< Neyemi 12 >
1 Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue: Seraya, Jeremi, Esidrasi,
Šie ir tie priesteri un leviti, kas bija atnākuši ar Zerubabeli, Šealtiēļa dēlu, un Ješuū: Seraja, Jeremija, Ezra,
2 Amaria, Maluki, Atushi,
Amarija, Maluks, Hatus,
3 Shekania, Rewumi, Meremoti,
Šekanijus, Rehums, Meremots,
5 Miyamini, Maadia, Biliga,
Mejamins, Maādija, Bilgus,
6 Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya,
Šemaja un Jojaribs, Jedaja.
7 Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya. Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue.
Sallus, Amoks, Hilķija un Jedaja. Šie ir priesteru un viņu brāļu virsnieki Ješuūs dienās.
8 Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi.
Un tie leviti bija: Ješuūs, Binujus, Kadmiēls, Šerebija, Jūda, Matanilus, - tas ar saviem brāļiem bija iecelts par dziesmu vadoni.
9 Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu.
Un Bakbuķija un Unnus, viņu brāļi, stāvēja kalpošanā viņiem pretī.
10 Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,
Un Ješuūs dzemdināja Jojaķimu, un Jojaķims dzemdināja Elijašibu, un Elijašibs dzemdināja Jojadu,
11 Yoyada abotaki Jonatan, Jonatan abotaki Yaduwa.
Un Jojadus dzemdināja Jonatānu, un Jonatāns dzemdināja Jaduū.
12 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi: mpo na libota ya Seraya: Meraya; mpo na libota ya Jeremi: Anania;
Un Jojaķima dienās bija no priesteriem cilts virsnieki: Serajam Meraja, Jeremijam Hananija,
13 mpo na libota ya Esidrasi: Meshulami; mpo na libota ya Amaria: Yoanani;
Ezram Mešulams, Amarijam Johanans,
14 mpo na libota ya Meluki: Jonatan; mpo na libota ya Shebania: Jozefi;
Malukam Jonatāns, Šebanijam Jāzeps,
15 mpo na libota ya Arimi: Adina; mpo na libota ya Merayoti: Elikayi;
Harimam Adnus, Merajotam Ebkajus,
16 mpo na libota ya Ido: Zakari; mpo na libota ya Ginetoni: Meshulami;
Idum Zaharija, Ģintonam Mešulams,
17 mpo na libota ya Abiya: Zikiri; mpo na libota ya Minyamini: Moadia, Pilitayi;
Abijam Sihrus, Minjaminam Moadijam Piltajus,
18 mpo na libota ya Biliga: Shamuwa; mpo na libota ya Shemaya: Jonatan;
Bilgum Šamuūs, Šemajam Jonatāns,
19 mpo na libota ya Yoyaribi: Matinayi; mpo na libota ya Yedaeya: Uzi;
Un Jojaribam Matnajus, Jedajam Uzus,
20 mpo na libota ya Salu: Kalayi; mpo na libota ya Amoki: Eberi;
Sallajam Kallajus, Amokam Ēbers,
21 mpo na libota ya Ilikia: Ashabia; mpo na libota ya Yedaeya: Netaneeli.
Hilķijam Hašabija, Jedajam Netaneēls.
22 Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi.
Elijašiba, Jojada, Jehohanana un Jaduūs dienās levitu cilts virsnieki tapa uzrakstīti un priesteri apakš Dārija, tā Persieša, valdīšanas.
23 Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko.
Levja bērnu cilts virsnieki laiku grāmatā ir sarakstīti līdz Jehohanana, Elijašiba dēla, dienām.
24 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi: Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye: bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.
Bet levitu virsnieki bija šie: Hašabija, Šerebija un Ješuūs, Kadmiēļa dēls, un viņu brāļi bija viņiem klāt, slavēt un teikt, pēc Dieva vīra Dāvida likuma, ikkatrs savu laiku.
25 Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe.
Matanija un Bukbaķija, Obadijus, Mešulams, Talmons, Akubs, tie bija vārtu sargi, sargāt mantas namus pie vārtiem.
26 Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.
Šie bija Jojaķima, Ješuūs dēla, Jocadaka dēla dēla, dienās, un Nehemijas, tā zemes soģa, un priestera Ezras, tā rakstu mācītāja, dienās.
27 Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire.
