< Neyemi 13 >

1 Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango: « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe;
On that day they read in the book of Moses in the hearing of the people; and it was found written in it that an Ammonite and a Moabite should not enter into the assembly of God forever,
2 mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »
because they didn’t meet the children of Israel with bread and with water, but hired Balaam against them to curse them; however, our God turned the curse into a blessing.
3 Tango kaka bato bayokaki mobeko yango, balongolaki na Isalaele bakitani nyonso ya bapaya.
It came to pass, when they had heard the law, that they separated all the mixed multitude from Israel.
4 Liboso ya kozwa mokano yango, Nganga-Nzambe Eliashibi oyo azali na mokumba ya kobatela bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso mpe azali moto ya libota ya Tobiya
Now before this, Eliashib the priest, who was appointed over the rooms of the house of our God, being allied to Tobiah,
5 apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.
had prepared for him a great room, where before they laid the meal offerings, the frankincense, the vessels, and the tithes of the grain, the new wine, and the oil, which were given by commandment to the Levites, the singers, and the gatekeepers; and the wave offerings for the priests.
6 Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela
But in all this, I was not at Jerusalem; for in the thirty-second year of Artaxerxes king of Babylon I went to the king; and after some days I asked leave of the king,
7 mpe nazongaki na Yelusalemi. Kuna, namonaki mpe nasosolaki mabe oyo Eliashibi asalaki na ndenge apesaki Tobiya shambre kati na lopango ya Ndako ya Nzambe;
and I came to Jerusalem, and understood the evil that Eliashib had done for Tobiah, in preparing him a room in the courts of God’s house.
8 nasilikaki makasi mpe nabwakaki biloko nyonso ya Tobiya na libanda ya shambre.
It grieved me severely. Therefore I threw all Tobiah’s household stuff out of the room.
9 Napesaki mitindo ete bapetola bashambre mpe, na sima, nazongisaki kati na yango bisalelo ya Ndako ya Nzambe, makabo ya ble mpe ansa.
Then I commanded, and they cleansed the rooms. I brought into them the vessels of God’s house, with the meal offerings and the frankincense again.
10 Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.
I perceived that the portions of the Levites had not been given them, so that the Levites and the singers, who did the work, had each fled to his field.
11 Mpo na yango, napamelaki bakambi ya bato mpe natunaki bango: — Mpo na nini Ndako ya Nzambe esundolami? Bongo, nasangisaki Balevi mpe bayembi mpe nazongisaki bango, moto na moto na mosala na ye.
Then I contended with the rulers, and said, “Why is God’s house forsaken?” I gathered them together, and set them in their place.
12 Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo: eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta.
Then all Judah brought the tithe of the grain, the new wine, and the oil to the treasuries.
13 Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi.
I made treasurers over the treasuries, Shelemiah the priest, and Zadok the scribe, and of the Levites, Pedaiah: and next to them was Hanan the son of Zaccur, the son of Mattaniah; for they were counted faithful, and their business was to distribute to their brothers.
14 Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango!
Remember me, my God, concerning this, and don’t wipe out my good deeds that I have done for the house of my God, and for its observances.
15 Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.
In those days I saw some men treading wine presses on the Sabbath in Judah, bringing in sheaves, and loading donkeys with wine, grapes, figs, and all kinds of burdens which they brought into Jerusalem on the Sabbath day; and I testified against them in the day in which they sold food.
16 Ezalaki mpe na bato ya Tiri, oyo bazalaki kovanda kati na Yelusalemi; bango bazalaki komema mbisi mpe biloko ya ndenge na ndenge, mpe bazalaki kotekela yango bato ya Yuda mpe kati na Yelusalemi na mokolo ya Saba.
Some men of Tyre also lived there, who brought in fish and all kinds of wares, and sold on the Sabbath to the children of Judah, and in Jerusalem.
17 Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango: — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba?
Then I contended with the nobles of Judah, and said to them, “What evil thing is this that you do, and profane the Sabbath day?
18 Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele!
Didn’t your fathers do this, and didn’t our God bring all this evil on us and on this city? Yet you bring more wrath on Israel by profaning the Sabbath.”
19 Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba.
It came to pass that when the gates of Jerusalem began to be dark before the Sabbath, I commanded that the doors should be shut, and commanded that they should not be opened until after the Sabbath. I set some of my servants over the gates, so that no burden should be brought in on the Sabbath day.
20 Boye, mbala moko to mibale, basombi mpe bateki biloko ya ndenge na ndenge balekisaki butu libanda ya Yelusalemi.
So the merchants and sellers of all kinds of wares camped outside of Jerusalem once or twice.
21 Nakebisaki bango makasi mpe nalobaki: — Mpo na nini bozali kolekisa butu pembeni ya mir? Soki bozongeli lisusu kosala bongo, nakokanga bino. Wuta na tango wana, batikalaki lisusu koya te na mokolo ya Saba.
Then I testified against them, and said to them, “Why do you stay around the wall? If you do so again, I will lay hands on you.” From that time on, they didn’t come on the Sabbath.
22 Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo!
I commanded the Levites that they should purify themselves, and that they should come and keep the gates, to sanctify the Sabbath day. Remember me for this also, my God, and spare me according to the greatness of your loving kindness.
23 Kaka na mikolo wana, namonaki lisusu bana mibali ya Yuda kobala bana basi ya Asidodi, ya Amoni mpe ya Moabi.
In those days I also saw the Jews who had married women of Ashdod, of Ammon, and of Moab;
24 Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.
and their children spoke half in the speech of Ashdod, and could not speak in the Jews’ language, but according to the language of each people.
25 Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe: — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.
I contended with them, cursed them, struck certain of them, plucked off their hair, and made them swear by God, “You shall not give your daughters to their sons, nor take their daughters for your sons, or for yourselves.
26 Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.
Didn’t Solomon king of Israel sin by these things? Yet among many nations there was no king like him, and he was loved by his God, and God made him king over all Israel. Nevertheless foreign women caused even him to sin.
27 Boni, tosengeli sik’oyo koyoka ete bino mpe bozali kosala mabe wana monene mpe bozangi boyengebene liboso ya Nzambe na biso likolo ya kobala basi ya bapaya?
Shall we then listen to you to do all this great evil, to trespass against our God in marrying foreign women?”
28 Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.
One of the sons of Joiada, the son of Eliashib the high priest, was son-in-law to Sanballat the Horonite; therefore I chased him from me.
29 Oh Nzambe na ngai, kobosana bato wana te, mpo ete babebisaki bosantu ya bonganga-Nzambe mpe boyokani na Yo elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
Remember them, my God, because they have defiled the priesthood and the covenant of the priesthood and of the Levites.
30 Napetolaki Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo na kolongola mbindo nyonso ya bapaya mpe nazongisaki bango na mosala, moto na moto na mokumba na ye.
Thus I cleansed them from all foreigners and appointed duties for the priests and for the Levites, everyone in his work;
31 Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo!
and for the wood offering, at appointed times, and for the first fruits. Remember me, my God, for good.

< Neyemi 13 >