< Mishe 1 >

1 Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda: ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.
در دوران سلطنت یوتام و آحاز و حِزِقیا، پادشاهان یهودا، خداوند این پیام را دربارهٔ اورشلیم و سامره، به صورت رؤیا به میکاه مورشتی داد.
2 Bino nyonso, bikolo, boyoka! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka! Nkolo Yawe azwi bino na likambo; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule!
ای تمام قومها بشنوید! ای همهٔ ساکنان زمین گوش دهید! خداوند از خانه مقدّس خود بر ضد شما شهادت می‌دهد.
3 Tala, Yawe azali koya wuta na Ndako na Ye, azali kokita, azali kotambola na likolo ya bangomba ya mabele.
اینک خداوند تخت فرمانروایی خود را در آسمان ترک کرده و از فراز کوهها به زمین می‌آید.
4 Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.
کوهها در زیر پاهایش مثل موم آب می‌شوند و مانند سیل از بلندیها به دره سرازیر می‌گردند.
5 Mpo na nini nyonso wana? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe? Boni, ezali Samari te? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda? Boni, ezali Yelusalemi te?
تمام اینها به سبب گناهان مردم اسرائیل و یهودا اتفاق می‌افتد. بت‌پرستی و عِصیان سامره و اورشلیم را که پایتختهای اسرائیل و یهودا هستند، پر ساخته است.
6 « Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga; bakokoma kosala bilanga ya vino kuna. Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku, nakosala ete miboko na yango etikala polele.
خداوند می‌فرماید: «شهر سامره را به صورت توده‌ای از خاک درمی‌آورم؛ آن را چنان شخم می‌زنم که بتوان برای کشت انگور از آن استفاده کرد. حصار و قلعه‌های آن را خراب کرده، سنگهایش را به دره می‌ریزم تا بنیادش نمایان شود.
7 Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »
تمام بتهایش خرد خواهند شد و همۀ هدایای معبدش در آتش خواهند سوخت. من همۀ تمثالهایش را نابود خواهم کرد. او هدایایش را از فاحشگی به دست آورده است، پس آنها را از دست خواهد داد و آنها به فاحشه‌های دیگر داده خواهند شد.»
8 Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga, nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu, nakoganga lokola mbwa ya zamba mpe nakolela lokola maligbanga.
من گریه می‌کنم و ماتم می‌گیرم، مثل شغال زوزه می‌کشم و مانند جغد شیون می‌کنم. از غصه و سرافکندگی با پای برهنه و تن عریان راه می‌روم،
9 Pamba te bokono ya Samari esilaka te; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
چون زخم قوم من عمیقتر از آن است که شفا یابد. زیرا ویرانی به یهودا و حتی به دروازه‌های اورشلیم نیز رسیده است.
10 Boloba yango te kati na engumba Gati, bolela te! Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu!
این را به شهر جت نگویید و نگذارید اهالی آنجا گریهٔ شما را بشنوند! ای ساکنان بیت‌عفره از شدت درد و شرمندگی در خاک بغلتید!
11 Bato ya engumba Shafiri, botambola bolumbu mpe boyoka soni! Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusu na engumba na bango te, bato ya Beti-Atseli bazali na matanga; boye balongoli lisungi na bango epai na yo.
مردم شافیر برهنه و سرافکنده به اسارت برده می‌شوند. اهالی صعنان جرأت نمی‌کنند از خانه‌هایشان بیرون بیایند. وقتی صدای ماتم مردم بیت‌ایصل را بشنوید، بدانید که در آنجا پناهگاهی نیست.
12 Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somo mpo na bolamu na bango, pamba te Yawe atindi pasi ya makasi kino na ekuke ya Yelusalemi.
ساکنان ماروت از فرط انتظار بیمار شده‌اند، چون بلا از جانب خداوند بر ضد اورشلیم نازل شده است.
13 Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino!
ای مردم لاکیش بشتابید! بر سریعترین ارابه‌های خود سوار شده، فرار کنید، چون شما اولین شهر یهودا بودید که گناه بت‌پرستی اسرائیل را دنبال کردید و برای سایر شهرها سرمشق شدید.
14 Yango wana, bokopesa na Moresheti mokanda oyo elakisi ete bokabwani na ye na libala. Engumba Akizibi ezali kokosa bakonzi ya Isalaele.
ای مردم یهودا، هدایای خداحافظی به شهر مورِشِت جَت بفرستید، زیرا امیدی برای نجات آن نیست. شهر اکزیب پادشاهان اسرائیل را فریفته است.
15 Bino bavandi ya Maresha, nakotindela bino monguna moko mpo ete aya kobundisa bino; lokumu ya Isalaele ekokima na engumba Adulami.
ای مردم مریشه، دشمنانتان بر شما مسلط خواهند شد و بزرگان اسرائیل به غار عدولام پناه خواهند برد.
16 Bomikokola suki na mito mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka, ndenge esalemaka na matanga. Bomikokola suki na mito mpe botikala mabandi lokola mpongo, pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.
برای فرزندان خود ماتم کنید، چون آنها را از آغوشتان خواهند ربود و دیگر هرگز آنها را نخواهید دید. سرهایتان را بتراشید و خود را مانند کرکس کچل سازید، زیرا فرزندان عزیزتان را به سرزمینهای دور دست به اسارت خواهند برد.

< Mishe 1 >