< Matayo 27 >
1 Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.
Poi, venuta la mattina, tutti i capi sacerdoti e gli anziani del popolo tennero consiglio contro a Gesù per farlo morire.
2 Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.
E legatolo, lo menarono via e lo consegnarono a Pilato, il governatore.
3 Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato.
Allora Giuda, che l’avea tradito, vedendo che Gesù era stato condannato, si pentì, e riportò i trenta sicli d’argento ai capi sacerdoti ed agli anziani,
4 Alobaki na bango: — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te! Kasi bango bazongisaki: — Etali biso na nini? Etali nde yo moko!
dicendo: Ho peccato, tradendo il sangue innocente. Ma essi dissero: Che c’importa?
5 Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.
Pensaci tu. Ed egli, lanciati i sicli nel tempio, s’allontanò e andò ad impiccarsi.
6 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki: — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
Ma i capi sacerdoti, presi quei sicli, dissero: Non è lecito metterli nel tesoro delle offerte, perché son prezzo di sangue.
7 Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya.
E tenuto consiglio, comprarono con quel danaro il campo del vasaio da servir di sepoltura ai forestieri.
8 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.
Perciò quel campo, fino al dì d’oggi, è stato chiamato: Campo di sangue.
9 Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki: « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye,
Allora s’adempì quel che fu detto dal profeta Geremia: E presero i trenta sicli d’argento, prezzo di colui ch’era stato messo a prezzo, messo a prezzo dai figliuoli d’Israele;
10 mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. »
e li dettero per il campo del vasaio, come me l’avea ordinato il Signore.
11 Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
Or Gesù comparve davanti al governatore; e il governatore lo interrogò, dicendo: Sei tu il re de’ Giudei? E Gesù gli disse: Sì, lo sono.
12 Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te.
E accusato da’ capi sacerdoti e dagli anziani, non rispose nulla.
13 Bongo Pilato atunaki Ye: — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo?
Allora Pilato gli disse: Non odi tu quante cose testimoniano contro di te?
14 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te; mpe moyangeli akamwaki makasi.
Ma egli non gli rispose neppure una parola: talché il governatore se ne maravigliava grandemente.
15 Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona.
Or ogni festa di Pasqua il governatore soleva liberare alla folla un carcerato, qualunque ella volesse.
16 Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.
Avevano allora un carcerato famigerato di nome Barabba.
17 Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango: — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi?
Essendo dunque radunati, Pilato domandò loro: Chi volete che vi liberi, Barabba, o Gesù detto Cristo?
18 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye.
Poiché egli sapeva che glielo aveano consegnato per invidia.
19 Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba: — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye!
Or mentre egli sedeva in tribunale, la moglie gli mandò a dire: Non aver nulla a che fare con quel giusto, perché oggi ho sofferto molto in sogno a cagion di lui.
20 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
Ma i capi sacerdoti e gli anziani persuasero le turbe a chieder Barabba e far perire Gesù.
21 Moyangeli atunaki bango lisusu: — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani? Bazongisaki na koganga: — Barabasi!
E il governatore prese a dir loro: Qual de’ due volete che vi liberi? E quelli dissero: Barabba.
22 Pilato atunaki bango: — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto? Bato nyonso bazongisaki: — Baka ye na ekulusu!
E Pilato a loro: Che farò dunque di Gesù detto Cristo? Tutti risposero: Sia crocifisso.
23 Pilato atunaki lisusu: — Mabe nini asali? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka: — Baka ye na ekulusu!
Ma pure, riprese egli, che male ha fatto? Ma quelli viepiù gridavano: Sia crocifisso!
24 Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba: — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
E Pilato, vedendo che non riusciva a nulla, ma che si sollevava un tumulto, prese dell’acqua e si lavò le mani in presenza della moltitudine, dicendo: Io sono innocente del sangue di questo giusto; pensateci voi.
25 Bato nyonso bazongisaki: — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso!
E tutto il popolo, rispondendo, disse: Il suo sangue sia sopra noi e sopra i nostri figliuoli.
26 Pilato abimiselaki bango Barabasi; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Allora egli liberò loro Barabba; e dopo aver fatto flagellare Gesù, lo consegnò perché fosse crocifisso.
27 Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda.
Allora i soldati del governatore, tratto Gesù nel pretorio, radunarono attorno a lui tutta la coorte.
28 Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane,
E spogliatolo, gli misero addosso un manto scarlatto;
29 balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba: « Mbote, mokonzi ya Bayuda! »
e intrecciata una corona di spine, gliela misero sul capo, e una canna nella man destra; e inginocchiatisi dinanzi a lui, lo beffavano, dicendo: Salve, re de’ Giudei!
30 Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto.
E sputatogli addosso, presero la canna, e gli percotevano il capo.
31 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
E dopo averlo schernito, lo spogliarono del manto, e lo rivestirono delle sue vesti; poi lo menaron via per crocifiggerlo.
32 Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.
Or nell’uscire trovarono un Cireneo chiamato Simone, e lo costrinsero a portar la croce di Gesù.
