< Matayo 9 >

1 Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
Jésus, étant monté dans une barque, traversa la mer, et alla dans sa ville.
2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango: — Mwana na Ngai, yika mpiko! Masumu na yo elimbisami.
Et voici, on lui amena un paralytique couché sur un lit. Jésus, voyant leur foi, dit au paralytique: Prends courage, mon enfant, tes péchés te sont pardonnés.
3 Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema: — Moto oyo azali kotiola Nzambe!
Sur quoi, quelques scribes dirent au-dedans d’eux: Cet homme blasphème.
4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango: — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino?
Et Jésus, connaissant leurs pensées, dit: Pourquoi avez-vous de mauvaises pensées dans vos cœurs?
5 Likambo nini eleki pete mpo na koloba: « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola? »
Car, lequel est le plus aisé, de dire: Tes péchés sont pardonnés, ou de dire: Lève-toi, et marche?
6 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono: — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
Or, afin que vous sachiez que le Fils de l’homme a sur la terre le pouvoir de pardonner les péchés: Lève-toi, dit-il au paralytique, prends ton lit, et va dans ta maison.
7 Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
Et il se leva, et s’en alla dans sa maison.
8 Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
Quand la foule vit cela, elle fut saisie de crainte, et elle glorifia Dieu, qui a donné aux hommes un tel pouvoir.
9 Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
De là étant allé plus loin, Jésus vit un homme assis au lieu des péages, et qui s’appelait Matthieu. Il lui dit: Suis-moi. Cet homme se leva, et le suivit.
10 Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
Comme Jésus était à table dans la maison, voici, beaucoup de publicains et de gens de mauvaise vie vinrent se mettre à table avec lui et avec ses disciples.
11 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu: — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
Les pharisiens virent cela, et ils dirent à ses disciples: Pourquoi votre maître mange-t-il avec les publicains et les gens de mauvaise vie?
12 Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
Ce que Jésus ayant entendu, il dit: Ce ne sont pas ceux qui se portent bien qui ont besoin de médecin, mais les malades.
13 Bokende koyekola tina ya maloba oyo: « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
Allez, et apprenez ce que signifie: Je prends plaisir à la miséricorde, et non aux sacrifices. Car je ne suis pas venu appeler des justes, mais des pécheurs.
14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu: — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?
Alors les disciples de Jean vinrent auprès de Jésus, et dirent: Pourquoi nous et les pharisiens jeûnons-nous, tandis que tes disciples ne jeûnent point?
15 Yesu azongiselaki bango: — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
Jésus leur répondit: Les amis de l’époux peuvent-ils s’affliger pendant que l’époux est avec eux? Les jours viendront où l’époux leur sera enlevé, et alors ils jeûneront.
16 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
Personne ne met une pièce de drap neuf à un vieil habit; car elle emporterait une partie de l’habit, et la déchirure serait pire.
17 Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika: batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
On ne met pas non plus du vin nouveau dans de vieilles outres; autrement, les outres se rompent, le vin se répand, et les outres sont perdues; mais on met le vin nouveau dans des outres neuves, et le vin et les outres se conservent.
18 Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
Tandis qu’il leur adressait ces paroles, voici, un chef arriva, se prosterna devant lui, et dit: Ma fille est morte il y a un instant; mais viens, impose-lui les mains, et elle vivra.
19 Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
Jésus se leva, et le suivit avec ses disciples.
20 Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,
Et voici, une femme atteinte d’une perte de sang depuis douze ans s’approcha par derrière, et toucha le bord de son vêtement.
21 pamba te azalaki komilobela: — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
Car elle disait en elle-même: Si je puis seulement toucher son vêtement, je serai guérie.
22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye; alobaki: — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
Jésus se retourna, et dit, en la voyant: Prends courage, ma fille, ta foi t’a guérie. Et cette femme fut guérie à l’heure même.
23 Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.
Lorsque Jésus fut arrivé à la maison du chef, et qu’il vit les joueurs de flûte et la foule bruyante,
24 Alobaki na bango: — Bobima! Mwana akufi te; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.
il leur dit: Retirez-vous; car la jeune fille n’est pas morte, mais elledort. Et ils se moquaient de lui.
25 Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
Quand la foule eut été renvoyée, il entra, prit la main de la jeune fille, et la jeune fille se leva.
26 Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
Le bruit s’en répandit dans toute la contrée.
27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga: — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
Étant parti de là, Jésus fut suivi par deux aveugles, qui criaient: Aie pitié de nous, Fils de David!
28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango: — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai? Bazongisaki: — Iyo, Nkolo!
Lorsqu’il fut arrivé à la maison, les aveugles s’approchèrent de lui, et Jésus leur dit: Croyez-vous que je puisse faire cela? Oui, Seigneur, lui répondirent-ils.
29 Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki: — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino!
Alors il leur toucha les yeux, en disant: Qu’il vous soit fait selon votre foi.
30 Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango: — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
Et leurs yeux s’ouvrirent. Jésus leur fit cette recommandation sévère: Prenez garde que personne ne le sache.
31 Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
Mais, dès qu’ils furent sortis, ils répandirent sa renommée dans tout le pays.
32 Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.
Comme ils s’en allaient, voici, on amena à Jésus un démoniaque muet.
33 Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki: — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te!
Le démon ayant été chassé, le muet parla. Et la foule étonnée disait: Jamais pareille chose ne s’est vue en Israël.
34 Kasi Bafarizeo bazalaki koloba: — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
Mais les pharisiens dirent: C’est par le prince des démons qu’il chasse les démons.
35 Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
Jésus parcourait toutes les villes et les villages, enseignant dans les synagogues, prêchant la bonne nouvelle du royaume, et guérissant toute maladie et toute infirmité.
36 Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.
Voyant la foule, il fut ému de compassion pour elle, parce qu’elle était languissante et abattue, comme des brebis qui n’ont point de berger.
37 Yesu alobaki na bayekoli na Ye: « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke!
Alors il dit à ses disciples: La moisson est grande, mais il y a peu d’ouvriers.
38 Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »
Priez donc le maître de la moisson d’envoyer des ouvriers dans sa moisson.

< Matayo 9 >