< Neyemi 11 >
1 Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.
民の牧伯等はヱルサレムに住りその餘の民もまた籤を掣き十人の中よりして一人宛を聖邑ヱルサレムに來りて住しめその九人を他の邑々に住しめたり
2 Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.
又すべて自ら進でヱルサレムに住んと言ふ人々は民これを祝せり
3 Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye;
イスラエル祭司レビ人ネテニ人およびソロモンの臣僕たりし者等の子孫すべてユダの邑々にありておのおのその邑々なる自己の所有地に住をれり此州の貴き人々のヱルサレムに住をりし者は左のごとし
4 mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi: Mpo na bakitani ya Yuda: Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi;
即ちユダの子孫およびベニヤミンの子孫のヱルサレムに住る者は是なりユダの子孫はウジヤの子アタヤ、ウジヤはゼカリヤの子ゼカリヤはアマリヤの子アマリヤはシパテヤの子シパテヤはマハラレルの子是はペレズの子孫なり
5 mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni.
又バルクの子マアセヤといふ者ありバルクはコロホゼの子コロホゼはハザヤの子ハザヤはアダヤの子アダヤはヨヤリブの子ヨヤリプはゼカリヤの子ゼカリヤはシロニ人の子なり
6 Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.
ペレズの子孫のヱルサレムに住る者は合せて四百六十八人にして皆勇士なり
7 Mpo na bakitani ya Benjame: Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Yoedi, mwana mobali ya Pedaya, mwana mobali ya Kolaya, mwana mobali ya Maaseya, mwana mobali ya Itieli, mwana mobali ya Ezayi;
ベニヤミンの子孫は左のごとしメシユラムの子サル、メシユラムはヨエデの子ヨエデはペダヤの子ペダヤはコラヤの子コラヤはマアセヤの子マアセヤはイテエルの子イテエルはヱサヤの子なり
8 mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe.
その次はガバイおよびサライなどにして合せて九百二十八人
9 Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.
ジクリの子ヨエルかれらの監督たりハツセヌアの子ユダこれに副ふて邑を治む
10 Kati na Banganga-Nzambe: Yedaeya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Yakini;
祭司はヨヤリブの子ヱダヤ、ヤキン
11 Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe
および神の室の宰セラヤ、セラヤはヒルヤキの子ヒルキヤはメシユラムの子メシユラムはザドクの子ザドクはメラヨテの子メラヨテはアヒトブの子なり
12 elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe; Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pelalia, mwana mobali ya Amitsi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya
殿の職事をするその兄弟八百二十二人あり又アダヤといふ者ありアダヤはヱロハムの子ヱロハムはペラリヤの子ペラリヤはアムジの子アムジはゼカリヤの子ゼカリヤはパシホルの子パシホルはマルキヤの子なり
13 elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota; Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango.
アダヤの兄弟たる宗家の長二百四十二人あり又アマシサイといふ者ありアマシサイはアザリエルの子アザリエルはアハザイの子アハザイはメシレモテの子メシレモテはイシメルの子なり
14 Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.
その兄弟たる勇士百二十八人ありハツゲドリムの子ザブデエル彼らの監督たり
15 Kati na Balevi: Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Buni;
レビ人はハシユブの子シマヤ、ハシユブはアズリカムの子アズリカムはハシヤビヤの子ハシヤビヤはブンニの子なり
16 Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe;
またシヤベタイおよびヨザバデあり是等はレビ人の長にして神の室の外の事を掌どれり
17 Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.
またマツタニヤといふ者ありマツタニヤはミカの子ミカはザブデの子ザブデはアサフの子なりマツタニヤは祈祷の時に感謝の詞を唱へはじむる者なり彼の兄弟の中にてバクブキヤといふ者かれに次り又アブダといふ者ありアブダはシヤンマの子シヤンマはガラルの子ガラルはヱドトンの子なり
18 Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.
聖邑にあるレビ人は合せて二百八十四人
19 Bakengeli bikuke: Akubi, Talimoni elongo na bandeko na bango, oyo bazalaki bakengeli bikuke. Bango nyonso bazalaki bato nkama moko na tuku sambo na mibale.
門を守る者アツクブ、タルモンおよびその兄弟等合せて百七十二人あり皆門々にありて伺守ることをせり
20 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.
その餘のイスラエル人祭司およびレビ人は皆ユダの一切の邑々にありて各々おのれの産業に居り
21 Basali ya Tempelo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, mpe Tsika elongo na Gishipa bazalaki bakambi na bango.
但しネテニ人はオぺルに居りヂハ及びギシパ、ネタニ人を統ぶ
22 Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.
ヱルサレムにをるレビ人の監督はウジといふ者なりウジはバニの子バニはハシヤビヤの子ハシヤビヤはマツタニヤの子マツタニヤはミカの子なり是は謳歌者なるアサフの子孫なりその職務は神の室の事にかかはる
23 Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi.
王より命令ありて是らの事を定め謳歌者に日々の定まれる分を與へしむ
24 Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.
ユダの子ゼラの子孫メシザベルの子ぺタヒヤといふ者王の手に属して民に関る一切の事を取あつかへり
25 Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
又村荘とその田圃につきてはユダの子孫の者キリアテアルバとその郷里デボンとその郷里およびヱカブジエルとその村荘に住み
26 kati na Yeshua, kati na Molada, kati na Beti-Paleti,
ヱシユア、モラダおよびベテぺレテに住み
27 kati na Atsari-Shuwali, kati na Beri-Sheba mpe bamboka na yango ya mike-mike,
ハザルシユアルおよびベエルシバとその郷里に住み
28 kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike,
ヂクラグおよびメコナとその郷里に住み
29 kati na Eini-Rimoni, kati na Tsorea, kati na Yarimuti,
エンリンモン、ザレア、ヤルムテに住み
30 kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi.
ザノア、アドラムおよび其等の村荘ラキシとその田野およびアゼカとその郷里に住り斯かれらはベエルシバよりヒンノムの谷までに天幕を張り
31 Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
ベニヤミンの子孫はまたゲバよりしてミクマシ、アヤおよびベテルとその郷里に住み
32 kati na Anatoti, Nobi mpe Anania,
アナトテ、ノブ、アナニヤ
33 kati na Atsori, Rama mpe Gitayimi,
ハゾル、ラマ、ギツタイム
34 kati na Adidi, Tseboyimi mpe Nebalati,
ハデデ、ゼボイム、ネバラテ
35 kati na Lodi mpe Ono, lubwaku ya bato oyo basalaka misala ya maboko.
ロド、オノ工匠谷に住り
36 Masanga mosusu ya Balevi ya Yuda ekendeki kovanda kati na bato ya Benjame.
レビ人の班列のユダにある者の中ベニヤミンに合せし者もありき