< Mishe 3 >
1 Boye, nalobaki: « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko?
Then I said: “Hear now, O leaders of Jacob, you rulers of the house of Israel. Should you not know justice?
2 Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu mpe bozali kolinga mabe. Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola misuni na bango mpe kobuka mikuwa na bango.
You hate good and love evil. You tear the skin from my people and strip the flesh from their bones.
3 Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola bango poso ya nzoto mpe kobuka mikuwa na bango. Bozali kokata bango mike-mike lokola misuni oyo bakalingaka to oyo batokisaka na nzungu. »
You eat the flesh of my people after stripping off their skin and breaking their bones. You chop them up like flesh for the cooking pot, like meat in a cauldron.”
4 Yango wana, tango bakobelela Yawe, akoyanola bango te. Na tango wana, akobombela bango elongi na Ye likolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki.
Then they will cry out to the LORD, but He will not answer them. At that time He will hide His face from them because of the evil they have done.
5 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela basakoli ya lokuta oyo babungisaka bato na ngai nzela: « Soki bapesi bango eloko ya kolia, basakolaka kimia; soki bapesi bango te eloko ya kolia, basakolaka bitumba.
This is what the LORD says: “As for the prophets who lead My people astray, who proclaim peace while they chew with their teeth, but declare war against one who puts nothing in their mouths:
6 Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. Soki bapesi bango te eloko ya kolia, molili ekozingela bino mpe bokokoka lisusu kosakola te! Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.
Therefore night will come over you without visions, and darkness without divination. The sun will set on these prophets, and the daylight will turn black over them.
7 Bamoni makambo bakotonda na soni, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, pamba te Nzambe akoyanola bango te. »
Then the seers will be ashamed and the diviners will be disgraced. They will all cover their mouths because there is no answer from God.”
8 Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi mpe lisumu ya Isalaele.
As for me, however, I am filled with power by the Spirit of the LORD, with justice and courage, to declare to Jacob his transgression and to Israel his sin.
9 Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,
Now hear this, O leaders of the house of Jacob and rulers of the house of Israel, who despise justice and pervert all that is right,
10 bino oyo botongaka Siona na kosopa makila, mpe Yelusalemi na kosalaka makambo mabe.
who build Zion with bloodshed and Jerusalem with iniquity.
11 Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka: « Boni, Yawe azali kati na biso te? Pasi ekoki kokomela biso te! »
Her leaders judge for a bribe, her priests teach for a price, and her prophets practice divination for money. Yet they lean upon the LORD, saying, “Is not the LORD among us? No disaster can come upon us.”
12 Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.
Therefore, because of you, Zion will be plowed like a field, Jerusalem will become a heap of rubble, and the temple mount a wooded ridge.