< Naumi 2 >

1 Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
因為上主要恢復雅各伯的葡萄園,因為劫掠者搶掠了他們,且破壞了他們的葡萄蔓。
2 Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
尼尼微,有個破壞者上來攻擊你,你應把守堡壘,防守要道,朿緊你的腰,集中你的全力!
3 Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
他勇士的盾牌是赤色的,戰士穿的衣服是深紅的;在他整裝待發之日,戰車閃爍如火,騎士疾馳如飛。
4 Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
戰車在大路上奔馳,在廣場上疾駛,形狀有如火炬,疾行有如閃電。
5 Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
亞述王召集了他的精銳,而他們卻在行軍時顛仆;急忙跑近城堡,但高楯已舉起。
6 Bikuke ya ebale efungwami, mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
河閘打開了,皇宮大為震驚。
7 Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
漆布裸體被擄去,她的使女們呻吟如鴿,各自搥胸。
8 Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo: etoboki mpe ekomi kobimisa mayi! Bazali kobelela: « Botelema! Botelema! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
尼尼微好似一個水池,池水洶湧流出,出有人喊:「止住! 止住! 」但無一人回顧。
9 Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
「你們搶奪銀子,搶奪金子! 」有無盡的寶藏,有無數的珍器。
10 Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
搶掠、洗劫。蹂躪! 人心沮喪,兩膝打顫,雙腰發抖,面無血色。
11 Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te?
獅子穴,幼獅洞,今在何處﹖哪裏原是雄獅、母獅和幼獅出竹之所,無人敢驚它們!
12 Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
雄獅曾為幼獅撕裂獵物,為母獅扼死野獸,將獵物簊滿牠的洞穴,將掠物充塞牠的窟穴。
13 « Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »
看,我必攻擊你! ──上主的斷語──我要在濃煙中燒毀你的洞穴,使刀劍吞食你的幼獅,由地上掃除你的掠物,令人再也聽不到你使者的聲音。

< Naumi 2 >