Un pie Jeruzālemes mūra iesvētīšanas meklēja levitus no visām viņu vietām, tos vest uz Jeruzālemi, ka tie noturētu iesvētīšanas prieka svētkus ar pateikšanas un teikšanas dziesmām un ar pulkstenīšiem un somastabulēm un koklēm.
28 Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa,
Un tie dziedātāju bērni sapulcējās no Jeruzālemes apgabala un no Netofatas ciemiem,
29 longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.
Un no BetGilgalas un no Ģebas tīrumiem un no Asmavetas. Jo dziedātāji bija sev uzcēluši ciemus ap Jeruzālemi.
30 Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir.
Tad priesteri un leviti šķīstījās un šķīstīja tos ļaudis un tos vārtus un to mūri.
31 Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu.
Tad es vedu Jūda virsniekus uz mūri un liku divus lielus dziedātāju pulkus uz svētku gājienu pa labo roku ārpus mūra līdz Mēslu vārtiem.
32 Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda: Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda,
Un tiem gāja pakaļ Ozaja un viena puse no Jūda virsniekiem,
33 Azaria, Esidrasi, Meshulami,
Un Azarijus un Ezra un Mešulams,
34 Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi,
Jūda un Benjamins un Šemaja un Jeremija,
35 ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi;
Un no priesteru bērniem ar bazūnēm: Zaharija, Jonatāna dēls, tas bija Šemajas, tas Matanijas, tas Mikajas, tas Zakura, tas Asafa dēls,
36 mpe baninga na ye ya mosala: Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.
Un viņa brāļi Šemaja un Azareēls, Milalajus, Ģilalajus, Maājus, Netaneēls un Jūda, Hananus, ar Tā Dieva vīra Dāvida mūzikas rīkiem; un Ezra, tas rakstu mācītājs, gāja viņu priekšā.
37 Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.
Un pie Akas vārtiem, kas bija pretim, tie gāja augšām pa tām pakāpēm uz Dāvida pilsētu, pa mūra uzkāpi uz Dāvida namu, un līdz Ūdens vārtiem pret rītiem.
38 Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene,
Tas otrais dziedātāju pulks gāja it pretī, un es viņam pakaļ ar otru ļaužu pusi, pa mūri no Cepļa torņa līdz Platajam mūrim,
39 na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.
Un pa Efraīma vārtiem, pa Vecpilsētas vārtiem un pa Zivju vārtiem un Hananeēļa torni un Meas(Simtnieku) torni un līdz Avju vārtiem, un tie apstājās pie Cietuma vārtiem.
40 Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato
Un tā abi dziedātāju pulki stāvēja pie Dieva nama, arī es un valdnieku viena puse līdz ar mani,
41 mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo: Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango.
Un priesteri Elijaķims, Maāseja, Minjamins, Mikajus, Elioēnajus, Zaharija, Ananija ar bazūnēm,
42 Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya.
Un Maāseja, Šemaja, Eleazars un Uzus un Jehohanans un Malhija un Elams un Azars. Un dziedātāji dziedāja un Jizraķija bija tas vadonis.
43 Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika.
Un tie upurēja tai dienā lielus upurus un priecājās; jo Dievs tos bija iepriecinājis ar lielu prieku; tur priecājās arī sievas un bērni, tā ka Jeruzālemes prieks tapa tālu dzirdēts.
44 Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,
Tai dienā tur vīri kļuva iecelti pār mantu kambariem, kur tie cilājamie upuri, tie pirmaji un tie desmitie, lai tur sakrāj no pilsētu tīrumiem tās pienākamās daļas priekš priesteriem un levitiem. Jo Jūda priecājās par tiem priesteriem un levitiem, kas tur stāvēja,
45 bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali.
Un ņēma vērā sava Dieva nama kopšanu un to šķīstīšanu; tāpat arī dziedātāji un vārtu sargi pēc Dāvida un viņa dēla Salamana likuma.
46 Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe.
Jo vecos laikos Dāvida un Asafa dienās bija priekšnieki dziedātājiem un Dieva slavas un pateicības dziesmām.
47 Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.
Tāpēc viss Israēls Zerubabeļa dienās un Nehemijas dienās deva daļas dziedātājiem un vārtu sargiem, ikdienas savu dienas daļu. Un deva to svēto tiesu levitiem, un leviti deva to svēto tiesu Ārona bērniem.