33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba: esika ya mokuwa ya moto,
E venuti ad un luogo detto Golgota, che vuol dire: Luogo del teschio, gli dettero a bere del vino mescolato con fiele;
34 bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.
ma Gesù, assaggiatolo, non volle berne.
35 Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke;
Poi, dopo averlo crocifisso, spartirono i suoi vestimenti, tirando a sorte;
36 mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
e postisi a sedere, gli facevan quivi la guardia.
37 Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu: Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
E al disopra del capo gli posero scritto il motivo della condanna: QUESTO E’ GESU’, IL RE DE’ GIUDEI.
38 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Allora furon con lui crocifissi due ladroni, uno a destra e l’altro a sinistra.
39 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango;
E coloro che passavano di lì, lo ingiuriavano, scotendo il capo e dicendo:
40 bazalaki koloba: « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu! »
Tu che disfai il tempio e in tre giorni lo riedifichi, salva te stesso, se tu sei Figliuol di Dio, e scendi giù di croce!
41 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba:
Similmente, i capi sacerdoti con gli scribi e gli anziani, beffandosi, dicevano:
42 « Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te! Azali mokonzi ya Isalaele! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye.
Ha salvato altri e non può salvar se stesso! Da che è il re d’Israele, scenda ora giù di croce, e noi crederemo in lui.
43 Atiaka elikya na ye kati na Nzambe; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba: ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »
S’è confidato in Dio; lo liberi ora, s’Ei lo gradisce, poiché ha detto: Son Figliuol di Dio.
44 Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
E nello stesso modo lo vituperavano anche i ladroni crocifissi con lui.
45 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
Or dall’ora sesta si fecero tenebre per tutto il paese, fino all’ora nona.
46 Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki: — Eloi, Eloi, lema sabachtani? Elingi koloba: Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai?
E verso l’ora nona Gesù gridò con gran voce: Elì, Elì, lamà sabactanì? cioè: Dio mio, Dio mio, perché mi hai abbandonato?
47 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye; boye bakomaki koloba: — Azali kobenga Eliya!
Ma alcuni degli astanti, udito ciò, dicevano: Costui chiama Elia.
48 Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela.
E subito un di loro corse a prendere una spugna; e inzuppatala d’aceto e postala in cima ad una canna, gli die’ da bere.
49 Kasi bato mosusu balobaki: — Zela! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye.
Ma gli altri dicevano: Lascia, vediamo se Elia viene a salvarlo.
50 Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye.
E Gesù, avendo di nuovo gridato con gran voce, rendé lo spirito.
51 Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,
Ed ecco, la cortina del tempio si squarciò in due, da cima a fondo, e la terra tremò, e le rocce si schiantarono,
52 bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki:
e le tombe s’aprirono, e molti corpi de’ santi che dormivano, risuscitarono;
53 ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
ed usciti dai sepolcri dopo la risurrezione di lui, entrarono nella santa città, ed apparvero a molti.
54 Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki: — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe!
E il centurione e quelli che con lui facean la guardia a Gesù, visto il terremoto e le cose avvenute, temettero grandemente, dicendo: Veramente, costui era Figliuol di Dio.
55 Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye.
Ora quivi erano molte donne che guardavano da lontano, le quali avean seguitato Gesù dalla Galilea per assisterlo;
56 Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi; mpe mama ya bana ya Zebede.
tra le quali erano Maria Maddalena, e Maria madre di Giacomo e di Jose, e la madre de’ figliuoli di Zebedeo.
57 Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu.
Poi, fattosi sera, venne un uomo ricco di Arimatea, chiamato Giuseppe, il quale era divenuto anche egli discepolo di Gesù.
58 Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango.
Questi, presentatosi a Pilato, chiese il corpo di Gesù. Allora Pilato comandò che il corpo gli fosse rilasciato.
59 Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto
E Giuseppe, preso il corpo, lo involse in un panno lino netto,
60 mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
e lo pose nella propria tomba nuova, che aveva fatta scavare nella roccia, e dopo aver rotolata una gran pietra contro l’apertura del sepolcro, se ne andò.
61 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
Or Maria Maddalena e l’altra Maria eran quivi, sedute dirimpetto al sepolcro.
62 Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato
E l’indomani, che era il giorno successivo alla Preparazione, i capi sacerdoti ed i Farisei si radunarono presso Pilato, dicendo:
63 mpo na koloba na ye: — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana! Tango azalaki na bomoi, alobaki: « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
Signore, ci siamo ricordati che quel seduttore, mentre viveva ancora, disse: Dopo tre giorni, risusciterò.
64 Yango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso.
Ordina dunque che il sepolcro sia sicuramente custodito fino al terzo giorno; che talora i suoi discepoli non vengano a rubarlo e dicano al popolo: E’ risuscitato dai morti; così l’ultimo inganno sarebbe peggiore del primo.
65 Pilato azongisaki: — Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala.
Pilato disse loro: Avete una guardia: andate, assicuratevi come credete.
66 Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.
Ed essi andarono ad assicurare il sepolcro, sigillando la pietra, e mettendovi la guardia.