< Neyemi 2 >
1 Na sanza ya Nisani, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi.
Mjeseca Nisana, dvadesete godine kraljevanja Artakserksova, stajalo je vino pred kraljem. Uzeh ga i ponudih kralju. Nikada pred njim nisam bio tužan.
2 Boye mokonzi atunaki ngai: — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te? Boni, ozali na mawa na motema? Nabangaki makasi;
Tada mi kralj reče: “Što ti je tužno lice? Nisi li možda bolestan? Nije drugo nego je tuga u tvome srcu!” Ja se veoma uplaših
3 kasi nazongiselaki mokonzi: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto?
i rekoh kralju: “Neka uvijek živi kralj! Kako mi lice ne bi bilo tužno kad je grad gdje su grobovi mojih otaca razoren, a vrata mu ognjem spaljena?”
4 Mokonzi atunaki ngai: — Olingi nini? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,
Kralj me upita: “Što, dakle, želiš?” Zazvah Boga nebeskoga
5 mpe nazongiselaki mokonzi: — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu.
i odgovorih kralju: “Ako je kralju po volji i ako ti je mio sluga tvoj, pusti me da odem u Judeju, u grad grobova mojih otaca, da ga obnovim.”
6 Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai: — Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini. Esepelisaki mokonzi kotinda ngai; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala.
Kralj me upita pred kraljicom, koja je sjedila kraj njega: “Koliko bi trajao tvoj put? Kada ćeš se vratiti?” Pošto sam utvrdio vrijeme koje je odgovaralo kralju, pusti me da odem.
7 Nalobaki na ye lisusu: — Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda;
Još rekoh kralju: “Ako je kralju po volji, mogao bih ponijeti pisma upraviteljima s onu stranu Rijeke da me propuste do Judeje;
8 mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.
i pismo Asafu, nadgledniku kraljeve šume, da mi dadne drva za gradnju vrata na tvrđi Hrama, za gradski bedem i za kuću u kojoj ću se nastaniti.” I dade mi kralj, jer dobrostiva ruka Boga moga bijaše nada mnom.
9 Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai.
I dođoh tako k upraviteljima s onu stranu Rijeke i dadoh im kraljeva pisma. A kralj posla sa mnom časnike i konjanike.
10 Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
Kad to ču Sanbalat, Horonac, i sluga Tobija, Amonac, bi im vrlo mrsko što je došao čovjek da se zauzme za dobro Izraelaca.
11 Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato,
Stigavši u Jeruzalem, ostadoh ondje tri dana.
12 nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.
Zatim ustah noću, u pratnji nekoliko ljudi, nikomu ne povjerivši što mi je Bog moj nadahnuo da učinim za Jeruzalem; a nisam imao druge životinje osim kljuseta na kojem sam jahao.
13 Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.
Iziđoh, dakle, noću na Dolinska vrata i uputih se Zmajevskom izvoru, a zatim prema Smetlišnim vratima: razgledao sam jeruzalemski zid gdje je bio razoren i vrata koja su bila spaljena.
14 Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka.
Nastavio sam put prema Izvorskim vratima i Kraljevskom ribnjaku, ali nisam našao prolaza za životinju na kojoj sam jahao.
15 Namataki wuta na lubwaku, kaka na butu, mpo na kokoba kotala malamu-malamu mir. Nabalukaki mpe nazongelaki na nzela ya Ekuke ya Lubwaku.
Uspeo sam se zato noću uz Potok, i dalje razgledajući zid, i ponovo sam ušao na Dolinska vrata. Tako sam se vratio,
16 Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala.
a da savjetnici nisu primijetili kamo sam otišao i što sam učinio. Sve do sada nisam ništa rekao Židovima: ni svećenicima, ni velikašima, ni savjetnicima, ni drugima nadstojnicima.
17 Bongo nalobaki na bango: — Bozali komona pasi oyo tozali na yango! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo!
Tada im rekoh: “Vidite u kakvoj smo nevolji: Jeruzalem je u ruševinama, a vrata mu spaljena. Hajte, sagradimo jeruzalemski zid da više ne budemo izloženi ruglu.”
18 Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki: — Totelema mpe totonga! Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango.
I objasnih im kako je dobrostiva ruka Boga moga bila nada mnom, a saopćih im i riječi koje mi kralj bijaše rekao. “Ustanimo”, povikaše oni, “i gradimo!” I ukrijepiše im se ruke na dobro djelo.
19 Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki: — Eloko nini oyo bozali kosala? Bozali kotombokela mokonzi?
Na te vijesti počeše nam se rugati Sanbalat, Horonac, i sluga Tobija, Amonac, i Gešem, Arapin. Prezirno su nam govorili: “Što radite ovdje? Hoćete li se pobuniti protiv kralja?”
20 Nazongiselaki bango: — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino!
Ali im ja odgovorih ovim riječima: “Nebeski će nam Bog dati da uspijemo. Mi, sluge njegove, ustasmo da gradimo. A vi nemate ni dijela, ni prava, ni spomena u Jeruzalemu.”