< Neyemi 10 >

1 Tala bakombo ya bato oyo batiaki mikoloto na bango na mokanda yango: Moyangeli Neyemi, mwana mobali ya Akalia; Sedesiasi,
Torej tisti, ki so pečatili, so bili: Nehemija, Hahaljájev sin Tirsata, Sedekíja,
2 Seraya, Azaria, Jeremi,
Serajá, Azarjá, Jeremija,
3 Pashuri, Amaria, Malikiya,
Pašhúr, Amarjá, Malkijá,
4 Atushi, Shebania, Maluki,
Hatúš, Šebanjá, Malúh,
5 Arimi, Meremoti, Abidiasi,
Harím, Meremót, Obadjá,
6 Daniele, Ginetoni, Baruki,
Daniel, Ginetón, Baruh,
7 Meshulami, Abiya, Miyamini,
Mešulám, Abíja, Mijamín,
8 Maazia, Biligayi mpe Shemaya. Ezali bango nde bazalaki Banganga-Nzambe.
Maazjá, Bilgáj, Šemajá. Ti so bili duhovniki.
9 Mpo na Balevi: Jozue, mwana mobali ya Azania; Binuwi, moko ya bakitani ya Enadadi; Kadimieli
Lévijevci: tako Azanjájev sin Ješúa, Binúj izmed Henadádovih sinov, Kadmiél,
10 elongo na bandeko na bango: Shebania, Odia, Kelita, Pelaya, Anani,
kakor njihovi bratje: Šebanjá, Hodijá, Kelitá, Pelajá, Hanán,
11 Mishe, Reobi, Ashabia,
Miha, Rehób, Hašabjá,
12 Zakuri, Sherebia, Shebania,
Zahúr, Šerebjá, Šebanjá,
13 Odia, Bani mpe Beninu.
Hodijá, Baní, Benínu.
14 Mpo na bakambi ya bato: Pareoshi, Paati-Moabi, Elami, Zatu, Bani,
Vodje ljudstva: Paróš, Pahat Moáb, Elám, Zatú, Baní,
15 Buni, Azigadi, Bebayi,
Buní, Azgád, Bebáj,
16 Adoniya, Bigivayi, Adini,
Adoníja, Bigváj, Adín,
17 Ateri, Ezekiasi, Azuri,
Atêr, Ezekíja, Azúr,
18 Odia, Ashumi, Betsayi,
Hodijá, Hašúm, Becáj,
19 Arifi, Anatoti, Nebayi,
Haríf, Anatót, Nebáj,
20 Magipiashi, Meshulami, Eziri,
Magpiáš, Mešulám, Hezír,
21 Meshezabeyeli, Tsadoki, Yaduwa,
Mešezabél, Cadók, Jadúa,
22 Pelatia, Anani, Anaya,
Pelatjá, Hanán, Anajá,
23 Oze, Anania, Ashubi,
Hošéa, Hananjá, Hašúb,
24 Aloeshi, Pila, Shobeki,
Lohéš, Pilhá, Šobék,
25 Rewumi, Ashabina, Maaseya,
Rehúm, Hašabná, Maasejá,
26 Ayiya, Anani, Anane,
Ahíja, Hanán, Anán,
27 Maluki, Arimi, Baana.
Malúh, Harím in Baaná.
28 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango: kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.
Preostanek ljudstva, duhovniki, Lévijevci, vratarji, pevci, Netinimci in vsi, ki so se ločili od ljudstva dežel k postavi Boga, njihove žene, njihovi sinovi in njihove hčere, vsak, ki je imel spoznanje in imel razumevanje,
29 Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe!
so se pridružili k svojim bratom, svojim plemičem in vstopili v prekletstvo in prisego, da se ravnajo po Božji postavi, ki je bila dana po Mojzesu, Božjemu služabniku in da obeležujejo in delajo vse zapovedi Gospoda, našega Gospoda, njegove sodbe in njegove zakone,
30 Balobaki: « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.
in da mi ne bi dajali svojih hčera ljudstvu dežele niti jemali njihovih hčera za naše sinove.
31 Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso.
Če ljudstvo dežele prinese blago ali kakršen koli živež na šabatni dan, da prodaja, da mi tega ne bomo kupovali od njih na šabat ali na sveti dan in da bomo pustili sedmo leto in izterjavo vsakega dolga.
32 Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso,
Prav tako smo naredili odredbe za sebe, da se letno obremenimo s tretjino šekla za službo hiše svojega Boga,
33 mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »
za hlebe navzočnosti in za nenehno jedilno daritev in za nenehno žgalno daritev od šabat, od mlajev, za določene praznike, za svete stvari in za daritve za greh, da se naredi odkupitev za Izrael in za vse delo hiše svojega Boga.
34 Biso, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato, tobetaki zeke mpo na kokata tango oyo libota na libota kati na biso ekomema likabo ya bakoni na Ndako ya Nzambe na biso, na mibu nyonso mpo na kopelisa moto na etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko.
Vrgli smo žrebe med duhovniki, Lévijevci in ljudstvom za dar lesa, da bi ga prinašali v hišo svojega Boga, glede na hiše naših očetov, ob določenih časih, leto za letom, da [ga] zažigamo na oltarju Gospoda, svojega Boga, kakor je to zapisano v postavi
35 Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe.
in da prinašamo prve sadove svojih tal in prve sadove vsega sadja od vseh dreves, leto za letom, v Gospodovo hišo.
36 Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.
Tudi prvorojenca naših sinov in naše živine, kakor je to zapisano v postavi in prvence naših čred in naših tropov, da jih privedemo k hiši svojega Boga, k duhovnikom, ki služijo v hiši našega Boga
37 Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala.
In da naj bi prinesli prve sadove našega testa in naših daritev in sad vseh vrst dreves, od vina in od olja, k duhovnikom, k sobam hiše našega Boga in desetine naših tal k Lévijevcem, da bodo isti Lévijevci lahko imeli desetine v vseh mestih našega posevka.
38 Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso.
Duhovnik, Aronov sin, bo z Lévijevci, ko bodo Lévijevci prejemali desetine in Lévijevci bodo prinesli gor desetino od desetin k hiši našega Boga, k sobam, v zakladno hišo.
39 Bana ya Isalaele elongo na Balevi basengeli komema makabo na bango ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, na bibombelo epai wapi babombaka bisalelo ya Esika ya bule, mpe epai wapi Banganga-Nzambe basalaka mosala na bango mpe bakengeli bikuke elongo na bayembi batelemaka. Boye, tokotika Ndako ya Nzambe na biso te.
Kajti Izraelovi otroci in Lévijevi otroci bodo prinašali daritev žita, od novega vina in olja, v sobe, kjer so posode svetišča in duhovniki, ki služijo in vratarji in pevci. Ne bomo zapustili hiše svojega Boga.

< Neyemi 10 >