金子二萬達利克,銀子二千二百彌拿。
72 Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.
其餘百姓所捐的金子二萬達利克,銀子二千彌拿,祭司的禮服六十七件。
73 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko. Tango sanza ya sambo ekomaki, bana ya Isalaele bakomaki kovanda kati na bingumba na bango.
於是祭司、利未人、守門的、歌唱的、民中的一些人、尼提寧,並以色列眾人,各住在自己的城裏。