< Matayo 5 >
1 Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,
When Jesus saw the crowds following him he went up a mountain. There he sat down together with his disciples.
2 mpe akomaki kopesa bango malakisi. Alobaki:
He began teaching them, saying:
3 « Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango!
“Blessed are those who recognize they are spiritually poor, for the kingdom of heaven is theirs.
4 Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!
Blessed are those who mourn, for they shall be comforted.
5 Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula!
Blessed are those who are kind for they will own the whole world.
6 Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama!
Blessed are those whose greatest desire is to do what is right, for they will be satisfied.
7 Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa!
Blessed are those who are merciful, for they will be shown mercy.
8 Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe!
Blessed are those who have pure minds, for they will see God.
9 Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe!
Blessed are those who work to bring peace, for they will be called children of God.
10 Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango!
Blessed are those persecuted for what is right, for the kingdom of heaven is theirs.
11 Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai!
Blessed are you when people insult you and persecute you, and accuse you of all kinds of evil things because of me.
12 Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
Be glad, be really glad, for you will receive a great reward in heaven—for they persecuted the prophets who came before you in just the same way.
13 Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Ezali lisusu na tina moko te; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
You are the salt of the earth, but if the salt becomes tasteless, how can you make it salty again? It's good for nothing, so it's thrown out and trodden down.
14 Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.
You are the light of the world. A city built on a hill can't be hidden.
15 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
No one lights a lamp and then puts it under a bucket. No, it's placed on a lamp-stand and it provides light to everyone in the house.
16 Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
In the same way you should let your light shine before everyone so they can see the good things you do and praise your heavenly Father.
17 Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
Don't think I came to abolish the law or the writings of the prophets. I didn't come to abolish them, but to fulfill them.
18 Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo: liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.
I assure you, until heaven and earth come to an end, not a single letter, not a single dot of the law will come to an end before everything is fulfilled.
19 Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.
So whoever disregards the least important commandment, and teaches people to do so, will be called the least in the kingdom of heaven; but whoever practices and teaches the commandments will be called great in the kingdom of heaven.
20 Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
I tell you, unless your moral rightness is more than that of the religious teachers and the Pharisees, you can never enter the kingdom of heaven.
21 Boyokaki ete baloba na bakoko na biso: ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›
You've heard that the law said to the people of long ago: ‘You shall not murder, and anyone who commits murder will be condemned as guilty.’
22 Kasi Ngai, nalobi na bino: Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi; moto oyo akofinga ndeko na ye: ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene; mpe oyo akoloba na ndeko na ye: ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo. (Geenna )
But I tell you, anyone who is angry with his brother will be condemned as guilty. Whoever calls his brother an idiot has to answer to the council, but whoever verbally abuses others is liable to the fire of judgment. (Geenna )
23 Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo,
If you're at the altar making an offering, and remember that your brother has something against you,
24 tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.
leave your offering on the altar and go and make peace with him first, and afterwards come back and make your offering.
25 Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.
While you're on the way to court with your opponent, make sure you settle things quickly. Otherwise your opponent might hand you over to the judge, and the judge will hand you over to the court official, and you will be thrown into jail.
26 Nazali koloba na yo penza ya solo: okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.
I tell you the truth: you won't get out of there until you've paid every last penny.
27 Boyokaki ete baloba: ‹ Okosalaka ekobo te. ›
You've heard that the law said, ‘Do not commit adultery.’
28 Kasi Ngai, nalobi na bino: Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
But I tell you that everyone who looks lustfully at a woman has already committed adultery with her in his mind.
29 Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo. (Geenna )
If your right eye leads you to sin, then tear it out and throw it away, because it's better to lose one part of your body than to have your whole body thrown into the fire of judgment. (Geenna )
30 Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo. (Geenna )
If your right hand leads you to sin, then cut it off and throw it away, for it's better for you to lose one of your limbs than for your whole body to go into the fire of judgment. (Geenna )
31 Boyokaki lisusu ete baloba: ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›
The law also said, ‘If a man divorces his wife, he should give her a certificate of divorce.’
32 Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
But I tell you that any man who divorces his wife except for sexual immorality causes her to commit adultery, and whoever marries a divorced woman commits adultery.
33 Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso: ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›
And again, you've heard that the law said to the people of long ago, ‘You shall not perjure yourself. Instead make sure you keep the oaths you swear to the Lord.’
34 Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe,
But I tell you, don't swear at all. Don't swear by heaven, because it's the throne of God.
35 to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.
Don't swear by the earth, because it's God's footstool. Don't swear by Jerusalem, because it's the city of the great King.
36 Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo.
Don't even swear by your head, because you're not able to make a single hair white or black.
37 Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.
Simply say yes or no—more than this comes from the evil one.
38 Boyokaki ete baloba: ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. ›
You've heard that the law said, ‘An eye for an eye, and a tooth for a tooth.’
39 Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Botelemelaka te moto mabe; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
But I tell you, don't resist someone who is evil. If someone slaps you on the right cheek, turn the other cheek to them as well.
40 Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
If someone wants to sue you in court and takes your shirt, give them your coat too.
41 Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye.
If someone demands that you go one mile, go with them two.
42 Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.
Give to those who ask you, and don't turn away those who want to borrow from you.
43 Boyokaki ete baloba: ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›
You've heard that the law said, ‘Love your neighbor and hate your enemy.’
44 Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
But I tell you, love your enemies and pray for those who persecute you,
45 Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
so you may become children of your heavenly Father. For his sun shines on both the good and the bad; and he makes the rain fall on both those who do right and those who do wrong.
46 Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te?
For if you only love those who love you, what reward do you have? Don't even the tax-collectors do that?
47 Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te?
If you only speak kindly to your family, what more are you doing than anyone else? Even the heathen do that!
48 Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
Grow up and become completely trustworthy, just as your heavenly Father is trustworthy.