< Matayo 4 >

1 Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye.
Eka Roho Maler notelo ne Yesu nyaka e thim mondo Satan oteme.
2 Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala.
Bangʼ tweyo chiemo kuom ndalo piero angʼwen odiechiengʼ kod otieno, kech nochako kaye.
3 Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye: — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.
Jatem nobiro ire kendo nowachone niya, “Ka in Wuod Nyasaye adier to nyis kitegi mondo olokre kuon.”
4 Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Yesu nodwoke niya, “Ondiki ni, ‘Dhano ok bed mangima nikech chiemo kende, to nikech wach ka wach moa e dho Nyasaye.’”
5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo
Eka Satan notere nyaka dala maduongʼ maler, kendo nomiyo ochungo e osuch hekalu malo mogik.
6 mpe alobaki na Ye: — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se; pamba te ekomama: « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »
Nowachone niya, “Ka in wuod Nyasaye to chikri piny. Nimar ondiki niya, “‘Obiro miyo malaika mage chik nikech in, kendo gibiro tingʼi malo e lwetgi, mondo kik ichwany tiendi e kidi.’”
7 Yesu azongiselaki ye: — Ekomama mpe: « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
Yesu nodwoke niya, “Ondiki bende ni, ‘Kik item Jehova Nyasaye ma Nyasachi.’”
8 Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango;
Eka Satan nokawe, motere nyaka ewi got moro mabor ahinya, kendo nosiemone pinjeruodhi mag piny gi duongʼ mane gin-go.
9 alobaki na Ye: — Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.
Nowachone niya, “Magi duto abiro miyi ka ikulorina piny kendo ilama.”
10 Yesu alobaki na ye: — Mosika na ngai, Satana! Pamba te ekomama: « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
Yesu nowachone niya, “Aa kuoma, Satan! Nikech ondiki ni, ‘Lam Jehova Nyasaye ma Nyasachi kendo en kende ema itine.’”
11 Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
Eka Satan noweye, kendo malaike nobiro motiyone.
12 Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile.
Ka Yesu nowinjo ni Johana oseter e od twech, nodok Galili.
13 Kasi avandaki na Nazareti te; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,
Nowuok Nazareth modhi odak Kapernaum, mane ni e dho nam e gwengʼ mar Zebulun gi Naftali,
14 mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki:
mondo ochop gima nowachi gi dho janabi Isaya niya,
15 « Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali, nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani, Galile ya bapagano,
“Piny Zebulun gi piny Naftali, man Yor Nam modak loka aora Jordan, Galili mar joma ok jo-Yahudi,
16 bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »
joma odak e mudho oseneno ler maduongʼ; jogo modak e piny ma tipo mar tho oumo, ler oserienynegi.”
17 Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya: « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene! »
Chakre kindeno kadhi nyime, Yesu nochako yalo niya, “Weuru richo nikech pinyruodh polo osekayo machiegni.”
18 Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale: Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
Kane oyudo Yesu wuotho e dho Nam Galili, noneno owete ariyo, Simon miluongo ni Petro gi owadgi ma Andrea. Noyudo gibolo gokgi e nam, nimar ne gin jolupo.
19 Yesu alobaki na bango: « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
Yesu nowachonegi niya, “Biuru uluwa, mondo kar ywayo rech to aketu ubed joywa ji.”
20 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
Gisano ne giweyo gogo mag-gi gisano mi giluwe.
21 Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale: Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango;
Kane ochwalore nyime koa kanyo, noneno owete ariyo mamoko, Jakobo wuod Zebedi gi owadgi ma Johana. Ne gin e yie kaachiel gi wuon-gi ma Zebedi, ka giloso gokegi. Yesu noluongogi,
22 mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu.
kendo gisano ne giweyo yie kod wuon-gi mi giluwe.
23 Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.
Yesu nodhi e piny Galili duto, kopuonjo e sinagokegi, koyalo Injili mar pinyruoth kendo kochango kit tuoche gi midekre duto e dier ji.
24 Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi: bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa; mpe azalaki kobikisa bango.
Humbe nolandore e piny Siria duto, kendo ji nokelone joma ne tuo gi kit tuoche mayoreyore gi joma ne nigi rem mapek gi joma ne nigi jochiende gi joma ne chunygi yudhore kod joma ne nigi athany, mi nochangogi.
25 Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.
Oganda maduongʼ moa Galili gi gwengʼ mar Dekapoli gi Jerusalem gi Judea kod gwengʼ man loka Jordan ne oluwe.

< Matayo 4 >