< Matayo 8 >
1 Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.
When he was come down from the mountain, great multitudes followed him.
2 Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki: — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
And, behold, there came a leper and worshipped him, saying, Lord, if thou wilt, thou canst make me clean.
3 Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki: — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye;
And Jesus put forth his hand, and touched him, saying, I will; be thou clean. And immediately his leprosy was cleansed.
4 mpe Yesu alobaki na ye: — Yoka malamu! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
And Jesus saith unto him, See thou tell no man; but go thy way, shew thyself to the priest, and offer the gift that Moses commanded, for a testimony unto them.
5 Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.
And when Jesus was entered into Capernaum, there came unto him a centurion, beseeching him,
6 Alobaki: — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
And saying, Lord, my servant lieth at home sick of the palsy, grievously tormented.
7 Yesu azongiselaki ye: — Nakoya kobikisa ye.
And Jesus saith unto him, I will come and heal him.
8 Mokonzi ya basoda alobaki: — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
The centurion answered and said, Lord, I am not worthy that thou shouldest come under my roof: but speak the word only, and my servant shall be healed.
9 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai; soki nalobi na moko: « Kende! » akendaka; mpe soki nalobi na mosusu: « Yaka! » ayaka; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai: « Sala mosala oyo! » asalaka yango.
For I am a man under authority, having soldiers under me: and I say to this man, Go, and he goeth; and to another, Come, and he cometh; and to my servant, Do this, and he doeth it.
10 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye: — Nazali koloba na bino penza ya solo: natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele!
When Jesus heard it, he marvelled, and said to them that followed, Verily I say unto you, I have not found so great faith, no, not in Israel.
11 Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
And I say unto you, That many shall come from the east and west, and shall sit down with Abraham, and Isaac, and Jacob, in the kingdom of heaven.
12 Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
But the children of the kingdom shall be cast out into outer darkness: there shall be weeping and gnashing of teeth.
13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda: — Zonga na ndako na yo! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
And Jesus said unto the centurion, Go thy way; and as thou hast believed, so be it done unto thee. And his servant was healed in the selfsame hour.
14 Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.
And when Jesus was come into Peter’s house, he saw his wife’s mother laid, and sick of a fever.
15 Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
And he touched her hand, and the fever left her: and she arose, and ministered unto them.
16 Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango; abikisaki mpe babeli nyonso.
When the even was come, they brought unto him many that were possessed with devils: and he cast out the spirits with his word, and healed all that were sick:
17 Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki: « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
That it might be fulfilled which was spoken by Isaiah the prophet, saying, Himself took our infirmities, and bare our sicknesses.
18 Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
Now when Jesus saw great multitudes about him, he gave commandment to depart unto the other side.
19 Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki: — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
And a certain scribe came, and said unto him, Master, I will follow thee whithersoever thou goest.
20 Kasi Yesu alobaki na ye: — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
And Jesus saith unto him, The foxes have holes, and the birds of the air have nests; but the Son of man hath not where to lay his head.
21 Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye: — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
And another of his disciples said unto him, Lord, suffer me first to go and bury my father.
22 Kasi Yesu alobaki na ye: — Landa Ngai! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
But Jesus said unto him, Follow me; and let the dead bury their dead.
23 Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
And when he was entered into a ship, his disciples followed him.
24 Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
And, behold, there arose a great tempest in the sea, insomuch that the ship was covered with the waves: but he was asleep.
25 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga: — Nkolo, bikisa biso! Tozali kokufa!
And his disciples came to him, and awoke him, saying, Lord, save us: we perish.
26 Kasi Yesu alobaki na bango: — Bato na kondima moke! Mpo na nini bozali kobanga? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge; bongo kimia monene ezongaki.
And he saith unto them, Why are ye fearful, O ye of little faith? Then he arose, and rebuked the winds and the sea; and there was a great calm.
27 Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana: « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye? »
But the men marvelled, saying, What manner of man is this, that even the winds and the sea obey him!
28 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.
And when he was come to the other side into the country of the Gergesenes, there met him two possessed with devils, coming out of the tombs, exceeding fierce, so that no man might pass by that way.
29 Bakomaki koganga: — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama?
And, behold, they cried out, saying, What have we to do with thee, Jesus, thou Son of God? art thou come hither to torment us before the time?
30 Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.
And there was a good way off from them an herd of many swine feeding.
31 Milimo mabe esengaki na Yesu: — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
So the devils besought him, saying, If thou cast us out, suffer us to go away into the herd of swine.
32 Yesu alobaki na milimo yango: — Bobima! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
And he said unto them, Go. And when they were come out, they went into the herd of swine: and, behold, the whole herd of swine ran violently down a steep place into the sea, and perished in the waters.
33 Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.
And they that kept them fled, and went their ways into the city, and told every thing, and what was befallen to the possessed of the devils.
34 Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.
And, behold, the whole city came out to meet Jesus: and when they saw him, they besought him that he would depart out of their coasts.