< Neyemi 6 >

1 Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te,
سنبلط، طوبیا، جشم عرب و بقیه دشمنان ما شنیدند که کار تعمیر حصار رو به اتمام است (هر چند تمام درهای دروازه‌ها را کار نگذاشته بودیم)،
2 Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo: — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe.
پس سنبلط و جشم برای من پیغام فرستادند که در یکی از دهات دشت اونو به دیدن ایشان بروم. ولی من پی بردم که می‌خواهند به من آسیبی برسانند؛
3 Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo: — Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino?
پس جوابشان را اینطور دادم: «من مشغول کار مهمی هستم و نمی‌توانم دست از کارم بکشم و به دیدن شما بیایم.»
4 Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko.
ایشان چهار بار برای من همان پیغام را فرستادند و من هم هر بار همان جواب را دادم.
5 Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye.
بار پنجم، مأمور سنبلط با یک نامهٔ سرگشاده پیش من آمد؛
6 Kati na mokanda yango, bakomaki: « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango;
مضمون نامه چنین بود: «جشم به من می‌گوید که بین مردم شایع شده که تو و یهودیان قصد شورش دارید، و به همین جهت است که دور شهر اورشلیم حصار می‌کشی؛ و بنا به این گزارش، تو می‌خواهی پادشاه ایشان بشوی.
7 mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango! »
از این گذشته انبیایی تعیین کرده‌ای تا در اورشلیم مردم را دور خود جمع کنند و بگویند که نحمیا پادشاه یهوداست. مطمئن باش این خبرها به گوش اردشیر پادشاه خواهد رسید. پس بهتر است پیش من بیایی تا در این مورد با هم مشورت کنیم.»
8 Natindelaki ye eyano oyo: — Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo!
جواب دادم: «آنچه می‌گویی حقیقت ندارد. اینها ساخته و پرداخته خودت است.»
9 Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso; bazalaki komilobela: — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te; mpe mosala ekosila te, ekotelema! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala! Kasi ngai nasambelaki: — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai!
آنها می‌خواستند با این حرفها ما را بترسانند تا از کار دست بکشیم. ولی من دعا کردم تا خدا مرا تقویت کند.
10 Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki: — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo; bakoya na butu mpo na koboma yo.
شمعیا (پسر دلایا و نوه مِهیطَبئیل) در خانهٔ خود بست نشسته بود و من به دیدنش رفتم. وقتی مرا دید، گفت: «باید هر چه زودتر در خانهٔ خدا مخفی بشویم و درها را قفل کنیم. چون امشب می‌آیند تو را بکشند!»
11 Kasi nazongiselaki na ye: — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye? Nakokende te!
ولی من جواب دادم: «آیا می‌شود مردی مثل من از خطر فرار کند؟ من حق ندارم برای حفظ جانم داخل خانهٔ خدا بشوم. من هرگز این کار را نمی‌کنم.»
12 Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.
بعد فهمیدم که پیغام شمعیا از طرف خدا نبود، بلکه طوبیا و سنبلط او را اجیر کرده بودند تا مرا بترسانند و وادار کنند به خانهٔ خدا فرار کنم و مرتکب گناه بشوم تا بتوانند مرا رسوا کنند.
13 Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.
14 Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai!
آنگاه دعا کردم: «ای خدای من، طوبیا و سنبلط را به سزای اعمالشان برسان و نیز به یاد آور که چگونه نوعدیه نبیه و سایر انبیا می‌خواستند مرا بترسانند.»
15 Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.
سرانجام کار بازسازی حصار اورشلیم در بیست و پنجم ماه ایلول تمام شد. این کار پنجاه و دو روز طول کشید.
16 Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.
وقتی دشمنان ما که در سرزمینهای مجاور ما بودند این را دیدند، رسوا شدند و فهمیدند که این کار با کمک خدای ما تمام شده است.
17 Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango.
در این مدت نامه‌های زیادی بین طوبیا و بزرگان یهودا رد و بدل شد.
18 Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia.
در یهودا بسیاری با او همدست شده بودند، چون هم خودش داماد شکنیا (پسر آرح) بود و هم پسرش یهوحانان با دختر مشلام (پسر برکیا) ازدواج کرده بود.
19 Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.
مردم پیش من از طوبیا تعریف می‌کردند، و هر چه از من می‌شنیدند به او خبر می‌دادند. طوبیا هم برای اینکه مرا بترساند، نامه‌های تهدیدآمیز برایم می‌نوشت.

< Neyemi 6 >