< Mishe 6 >

1 Boyoka makambo oyo Yawe alobi: « Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, mpe tika ete bangomba mikuse eyoka makambo oyo ozali koloba!
Hear ye what Jehovah saith! Arise, contend thou before the mountains, And let the hills hear thy voice!
2 Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
Hear, O ye mountains, the controversy of Jehovah! Hear, ye strong foundations of the earth! For Jehovah hath a controversy with his people; He contendeth with Israel.
3 Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini? Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini?
“O my people, what have I done to thee, And wherein have I offended thee? Testify against me!
4 Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino?
I brought thee up from the land of Egypt, And from the house of bondage I redeemed thee; I sent Moses, Aaron, and Miriam, to go before thee.
5 Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
O my people, remember what Balak the king of Moab devised. And what Balaam, the son of Beor, answered him, What happened from Shittim to Gilgal, That ye may know the mercies of Jehovah.”
6 Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko?
Wherewith shall I come before Jehovah, And bow myself before the most high God? Shall I come before him with burnt-offerings, With calves of a year old?
7 Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso?
Will Jehovah be pleased with thousands of rams, Or with ten thousands of rivers of oil? Shall I give my first-born for the sin of my soul, The fruit of my body for my transgression?
8 Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
He hath showed thee, O man, what is good; What doth Jehovah require of thee, But to do justly, and to love mercy, And to walk humbly before thy God?
9 Boyoka! Yawe azali kobelela na engumba! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango!
The voice of Jehovah crieth to the city, And the man of wisdom will discern thee; Hear ye the rod, and who hath threatened it!
10 Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe?
Are there not yet in the houses of the unrighteous the treasures of iniquity, And the scanty measure, which is abominable?
11 Boni, nazanga penza kopesa etumbu epai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta, mpe oyo azali na libenga etonda na bimekelo kilo ya lokuta?
Shall I count her pure with the wicked balances, And with the bag of deceitful weights?
12 Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.
For her rich men are full of violence, And her inhabitants speak lies, And their tongue is deceitful in their mouth.
13 Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.
Therefore will I sorely smite thee, And make thee desolate on account of thy sins.
14 Okolia, kasi okotonda te, pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo. Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te, pamba te nakokaba yango na mopanga.
Thou shalt eat and not be satisfied, And hunger shall be within thee. Thou shalt remove, but shalt not save, And what thou savest will I give up to the sword.
15 Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.
Thou shalt sow, but shalt not reap; Thou shalt tread the olives, but shalt not anoint thee with oil, And the grapes, but shalt not drink the wine.
16 Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.
For ye keep the statutes of Omri, And all the works of the house of Ahab, And walk in their devices; Therefore will I make thee a desolation, And thine inhabitants a derision; And ye shall bear the reproach of my people.

< Mishe 6 >