< Mishe 4 >
1 Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.
In the days to come the mountain of the Lord will be established, the house of our God on the top of the mountain, lifted above the hills. All the nations will flow to it,
2 Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba: « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi! Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
and many peoples will go and say, “Come, let us go up to the Lord’s mount, to the house of the God of Jacob, so that he may instruct us in his ways, so that we may walk in his paths.” For from Zion proceeds instruction and the Lord’s word from Jerusalem.
3 Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, ezala oyo ezalaka mosika. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu, bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
He will arbitrate between many peoples, and render decisions for numerous nations, They will beat their swords into ploughshares, and their spears into pruning hooks. Nation will not lift up sword against nation, they will learn war no more.
4 Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.
They will live each under his vine, and under his fig tree, with none to terrify them. For the mouth of the Lord of hosts has spoken.
5 Ekolo na ekolo ekotambola na kombo ya nzambe na yango, kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.
Each nation trusts in the names of their gods, but we will worship the Lord our God forever.
6 « Na mokolo yango, » elobi Yawe, « Nakosangisa libota na Ngai, oyo ezali kotambola tengu-tengu; nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai, mpe oyo natiaki pasi likolo na yango.
“On that day,” says the Lord, “I will assemble the lame. I will gather exiles I punished.
7 Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu ekoma batikali, mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai, libota ya nguya. Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona, kobanda na mokolo yango kino libela na libela.
I will restore the lame as a remnant, the exiles into a great nation. The Lord will rule over them on Mount Zion from that time forever.”
8 Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »
But you, watchtower for the flock, hill of the daughter of Zion, to you will return your former rule.
9 Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga? Boni, ozali lisusu na mokonzi te? Boni, mopesi toli na yo asili kokufa mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota?
So why do you now cry aloud? Haven’t you any king? Or has your counselor perished, so you writhe in pain like a woman in labor?
10 Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.
Writhe and scream, daughter of Zion, like a woman in labor! For now you must leave the city and camp in the open field. You will be taken to Babylon, but there will be rescued. There the Lord will save you from the hands of your foes.
11 Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani mpo na kotelemela yo; bazali koloba: « Tika ete bosantu ya Siona esambwa mpe miso esepela komona kobebisama na yango! »
But now many nations gather against you. They say, “Let her be defiled, we will gloat over Zion.”
12 Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.
But they do not know the thoughts of the Lord. They do not understand his plan, for he has gathered them like sheaves for the threshing floor.
13 Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.
“Arise, thresh, daughter of Zion. I will make your horns iron, and your hoofs brass, so you might beat in pieces many peoples, and devote to the Lord their spoil, and their wealth to the ruler of all the earth.